Ndenge nini moi ekoki kongala na katikati ya butu?
“OMONÁ wapi moi elala te?” Lokola nautaki na Finlande mpe nazalaki misionɛrɛ na ekólo Papouasie-Nouvelle-Guinée, bato mingi bazalaki kotuna ngai mituna ya ndenge wana. Na mikili oyo ezali pene na esika moi elekaka, bangonga ya moi eumelaka kaka ndenge moko pene na basanza nyonso. Yango wana, ezali mwa mpasi mpo bato oyo bafandi na bisika wana bándima ete na mokili ya Arctique moi elalaka te na boumeli ya basanza ebele. Mpe soki nayebisi bango ete na eleko ya mpiɔ mobimba moi ebimaka te, mingi bazalaki kokamwa lisusu makasi koleka.
Kasi, ndenge nini moi ekoki kongala na katikati ya butu? Likambo wana ya kokamwa esalemaka mpo ntango mabelé ezali kobaluka zongazonga na moi na boumeli ya mbula mobimba, motó na yango etikalaka kaka esika moko. Yango wana, na eleko ya molunge na ngámbo ya Nɔrdi, motó ya mabelé etalaka epai moi ezali, kasi na eleko ya mpiɔ, etalaka epai mosusu. Lokola mabelé ebalukaka zongazonga na yango moko na boumeli ya mokolo mobimba, na butu moko na kati ya mbula na nɔrdi ya mabelé, soki mwa 21 na sanza ya Yuni, moi elalaka te. Ndenge moko, na boumeli ya mokolo moko na kati ya mbula, soki na mokolo ya 21 na sanza ya Desɛmbɛ, moi ebimaka te, atako mwa bongɛngi moke, lokola ntɔngɔ elingi kotana, emonanaka na midi.
Na yango, na nɔrdi mpenza ya mabelé, moi elalaka te na eleko ya molunge mpe ebimaka te na eleko ya mpiɔ. Na nɔrdi mpenza mpe na sudi mpenza ya mabelé, moi eumelaka sanza motoba mpe butu sanza motoba.a
Ndenge nini bato oyo bafandaka na nɔrdi mpenza ya mabelé balalaka na ntango ya molunge, oyo ezalaka kaka moimoi? Mpe basalaka ndenge nini na ntango ya mpiɔ, oyo ezalaka kaka butubutu? Kala, bonkɔkɔ ya bato mosusu ezalaki kosala ete bálalaka mingi na ntango ya mpiɔ koleka na ntango ya molunge. Lokola bakómi kotika mimeseno ya bonkɔkɔ, bakómi kolala ndenge moko na bileko nyonso. Kasi, tii lelo oyo, bato oyo bafandaka na Nɔrdi bazalaka kaka na mokakatano ya kolala na eleko ya molunge, oyo ezalaka kaka moimoi. Patrick, oyo afandaka na Alaska alobi boye: “Soki moi ezali kaka kongala tii pene na midi ya butu, nayokaka mpɔngi te. Ntango mosusu nabimaka mpe nakendaka kokata matiti to kosala misala mosusu.”
Epai mosusu, kolekisa ebele ya basanza kaka na moimoi to butubutu ekoki kolɛmbisa nzoto to makanisi. Yango wana, mpo na kopemisa nzoto mpe motó, bato mosusu bapekisaka moi ekɔta na bandako na bango na eleko ya molunge mpe bapelisaka miinda ya makasimakasi na eleko ya mpiɔ mpo bázala na mokakatano ya kolalaka te. Atako bongo, ezala bankolo mboka to bapaya, balobaka ete komona moi ezali kongɛnga na katikati ya butu ezali likambo moko ya esengo.—Ya mokomi na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezalaka mpe ndenge wana na mokili ya Antarctique, kasi soki kuna bakómi na eleko ya molunge, na Arctique bazalaka na eleko ya mpiɔ, mpe bongo na bongo.
[Etanda/Pictures on page 29]
(Mpo na komona ndenge ezali, talá na zulunalo)
Lokola motó ya mabelé etɛlɛmá kaka esika moko, yango esalaka ete na Nɔrdi mpenza mpe na Sudi mpenza ya mabelé, bázalaka kaka na moimoi na eleko ya molunge mobimba mpe butubutu na eleko ya mpiɔ mobimba (Fɔtɔ oyo balakisi awa ezali ya ngámbo ya Nɔrdi)
Ebandeli ya eleko
ya mpiɔ ←
● ● ● ● ●
Eleko ya ● ◯ ● Eleko ya molunge
mpiɔ ● ● ● ● ● Mabelé ebalukaka
zongazonga na yango
moko na boumeli ya
→ Ebandeli ya eleko mokolo mobimba
ya molunge
[Elilingi na lokasa 29]
Fɔtɔ ya moi oyo bakangaki na katikati ya butu na bileko ekeseni
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Paul Souders/WorldFoto