Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/06 lok. 26
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mabala mingi ezali kobeba na Espagne
  • Bato ya Chine bazali kokóma nzoto mineneminene
  • Ebale emonisi ete bato bazali kosalela bilangwiseli mingi
  • Bazali kokufa mpamba
  • Mikano mpo na kobikisa Bana
    Lamuká!—1994
  • Bana bazali na mpasi
    Lamuká!—1993
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—1998
Lamuká!—2006
g 7/06 lok. 26

Makambo mazali koleka na mokili

◼ Na Brésil, kobanda 1997 tii 2004, motángo ya nkisi oyo esilisaka mposa ya kolya (amphétamine) oyo bato bamɛlaki mpo na kokɔnda emataki mingi mpenza (500 %).​—⁠FOLHA ONLINE, BRÉSIL.

◼ Bato oyo batambwisaka mpɛpɔ ya minene bazali na likama monene ya kozwa maladi ya miso mbala misato koleka bato mosusu. Ntango mosusu, ezali mpo miso na bango emonaka mingi kongɛnga makasi ya moi to ya minzoto.​—⁠THE WALL STREET JOURNAL, ÉTATS-UNIS.

◼ Na boumeli ya mbula zomi oyo ezali koya, bana pene na milio 635 na Azia bakozanga biloko ya ntina, na ndakisa mai ya pɛto, biloko ya kolya, nkisi, kelasi mpe ndako ya kolala.​—⁠ PLAN, BIRO NA YANGO YA AZIA, THAÏLANDE.

◼ Soki moto amɛli likaya mpe moto mosusu abendi milinga na yango, ekotya moto oyo abendi “na likama monene koleka ndenge bato bakanisaka.” Na engumba Pueblo, na etúká ya Colorado, na États-Unis, ntango bapekisaki bato komɛla likaya na babiro, barestora mpe na bandako mosusu ya kofanda, na boumeli ya sanza 18 oyo elandaki, motángo ya bato oyo babɛlaki maladi ya motema ekitaki mingi mpenza (27 %).​—⁠TIME, ÉTATS-UNIS.

Mabala mingi ezali kobeba na Espagne

Na 2000, motángo ya mabala oyo esalemaki na Espagne ezalaki mbala mibale koleka motángo ya mabala oyo ebebaki. Kasi na 2004, soki bato misato babali, mibale mosusu bazalaki kokabwana na balongani na bango to koboma mabala na bango. Banda mibeko epesaki nzela ya koboma libala na 1981, bana koleka milio moko bazali komona ndenge baboti na bango bazali kokabwana to koboma libala. Mpo na nini mabala mingi ezali kobeba? Patricia Martínez oyo ayekolaka bizaleli ya bato alobi boye: “Mabala mingi ezali kobeba mpo mimeseno ya bato ezali kobongwana, bazali kosepela na mateya ya lingomba te, batosaka mitinda ya bizaleli malamu te, basi bakómi kosala misala, mpe mibali bazali kolinga kopesa mabɔkɔ na misala ya ndako te.”

Bato ya Chine bazali kokóma nzoto mineneminene

Zulunalo moko ya Londres (The Guardian) elobi ete: “Na boumeli ya mbula 10 oyo ezali koya, bato milio 200 [na Chine] bakokóma nzoto mineneminene.” Mpo na nini? Zulunalo yango elobi ete: ‘Na bingumba mingi, barestora oyo elambelaka bato nokinoki bilei oyo basɛngi ekómi mingi, bato oyo bazali babola te mpe bazwi te bazali kokóma mingi mpe basalaka ngalasisi mpenza te, batambwisaka motuka mingi mpe balekisaka ntango mingi na televizyo, na ordinatɛrɛ mpe na masano ya video.’ Mbula na mbula, motángo ya bana oyo bazali kokóma nzoto mineneminene ezali kobakisama (8 %) mpe na engumba Shanghai bana koleka 15 likoló ya 100 oyo bazali na eteyelo ya ebandeli, bazali nzoto mineneminene.

Ebale emonisi ete bato bazali kosalela bilangwiseli mingi

Na zulunalo moko (Environmental Health), bato ya mayele balobi ete ntango batalaki mai ya Ebale Po (na Italie) na bamasini, bamonaki ete bato oyo bafandaka zingazinga ya ebale yango basalelaka elangwiseli oyo babengi kokaine mingi koleka ndenge bakonzi bazalaki kokanisa. Ntango bato oyo basalelaka kokaine basubaka, masuba na bango ezalaka na biloko oyo euti na kokaine, na ndakisa benzoylecgonine. Mbala mingi, soki eloko wana emonani na masuba ya moto, bazuzi bayebaka ete moto wana asalelaka kokaine. Lokola batiyo oyo ememaka mai ya salite tii na Ebale Po ememaka mpe masuba, ntango batalelaki mai ya ebale yango bamonaki ete bato oyo bafandaka zingazinga basalelaka kilo soki minei ya kokaine mokolo na mokolo, motángo yango ezali mbala 80 koleka motángo oyo bazalaki kokanisa liboso.

Bazali kokufa mpamba

Na 2005, lapolo moko ya OMS elobaki ete: “Mbula oyo bana pene na milio 11 oyo bakokisi naino mbula mitano te bakokufa na makambo to na maladi oyo ekokaki koboma bango te.” Bana pene na 90 likoló ya 100 bazali kokufa kaka mpo na mwa bantina oyo: babotami matshombe, na bamaladi, mpema ezali kokangama na ntango ya kobotama; bamaladi ya mpanzi; pulupulu; malaria; kintutu to lokutumba mpe sida. Na lapolo yango babakisi ete: “Bana bakoki kokufa ebele boye te, mpamba te ezali mpasi te kosalisa na bankisi oyo tozali na yango sikoyo, mpe bankisi yango ezali ntalo moke mpe ebikisaka mpenza.” Mpe lisusu, mbula na mbula basi koleka 500 000 bazali kokufa na zemi to na ntango ya kobota kaka mpo “bazali kozanga lisalisi ya minganga oyo bayebi mosala yango malamu.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto