Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Juillet nk. 3-4
  • Balakisi​—Mpo na nini tosengeli na bango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Balakisi​—Mpo na nini tosengeli na bango?
  • Lamuká!—2002
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini nakoki koyokana na molakisi na ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Mpo na nini kozala molakisi?
    Lamuká!—2002
  • Kotángisa​—Mosala oyo esɛngaka makambo mingi mpe ezali na makama
    Lamuká!—2002
  • Bana kelasi na mokili ya Nigéria bapambolami mpo na bosembo na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Lamuká!—2002
g02 Juillet nk. 3-4

Balakisi​—Mpo na nini tosengeli na bango?

“Kolekisa mokolo moko elongo na molakisi ya malamu eleki mikolo nkóto ya koyekola makasi.”​—Lisese ya Japon.

OZALI koyeba lisusu molakisi moko oyo azalaki kosepelisa yo mingi ntango ozalaki kotánga? To soki ozali naino na kelasi, ozali na molakisi moko oyo olingaka mingi koleka? Soki azali, mpo na nini olingaka ye ndenge wana?

Molakisi ya malamu asalaka ete bana-kelasi bábanga te, mpe akómisaka koyekola likambo ya esengo. Mobali moko ya mbula 70 afandaka na Angleterre, amikundolaka na esengo nyonso molakisi na ye ya Lingelesi ntango azalaki kotánga na Birmingham. Alobi ete: “Mr. Clewley asalisaki ngai nayeba makoki oyo nayebaki te ete nazali na yango. Nazalaki nsɔninsɔni mpe nazalaki koloba mingi te, kasi alendisaki ngai nakɔta na momekano ya teatre oyo ezalaki kosalema na eteyelo. Na mbula na ngai ya nsuka, nalongaki na momekano yango. Soki alendisaka ngai te, mbɛlɛ nakokaki kosala yango te. Likambo ya mawa, na bambula oyo elandaki namonaki ye lisusu te mpo napesa ye matɔndi mpo na ezalela na ye ya komipesa na bana-kelasi na ye.”

Margit, mwasi moko kitoko ya mbula koleka 50 oyo afandaka na engumba Munich, na Allemagne, alobi ete: “Ezalaki na molakisi moko oyo nazalaki kolinga ye mingi. Ayebaki kolimbola makambo ya makasi na ndenge ya pɛtɛɛ mpenza. Azalaki kolendisa biso tótunaka mituna soki tosimbi likambo moko malamu te. Azalaki kobangisa biso te, kasi azalaki nde moninga mpenza. Yango ezalaki kokómisa mateya elɛngi koleka.”

Peter afandaka na Australie, azali koyeba lisusu molakisi moko ya matematiki, mpe alobi ete molakisi yango “azalaki kopesa biso bandakisa ya makambo oyo esalemaka mpo na kosalisa biso tóyeba ntina ya makambo oyo tozalaki koyekola. Ntango tozalaki koyekola trigonométrie, alakisaki biso ndenge ya kosalela kaka malako na yango mpo na komeka bosanda (hauteur) ya ndako moko ya molai kozanga kutu kosimba ndako yango. Nazali koyeba lisusu ndenge nazalaki koloba ngai moko ete: ‘Oyo nde likambo ya kokamwa mpenza!’”

Pauline afandaka na nɔrdi ya Angleterre; mokolo moko ayebisaki molakisi na ye ete: “Nazali kokoka matematiki te.” Molakisi atunaki ye boye: “Olingi koyeba yango malamu? Nakoki kosalisa yo.” Pauline alobi lisusu ete: “Na basanza oyo elandaki, atyelaki ngai likebi mingi, azalaki kutu kosalisa ngai ata nsima ya kelasi. Namonaki ete alingaki nayeba yango malamu, mpe azalaki komitungisa mpo na ngai. Yango etindaki ngai nasala milende koleka, mpe nakómaki koyeba matematiki malamu.”

Angie afandaka na Écosse mpe azali sikoyo na mbula koleka 30. Ye azali lisusu koyeba Mr. Graham, molakisi na ye ya Istwarɛ; alobaki boye mpo na ye: “Akómisaki liteya ya Istwarɛ elɛngi mpenza! Azalaki kolobela makambo lokola azali kobɛta lisolo mpe azalaki na esengo mpenza mpo na lisolo mokomoko. Azalaki kokómisa makambo nyonso lokola makambo ya sika.” Angie azali mpe koyeba lisusu na esengo mpenza Madame Hewitt, mwasi moko mobange oyo azalaki molakisi na ye na kelasi ya liboso ya eteyelo ya ebandeli. Alobi boye: “Azalaki na boboto mpe azalaki komitungisa mpo na bana-kelasi. Mokolo moko, na kelasi, nakendeki kotuna ye motuna moko. Azingaki ngai na mabɔkɔ na ye. Namonaki mpenza ete azalaki komitungisa mpo na ngai.”

Timote afandaka na sudi ya Grèce. Amonisaki botɔndi na ye na maloba oyo: “Nazali koyeba lisusu molakisi na ngai ya Siansi. Abongolaki mpo na libela lolenge na ngai ya kotalela mokili mpe bomoi. Azalaki kosala ete, na kelasi, bana bázala na limemya makasi mpe bákamwaka. Akɔtisaki na mitó na biso mposa ya koyeba makambo mpe bolingo ya kokanga ntina ya makambo.”

Ndakisa mosusu ezali ya mwasi moko na nkombo Ramona, ye afandaka na etúká ya Californie na États-Unis. Akomi ete: “Molakisi na ngai na lycée azalaki kolinga Lingelesi mingi. Esengo na ye ezalaki mpe kozwa bana-kelasi! Na lisalisi na ye, makambo ya makasi ekómaki komonana pɛtɛɛ.”

Jane afandaka na Canada mpe alobaki na esengo nyonso mpo na molakisi na ye ya ngalasisi (éducation physique) oyo “azalaki na makanisi ebele mpo na kosakana mpe koyekola. Azalaki komema biso na bisika ya polele oyo ezali mosika na bandako mpe alakisaki biso kosala lisano ya ski mpe kolɔba mbisi na nse ya ba glace. Tosalaki kutu bannock, lolenge moko boye ya limpa ya Ba-Indien ya Amerika mpe totumbaki yango na mɔ́tɔ oyo biso moko topelisaki. Makambo nyonso wana ezalaki mpenza makambo ya malamu mpo na ngai, elenge mwasi oyo nazalaki kofanda mingi na ndako kotángáká mikanda!”

Helen azali mwasi moko ya nsɔninsɔni oyo abotamaki na engumba Shanghaï mpe atángaki kelasi na engumba Hong-Kong. Azali koyeba lisusu ete: “Na kelasi ya mitano na eteyelo ya ebandeli, nazalaki na molakisi moko nkombo na ye Mr. Chang; azalaki kotángisa biso ngalasisi mpe koyema. Nazalaki nzoto mike mpe nayebaki mpenza te kobɛta volleyball to basketball. Asambwisaki ngai te. Atikaki ngai nabɛta lisano oyo babengi badminton mpe masano mosusu oyo ebongaki na ngai. Azalaki na motema malamu mpe na boboto mingi.

“Ezalaki se ndenge moko mpo na koyema, nazalaki kokoka te koyema biloko to bato. Yango wana, atikaki ngai nasala likambo oyo nayebaki malamu: koyema midɛlɛ ya bilamba. Lokola nazalaki na mbula moke koleka bana-kelasi mosusu nyonso, andimisaki ngai nazongela kelasi yango. Yango esalisaki ngai mpenza na bakelasi na ngai. Nakómaki komityela motema mpe nakendeki liboso. Nakozala ntango nyonso na botɔndi mpo na ye.”

Balakisi nini basimbaka mitema ya bana-kelasi mingi koleka? Na kati ya buku na ye (To Teach​—The Journey of a Teacher), William Ayers ayanoli boye: “Molakisi malamu azali libosoliboso molakisi oyo alukaka liboso koyeba bamposa ya bana-kelasi na ye mpo akoka kokokisa yango; ezali moto oyo amitungisaka mpe amipesaka mobimba mpo na bomoi ya bana-kelasi na ye. . . . Mpo na kotángisa malamu, esɛngaka te ete molakisi azala na lolenge boye to boye ya kotángisa to azala na mikano boye to boye. . . . Kotángisa bana esɛngaka libosoliboso kolinga bango.” Na bongo, nani oyo bakoki kobenga ye molakisi ya malamu? Alobi ete: “Ezali molakisi oyo asimbaki motema na yo, molakisi oyo ayebaki yo malamu to oyo amitungisaki mpo na yo, molakisi oyo bolingo na ye mpo na liteya oyo azalaki kopesa​—ezala miziki, matematiki, latini, to ba cerf-volant​—ekɔtelaki mpe bana-kelasi mpe elendisaki bango.”

Na ntembe te, balakisi mingi bazwaki matɔndi ya bana-kelasi, ata mpe ya baboti, mpe yango elendisaki bango bákoba na mosala na bango ya kotángisa atako bazali kokutana na mikakatano. Bato nyonso oyo bapesaki matɔndi yango, bapesaki yango mingimingi mpo na lobanzo ya solosolo mpe boboto oyo molakisi amoniselaki bango.

Ya solo, balakisi nyonso basalaka bongo te. Kasi tosengeli kobosana te ete mbala mingi balakisi bakutanaka na mitungisi oyo epekisaka bango básala oyo bakokaki kosala mpo na bana-kelasi na bango. Yango etindi biso tómituna motuna oyo: Mpo na nini bato mosusu baponaka mosala yango ya makasi ndenge wana?

[Elilingi na lokasa 4]

“Kotángisa bana esɛngaka libosoliboso kolinga bango”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto