Nsango malamu esengeli kosakolama
LIBOSO bábimisa telegrame, bansango ya mosika ezalaki koumela mingi mpo ekóma, mpe ezalaki kokóma na mpasi, na kotalela ntaka mpe lolenge ya nzela. Tózwa ndakisa ya Ba-Incas, oyo bazalaki na Ampire moko monene na Amerika ya Sudi.
Na nsuka ya bambula 1400 mpe na ebandeli ya bambula ya 1500, ntango Ampire yango ekómaki na nguya mingi, mokili na yango esangisaki bisika oyo ezali lelo oyo Argentine, Bolivie, Chili, Colombie, Équateur mpe Pérou, epai Cuzco, mboka mokonzi ya Ampire yango ezalaki. Bangomba milaimilai, bazamba ya mineneminene mpe bantaka milaimilai ezalaki kokómisa mibembo mpasi. Longola yango, Ba-Incas bazalaki na banyama oyo ememaka mikumba te, longola kaka Llama (kamela ya Amerika ya Sudi); bazalaki na mituka te, bayebaki mpe kokoma te. Kasi ndenge nini bazalaki kotindelana bansango ya mosika na mokili monene wana?
Ba-Incas bakómisaki monɔkɔ na bango, Quechua, monɔkɔ ya Leta. Basalaki mpe babalabala ebele. Balabala na bango ya monene, oyo elekaki na mokili ya ngomba-ngomba ya Andes, ezalaki na bolai ya kilomɛtrɛ koleka 5 000. Nzela mosusu oyo etalanaki na yango, oyo elekaki na bokula ya mbu ya Pacifique, ezalaki na bolai ya kilomɛtrɛ soki 4 000. Babalabala ya mikemike ezalaki kouta na balabala moko ya monene tii na oyo mosusu. Ba-Incas basalaki mpe babalabala ya basikalie na bangomba, bagbagba na bisika ya pɔtɔpɔtɔ mpe bagbagba ya nsinga oyo ezalaki kokatisa bibale. Gbagba moko ya ndenge wana, ezalaki na bolai ya mɛtrɛ 45, mpe bansinga na yango ezalaki monene lokola loketo ya moto, mpe eumelaki mbula 500, tii na 1880!
Eloko ezalaki kosalisa Ba-Incas báyebisanaka bansango ya mosika ezali ebongiseli moko ya bamemi-nsango, oyo bazalaki kobenga Chasquis. Bamemi-nsango yango bazalaki kotɛlɛma na babalabala ya minene, moto na moto na eteni na ye, mpo na komemaka bansango. Bazalaki moto na moto na kilomɛtrɛ misato to minei, mpe balobaka ete kokende mpe kozonga oyo bazalaki kosala, ekokaki kosala kilomɛtrɛ koleka 160 na mokolo moko. Bansango mingi oyo bazalaki komema ezalaki kaka ya monɔkɔ, kasi bazalaki mpe komema bansango ya Leta, oyo ezalaki na mitángo mpe mituya, na lisalisi ya quipu. Quipu ezali eloko moko oyo bazalaki kosalela lokola kaye to buku. Bazalaki kosala yango na bansinga bapakolá balangi ndenge na ndenge. Langi mokomoko ezalaki komonisa motángo moko. Kasi, ntango bato ya Espagne balongaki Ba-Incas, quipu ezalaki lisusu kosalelama te, mpe lelo moto moko te ayebi kosalela yango.
‘Makolo kitoko likoló ya ngomba’
Lelo oyo, nsango moko ya ntina mingi ezali kosakolama epai ya bamilio ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Quechua. Ezali nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema oyo ekotya kimya epai ya bato nyonso oyo bakondima etambwisa bango. (Danyele 2:44; Matai 24:14) Ata lelo oyo, mibembo ezali kaka mpasi na bisika oyo ezalaki Ampire ya Ba-Incas, mpe Quechua ezali kaka monɔkɔ oyo bato bayebi kokoma yango te tii lelo. Kasi, Batatoli ya Yehova, oyo mingi kati na bango bayekolá monɔkɔ ya Quechua, bazali na esengo mpenza ya kokabola mikanda mpe bakasɛti na minɔkɔ mingi oyo eutá na Quechua.
Mosala ya basakoli yango ya nsango malamu ezali kokundwela biso maloba ya Biblia oyo: “Kitoko boni likoló ya ngomba ezali makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu, ye oyo akosakola kimya mpe akoyeisa nsango malamu ya kosepela.”—Yisaya 52:7.