“Likambo moko ya nsɔmɔ mpenza”
MARIAa abandaki kindumba ntango azalaki na mbula 14. Akómaki na bomoi wana ya nsɔni mpo mama na ye azalaki kotinda ye na makasi; ayebisaki ye ete lokola azali kitoko, mibali bakolinga ye mingi, mpe akozwa mbongo mingi. Na bampokwa, mama ya Maria azalaki kokende kotika ye na otɛlɛ, epai azalaki kokutana na mibali. Azalaki kotɛlɛma mwa pembeni wana mpo azwaka mbongo oyo bazalaki kofuta mwana na ye. Na butu moko, Maria azalaki kolala na mibali misato to minei.
Carina, oyo afandaka mosika mingi te na ba Maria, batindaki mpe ye na makasi asalaka kindumba ntango azalaki na mbula 13. Baboti na ye, oyo basalaka na bilanga ya koko, basalaki lokola baboti mingi na mboka wana, batɛkaki nzoto ya mwana na bango mpo na kozwa mwa mbongo oyo bakobakisa na lifuti moke oyo bafutaka bango. Na mboka mosusu, Estela alongwaki na kelasi ntango azalaki naino mwana moke, liboso kutu ayeba kotánga mpe kokoma, mpe akómaki kosala kindumba na balabala. Daisy azalaki na mbula soki motoba ntango ndeko na ye moko asangisaki na ye nzoto—kobanda wana, bandeko na ye mosusu bakómaki mpe kosangisa na ye nzoto mbala na mbala. Akómaki kosala kindumba ntango azalaki na mbula 14.
Na bisika mingi ya mokili, kindumba ya bana mike ezali likambo oyo ekómi mpenza kobangisa. Ezali kobimisa makambo ya nsɔmɔ. Mbala mingi, bana oyo bamipesaka na kindumba, ezala mbala mokomoko to oyo bamipesá mobimba na yango, bakɔtaka mpe na makambo ya mobulu mpe bamɛlaka bangi. Mingi na bango bazalaka na esengo te mpe bamiyokaka ete bazali na ntina te. Bamonaka ete bomoi na bango wana ya nsɔni ekoki kobongwana te to ekobongwana lisusu te.
Bato minene ya mokili oyo bayebi ete kindumba ya bana mike ebimisaka mpasi ndenge na ndenge. Prezida ya kala ya Brésil, Fernando Henrique Cardoso, alobaki mpenza solo ete: “Kindumba ya bana mike ezali likambo moko ya nsɔmɔ mpenza.” Zulunalo moko ya Brésil ekomaki maloba oyo ezali mpenza kotinda bato na kokanisa na likambo etali kindumba ya bana mike, ekomaki ete: “Bikólo oyo momeseno yango epalangani mingi, epai batikelaka yango nzela, bandimaka yango mpe kutu balukaka yango mpo na [mbongo] oyo epesaka, ekutanaka mikolo nyonso na makambo ya nsɔmɔ oyo momeseno wana ebimisaka. Soki tokokanisi mwa mbongo oyo mosala wana epesaka mpe makama minene oyo ekómelaka bana yango, mabota na bango, mpe mboka mobimba, tokoloba ete mwa mbongo wana ezali eloko te.”
Kasi, atako ezali na bato oyo bazali mpenza na mposa ya kosukisa kindumba ya bana mike, likambo yango ezali se koya makasi. Nini ememaka na likambo wana ya nsɔmɔ? Mpo na nini bato mingi batikelaka likambo wana ya nsɔmɔ nzela to kutu balendisaka yango?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na masolo nyonso ya ebandeli, topesi bato yango bankombo mosusu.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
“Kindumba ya bana mike ezali likambo moko ya nsɔmɔ mpenza.”—PREZIDA YA KALA YA BRÉSIL FERNANDO HENRIQUE CARDOSO
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
“Lolenge nyonso ya kotinda moto asala kindumba epesaka bato lokumu te, mpe ezali bongo kobuka mpenza mibeko etali ntomo ya bato, ezala bazali na mbula boni, bazala basi to mibali, mindɛlɛ to baindo, bato ya ekólo nini, bazwi to babola.”—Sources UNESCO.