Mikakatano oyo bamama bakutanaka na yango
“Misala oyo esalemaka na kati ya libota nde eleki ntina na bomoi ya bato. . . . Soki mama azali kokokisa mokumba na ye te, to bana bakobotama te, to eleki malamu bana yango bábotama te.” —Theodore Roosevelt, prezida ya 26 ya États-Unis.
EZALI polele ete esengeli mama azala mpo mwana abotama, kasi mosala na ye esuki kaka na kobota bana te. Mpo na kolobela mosala ya mama na bisika mingi na mokili lelo oyo, mokomi moko akomaki boye: “Azali moto ya liboso oyo abatelaka mwana mokomoko mpo azala nzoto kolɔngɔnɔ, ateyama malamu, azala na mayele, azala na bomoto ya malamu, azala na bizaleli ya malamu, mpe azala na kimya na makanisi.”
Mosala mosusu oyo mama asalaka na ebele ya misala oyo azali na yango, ezali ya koteya bana na ye. Maloba ya liboso oyo mwana ayebaka mpe ndenge ya kobimisa yango, mbala mingi azwaka yango epai ya mama na ye. Yango wana, monɔkɔ ya liboso oyo mwana alobaka, ayekolaka yango epai ya mama na ye. Mbala mingi, mama alekisaka ntango mingi elongo na bana mokolo na mokolo koleka mobali na ye, na yango azali mpenza molakisi na bango ya liboso mpe moto ya liboso ya kopesa bango disipilini. Yango wana, lisese ya Mexique oyo elobi ete, “babandaka koteya mwana na libɛlɛ ya mama,” emonisi mosala monene oyo mama asalaka.
Mozalisi na biso, Yehova Nzambe, apesaka mpe bamama lokumu. Kutu, moko ya Mibeko Zomi, oyo “mosapi ya Nzambe” ekomaki na bitando ya mabanga, elendisi bana boye: ‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo.’ (Exode 20:12; 31:18; Deteronome 9:10) Lisusu, lisese moko ya Biblia elobeli “mibeko ya mama na yo.” (Masese 1:8) Lelo oyo, eyebani ete koteya bana na boumeli ya mbula misato ya liboso ya bomoi na bango, ntango bana mingi bazalaka naino na mabɔkɔ ya mama, ezali na ntina mingi.
Wapi mwa ndambo ya mikakatano oyo bamama bakutanaka na yango?
Bamama mingi bazwaka ntango te ya koteya bana na bango na boumeli ya bambula wana ya ntina mingi mpo basengeli kosala mpo na koleisa libota. Mitango oyo ONU epesi, emonisi ete na mikili mingi ya bozwi, bamama koleka mitano likoló na zomi oyo bazali na bana oyo bakokisi naino mbula misato te, basalaka.
Longola yango, mbala mingi bamama bamɛmaka mokumba ya kobɔkɔla bana bango moko mpo mibali na bango bakendá koluka misala na engumba mosusu to na mboka mopaya. Na ndakisa, lapolo moko emonisaki ete na bamboka mosusu ya ekólo Arménie, mobali moko likoló na misato akendá mboka mopaya koluka mosala. Bamama mosusu babɔkɔlaka bana bango moko mpo mibali na bango basundolá bango to bakufá.
Na bikólo mosusu, mokakatano mosusu ezali ete bamama mingi batángá kelasi te. Departema ya ONU oyo etalaka makambo ya nkita mpe ya bomoi ya bato emonisi ete na bato milio 876 oyo batángá kelasi te na mokili mobimba, mibale likoló na misato bazali basi. Kutu, UNESCO emonisi ete na Afrika, na bikólo oyo elobaka monɔkɔ ya Arabe mpe na bikólo ya ɛsti mpe ya sudi ya Azia, basi koleka 60 likoló na mokama bayebi mokanda te. Longola yango, mibali mingi bakanisaka ete kotángisa basi kelasi ezali na ntina te mpe yango ekoki ata kopekisa bango bákokisa mosala na bango ya bamama.
Zulunalo moko (Outlook) elobi ete na mboka moko ya etúká ya Kerala na Inde, epai bana basi mingi babotaka ntango bazali na mbula 15, mibali balingaka te kobala basi oyo batángá. Na Pakistan, ekólo oyo ezali pembeni na Inde, bamonaka ete bana mibali nde baleki ntina. Batángisaka bango bakelasi ya malamu mpo bázwa misala ya mbongo mpo básalisa baboti na bango ntango bakokóma mikóló. Nzokande, ndenge buku Kotángisa basi kelasi na mikili ya bobola (na Lingelesi) emonisi yango, “baboti balingaka te kobebisa mbongo mpo na bana na bango ya basi mpo bakanisaka ete bana yango bakoki kozwa mbongo te ya kosalisa libota.”
Lisusu, mokakatano mosusu ezali bonkɔkɔ. Na ndakisa, na bamboka mosusu mama asengeli kotosa bonkɔkɔ, lokola oyo ya kotɛka mwana mwasi ya moke na libala mpe kokata ye ngɛnga ya bana basi. Na bamboka mosusu, bapekisaka mpe mama koteya bana na ye ya mibali mpe kopesa bango disipilini. Mama asengeli kotosa bonkɔkɔ ya ndenge wana mpe kotika bato mosusu báteya bana na ye ya mibali?
Na masolo oyo ekolanda, tokomona ndenge bamama mosusu bazali kolonga mikakatano yango. Tokomona mpe ndenge ya kopesa bamama lokumu mingi, kosepela mingi na mosala na bango, mpe ndenge ya kotalela mosala na bango ya koteya bana na makanisi oyo ebongi.
[Etanda/Elilingi na lokasa 4]
“Mokumba ya mama ezali na ntina mingi mpo na kofungola mayele ya mwana, mposa na ye ya koyeba makambo, mpe kokolisa makoki na ye ya kosala mwa biloko ya sika.”—Likita monene mpo na ntomo ya bana, Burkina Faso, 1997.
[Bililingi na lokasa 3]
Bamama basalaka mosala monene mpo mwana mokomoko azala nzoto kolɔngɔnɔ, ateyama malamu, azala na bomoto ya malamu, mpe azala na kimya na makanisi