Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt lok. 14-lok. 15
  • Motuna 6: Biblia esakolaki nini mpo na Masiya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Motuna 6: Biblia esakolaki nini mpo na Masiya?
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Motuna 6: Biblia esakolaki nini mpo na Masiya?

MOTUNA 6

Biblia esakolaki nini mpo na Masiya?

ESAKWELI

“Yo, Ee Beteleme Efrata, . . . epai na yo nde moto oyo akozala mokonzi na Yisraele akobima mpo na ngai.”

Mika 5:2

KOKOKISAMA NA YANGO

“Nsima ya kobotama ya Yesu na Beteleme ya Yudea na mikolo ya Erode mokonzi, talá! banganga-minzoto oyo bautaki na Ɛsti bayaki na Yerusaleme.”

Matai 2:1

ESAKWELI

“Bakaboli bilamba na ngai kati na bango, mpe babwaki mbɛsɛ mpo na bilamba na ngai.”

Nzembo 22:18

KOKOKISAMA NA YANGO

“Ntango basoda babakaki Yesu na nzete na bansɛtɛ, bazwaki bilamba na ye ya likoló mpe bakabolaki yango na biteni minei . . . Kasi elamba yango ya kati etongamaki na biteni te, bakangisá yango banda na likoló tii na nse. Bongo balobanaki bango na bango ete: ‘Tópasola yango te, kasi tóbwaka mbɛsɛ mpo na koyeba soki ekozala ya nani.’”

Yoane 19:23, 24

ESAKWELI

“Azali kobatela mikuwa na ye nyonso; ata moko na yango ebukani te.”

Nzembo 34:20

KOKOKISAMA NA YANGO

“Ntango bakómaki epai ya Yesu, bamonaki ete asilaki kokufa, na yango babukaki makolo na ye te.”

Yoane 19:33

ESAKWELI

“Atɔbɔlamaki mpo na misala na biso ya kobuka mibeko.”

Yisaya 53:5

KOKOKISAMA NA YANGO

“Moko ya basoda atɔbɔlaki ye mopanzi na likɔnga, mpe na mbala moko makila ná mai ebimaki.”

Yoane 19:34

ESAKWELI

“Bapesaki ngai lifuti na ngai, mbongo ya bibende 30 ya palata.”

Zekaria 11:12, 13

KOKOKISAMA NA YANGO

“Moko ya bantoma zomi na mibale, oyo babengi Yudasi Mokeriota, akendaki epai ya banganga-nzambe bakonzi mpe alobaki na bango: ‘Bokopesa ngai nini mpo natɛkɛla bino ye?’ Bayokanaki bápesa ye mbongo ya bibende 30 ya palata.”

Matai 26:14, 15; 27:5

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto