Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/4 lok. 18
  • Tribinale monene ya Mpoto elongisi mama moko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tribinale monene ya Mpoto elongisi mama moko
  • Lamuká!—2005
  • Masolo mosusu
  • Babundi mpo na kozwa bonsomi ya losambo
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato elongisi Batatoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Basakoli ya Bokonzi liboso ya batribinale
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Tozali kobatela nsango malamu na nzela ya mibeko ya Leta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Lamuká!—2005
g05 8/4 lok. 18

Tribinale monene ya Mpoto elongisi mama moko

Euti na mokomi na biso na France

NA MOKOLO ya 16 Desɛmbɛ 2003, Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (Cour européenne des Droits de l’Homme), oyo ezali na engumba Strasbourg, na France, emonaki ete batribinale ya France ekweisaki Séraphine Palau-Martínez na likambo kaka mpo na lingomba na ye, mpo azali Motatoli ya Yehova.

Na 1996, Séraphine abomaki libala na mobali na ye oyo asundolaki ye mbula mibale liboso. Tribinale ekataki ete Séraphine nde azwa bana na bango mibale. Na 1997, bana yango oyo bafandaki pene na mbula misato na ndambo epai ya mama na bango, bakendeki kotala tata na bango, kasi ye aboyaki kozongisa bango. Séraphine alobi boye: “Ntango nakendeki kozwa bana na eteyelo mpo tózonga na ndako, mokambi ya eteyelo abengaki bapolisi. Nakokaki komona bana na ngai kaka soki bapolisi bazali, oyo bakokɛngɛla ete naloba na bango makambo ya lingomba na ngai te. Ezalaki lokola nde nazali moto ya mobulu. Bayebisaki ngai ete nakozwa bana kaka soki natye sinyatire na mokanda moko oyo ezalaki kopekisa ngai koteya bango makambo ya Nzambe to makambo ya Biblia, to komema bango na makita ya lingomba na ngai.”

Séraphine akendeki kofunda likambo yango na tribinale. Kasi, na 1998, tribinale moko (Cour d’Appel) ya etúká ya Nîmes ekataki ete tata nde akozwa bana. Bazuzi balobaki ete balongisaki tata na likambo mpo bango basepelaka ata moke te ndenge lingomba ya Batatoli ya Yehova eteyaka bana mibeko makasimakasi. Séraphine alobi boye: “Esalaki ngai mpasi mingi ndenge bafundaki ngai ete nazali kobebisa bana na ngai, nzokande nazalaki nde kosala nyonso mpo na koteya bango bizaleli oyo nayebi ete eleki malamu mpo na bango​—⁠kobɔkɔla bango na mateya ya boklisto.”

Ntango tribinale oyo eleki monene na France (Cour de Cassation), endimaki ndenge oyo tribinale ya liboso (Cour d’appel) ekataki likambo yango, Séraphine akendeki kofunda likambo yango na Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato. Na bazuzi 7 oyo bakataki likambo yango, 6 bandimaki ekateli ya liboso te, balobi boye: “Kozanga ntembe, Tribinale monene ya Mpoto emoni ete tribinale ya France (Cour d’appel) emonisaki ezaleli ya koponapona kati na baboti wana mibale, mpe etalelaki kaka bindimeli ya lingomba ya mwasi. . . . Kokata likambo ndenge wana emonisi ezaleli ya koponapona.” Bazuzi balimbolaki ete liboso ya kozwa ekateli wana, Tribinale ya France etalelaki te soki Séraphine azalaki kobɔkɔla bana yango malamu to te​—⁠likambo oyo balobelaki ata moke te​—⁠to etalelaki te bilembeteli ya polele, kasi “esukaki kaka na kotalela na ndenge ya likolólikoló bindimeli ya Batatoli ya Yehova.” Lokola bakweisaki Séraphine na likambo kaka mpo na lingomba na ye mpe batalelaki lotomo na ye te, Tribinale monene ekweisaki France na likambo mpe esɛngaki yango efuta Séraphine mbongo mpe efuta mai ya mokanda.

Lolenge oyo bakati likambo yango eyokani na ekateli mosusu oyo Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato ezwaki na 1993, ntango ekólo Autriche ekweisaki Ingrid Hoffmann, mwasi moko Motatoli ya Yehova, na likambo kaka mpo na lingomba na ye.a Zulunalo La semaine juridique, oyo elobelaka makambo ya mibeko na France, elobaki boye mpo na ekateli oyo bazwaki mpo na Hoffmann: “Ekateli yango emonisi ete mpo na kokata likambo etali mokumba ya kobɔkɔla bana, esengeli kotalela libosoliboso makambo ya lingomba te.” Avoka ya Séraphine alobi boye: “Ekateli oyo ezali na ntina mingi, mpo endimisi biso ete mibeko oyo bazuzi basengeli kolanda na Tribinale ebongwani te ntango bazali kokata likambo ya baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova kozanga koponapona.”

Ntango batunaki Séraphine, oyo azali kofanda lelo na Espagne, ndenge nini amiyokaki mpo na ekateli yango, alobaki boye: “Nasepeli mingi mpe motema ekiti. Esalaki ngai mpasi ndenge babɔtɔlaki ngai bana mpo na lingomba na ngai mpe ndenge nasalaki mbula mitano kozanga komona bango, kasi ntango nyonso Yehova azalaki kosalisa ngai. Nakanisi ete ekateli oyo ekosalisa bato mosusu oyo bazali kokutana na likambo ya ndenge yango.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔbɛ 1993, lokasa 15, na lisolo, “Garde des enfants: le droit des Témoins de Jéhovah reconnu.” (na Lifalanse)

[Elilingi na lokasa 18]

Séraphine

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto