Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/11 nk. 8-9
  • Bazali kosakola Bokonzi na Altiplano ya Pérou

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kosakola Bokonzi na Altiplano ya Pérou
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosala ya kosakola ezali kokende liboso
  • Bazali kosalela bakasɛti mpo na koteya
  • Kozala yo moko ezali malamu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo ya basakoli na Bokonzi Bazali
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Nsango malamu esengeli kosakolama
    Lamuká!—2006
  • Kondima na ye elendisaka basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/11 nk. 8-9

Tozali lolenge ya bato oyo bazali na kondima

Bazali kosakola Bokonzi na Altiplano ya Pérou

ALTIPLANO ezali na katikati ya bangomba babengi Andes, na ndelo ya ekólo Bolivie na ekólo Pérou. Nkombo yango elimboli “mokili patatalu oyo ezali likoló” to “ngomba patatalu.” Eteni monene ya Altiplano ezali na Bolivie.

Altiplano ezali na monene ya kilomɛtrɛ 100 mpe molai ya kilomɛtrɛ 1000, etombwani na bamɛtrɛ 3 700 banda na mai monene. Soki bozali na kati ya mpɛpɔ, bouti na Lima, engumba-mokonzi ya Pérou oyo ezali na libongo ya mai monene, bozali kokende na Altiplano, bokoleka likoló ya El Misti, ngomba ya mɔ́tɔ (volcan) oyo nsɔngɛ na yango ezipami na mbula-mpɛmbɛ mpe ekɔtá na mapata. Ngomba yango etombwani na bamɛtrɛ 5 822 banda na mai monene. Okomona mpe na mosika bansongɛ ya Ngomba Nevado Ampato na Ngomba Nevado Coropuna, oyo nsɔngɛ na yango ezipami na mbula-mpɛmbɛ mpe etombwani na bamɛtrɛ koleka 6 000 banda na mai monene. Soki oleki bangomba wana nyonso nde okomona sikoyo ngomba moko monene ya patatalu, yango nde Altiplano oyo ezali na sudi ya Pérou.

Engumba-mokonzi ya etúká Altiplano ya Pérou ezali Puno, ezali na nɔrdi-wɛsti ya Titicaca, libeke (lac) oyo ezali likoló koleka mabeke nyonso ya mokili oyo masuwa etambolaka. Lokola esika yango ezali likoló mingi, na kilomɛtrɛ koleka 3, esɛngaka mwa ntango mpo bapaya bámesana, mpamba te, kuna mopɛpɛ ezali mingi te. Ba Indiens oyo balobaka lokota ya Quechua na oyo balobaka lokota ya Aymara bafandaka penepene ya Libeke Titicaca. Na bilamba na bango ya langilangi ya motane, mai ya pondu to mpe bule, okomona bango bazali kosala misala na bango na ba chacras, to mwa baferme na bango. Atako na Pérou, monɔkɔ oyo bayekolaka na kelasi ezali Espagnole, bato ya Altiplano balobaka mpe monɔkɔ ya Quechua na monɔkɔ ya Aymara.

Mosala ya kosakola ezali kokende liboso

Bato oyo balobaka Quechua mpe Aymara bazali bato ya boboto mpe basalaka mosala makasi. Na bambula oyo euti koleka, mingi kati na bango bazwaki boyebi ya solosolo ya Biblia, mpamba te Yehova apambolaki mpenza milende ya basakoli ya Bokonzi ya ntango nyonso oyo bazali kosala kuna lokola babongisi-nzela minene.

Na ndakisa, José na Silvia, bazali babongisi-nzela minene mpe batindaki bango na engumba Putina, na kilomɛtrɛ soki 50 longwa na Libeke Titicaca. Nsima ya sanza mibale, Silvia azalaki koyekola Biblia na bato 16 mpe José azalaki koyekola na bato 14. Nsima ya sanza motoba mpamba, lisangá oyo ezalaki na basakoli 23, bakómaki 41. Mpe bato oyo bazalaki koyangana na makita bakómaki 132, nzokande liboso bazalaki kaka 48.

José alobi boye: “Ntango tobandaki kosala makita ya lisangá na bamboka mosika wana, tomonaki malamu tóbanda na masukulu ya bato banso mpe Boyekoli ya Mokanda. Bato ya sika bazalaki mpenza na mokakatano te mpo na koyangana na makita.”

Bandeko basi mibale, moko azalaki mobongisi-nzela, bazalaki bato ya liboso oyo bamemaki nsango malamu na Muñani, mboka moko oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 20 na Putina. Kuna, babandaki koyekola Biblia na moto moko akufá miso, nkombo na ye Lucio.a Moto yango abengaki mpe ndeko na ye Miguel. Atako azalaki sango te, Miguel azalaki misionɛrɛ ya Katolike mpe azalaki mokonzi na mboka moko oyo ezali pene wana. Ntango moninga na ye moko atunaki ye mpo na nini azalaki kokende pɔsɔ na pɔsɔ na Muñani, Miguel ayebisaki ye ete akendaka koyekola makambo ya Yehova mpe Liloba na ye. Moto yango atunaki ye ete: “Mpo na nini awa toyekolaka Biblia te?” Lokola bato ya mboka ya Miguel basepelaki, Batatoli bamibongisaki mpo básalaka makita kuna.

Miguel akómaki koteya bato mosusu makambo oyo azalaki koyekola. Kasi alingaki kosala nini lokola azalaki misionɛrɛ ya Katolike mpe molandi ya mokonzi ya mboka yango? Na likita moko oyo basalaki na ndako ya makita ya mboka na bango, ayebisaki bato nyonso ete azali lisusu misionɛrɛ ya Katolike te. Balingaki nde kopona moto mosusu na esika na ye? Moto moko na kati ya bayangani alobaki ete: “Tozali koyekola Biblia, tokopona misionɛrɛ mosusu mpo na nini?” Azalaki nde kolobela mateya ya Batatoli ya Yehova. Moto mosusu alobaki ete: “Toboyi omilongola. Mpo na nini kaka te biso nyonso tólongwa?” Bato nyonso oyo bazalaki wana bagangaki nzela moko ete: “Biso nyonso tolongwe!”

Na nsima, basalaki likita mpo na kolobela bikeko mpe bikulusu na bango. Moto moko asɛngaki na bato nyonso oyo bazalaki wana bátánga Deteronome 7:25, yango elobi ete: “Okozikisa bikeko ya banzambe na bango na mɔ́tɔ. Okolula palata mpe wolo na likoló na yango te mpe okokamata yango mpo na yo mpenza mpe te, ete okangama na yango te, mpo ete ezali na mbindo na miso na [Yehova] Nzambe na yo.”

Na nsima, moto yango asɛngaki bato nyonso oyo bandimi kotumba bikeko na bango bátombola mabɔkɔ. Mbala moko, bato nyonso batombolaki mabɔkɔ. (Misala 19:19, 20) Na kati ya mabota 25 oyo ezali na mboka wana, mabota 23 bazali sikoyo koyekola Liloba ya Nzambe. Bato mibale bazali basakoli oyo bazwi naino batisimo te mpe mibali mitano na basi na bango bazali kokana kokomisa libala na bango na buku ya Leta mpo na kondimama na Yehova.​—Tito 3:1; Baebele 13:4.

Bazali kosalela bakasɛti mpo na koteya

Lokola bato mingi na Altiplano bayebi kotánga mpe kokoma te, bakasɛti-video mpe bakasɛti mosusu ya la Société na monɔkɔ ya mboka ezali mpenza kosalisa bango, ata mpo na koyekola Biblia na bato na bandako na bango. Dora, mobongisi-nzela monene moko, asalelaki bakasɛti mpo na koyekola na bato mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Soki balandi paragrafe moko, na nsima atunaka moyekoli ya Biblia mituna na makambo oyo auti koyoka.

Mbala na mbala, na radio ya mboka yango batyaka kasɛti ya mwa buku Azali kosɛnga na lokota ya Quechua. Mpe lisusu, kaka na radio, batángaka zulunalo Lamuká! na Espagnole. Na bongo, bato mingi bazali koyeba nsango ya Bokonzi mpe batunaka mituna mingi soki Batatoli ya Yehova bakei kotala bango na bandako.

Bato mingi ya mokili bamonaka Altiplano te, kasi Nzambe ye amonaka yango. Lokola Yehova alingaka bato, bato mingi oyo bafandaka na bangomba babengi Andes, na Altiplano, bazali kosangana na baoyo bazali kopesa nkembo na ndako monene ya losambo ya solo.​—Hagai 2:7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na lisolo oyo, topesi bato mosusu bankombo mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto