Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/06 lok. 30
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biloko ya motuya oyo ezali na likama
  • Bakómi kozanga bato ya misala ya mabɔkɔ na ekólo Finlande
  • Tribinale moko na France ekati likambo na bosembo
  • “Efelo monene ya banzete”
  • Koyoka makebisi esalisaki bango
    Lamuká!—2006
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—1995
  • Babundi mpo na kozwa bonsomi ya losambo
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—2001
Lamuká!—2006
g 10/06 lok. 30

Makambo mazali koleka na mokili

“Mbula na mbula, bana soki milio motoba bazali kokufa na nzala nsima ya segɔnde mitano nyonso.”⁠JAMES T. MORRIS, MOKAMBI MOKO YA EBONGISELI MOKO (THE WORLD FOOD PROGRAMME )

◼ Eyebani sikoyo ete mopɛpɛ Katrina oyo ebɛtaki na Sudi ya États-Unis na Augusto 2005, ebomaki bato koleka 1 300.​—⁠ZULUNALO THE WASHINGTON POST, YA ÉTATS-UNIS.

◼ Bato koleka 74 000 bakufaki ntango mabelé eninganaki na nɔrdi ya Pakistan mpe na Inde na Ɔkɔtɔbɛ 2005.​—⁠BBC NEWS, ANGLETERRE.

◼ Lapolo moko emonisi ete “bato soki 1 200 000 bazali kokufa mbula na mbula na makama ya mituka.”​—⁠SOUTH AFRICAN MEDICAL JOURNAL, AFRIKA YA SUDI.

Biloko ya motuya oyo ezali na likama

Bakonzi ya Lingomba ya Katolike bazali koyeba te ndenge ya kobatela bikeko ya motuya na bandako-nzambe na ekólo Pérou, oyo etyamaki na ntango oyo Espagne ezalaki koyangela ekólo yango. Na boumeli ya mbula motoba oyo eleki, miyibi bayibaki na bandako-nzambe 200. Na boumeli ya mbula 15 oyo eleki, bayibaki bikeko soki 5 000 kaka na engumba Cuzco, mingimingi mayemi ya langi ya motuya mpenza. Moto moko te ayebi motángo ya mayemi oyo bayibaki na ekólo mobimba. Mpo miyibi bayiba te, na bandako-nzambe mosusu babombaki bikeko na bango, kasi na bisika ya malamu te. Na parwasi moko, banyama balyaki bikeko na bango mosusu oyo abombaki.

Bakómi kozanga bato ya misala ya mabɔkɔ na ekólo Finlande

Bakompanyi ya minene na Finlande ekómi kozanga bato oyo bayekoli misala ya mabɔkɔ bapasoli-mabaya, babongisi-bapompi ya mai, batuli bibende, batongi ya ndako, bamekanisye, bamafulume mpe bongo na bongo. Mpo na nini? Zulunalo moko (Helsingin Sanomat) elobi ete bato bazali kolinga mingi kaka bakelasi ya mineneminene. Heikki Ropponen, oyo azali na kati ya ebongiseli moko ya bakomelesa ya Finlande alobi ete: “Ezali malamu te kotinda bato nyonso bakóma badoktɛrɛ, basali minene ya bikeko mpe bato ya siansi. Esengeli nde kolendisa bato báyekola misala ya mabɔkɔ.”

Tribinale moko na France ekati likambo na bosembo

Mwa 1 Desɛmbɛ 2005, tribinale moko ya monene ya Paris esɛngaki na ministre ya interieur alakisa Batatoli ya Yehova mikanda oyo bafundaki bango na yango na 1996 ete bazali “mwa lingomba ya moke.” Balakisaki mikanda yango epai ya moto moko te mpe babombaki yango makasi mpo na kobatela kimya ya mboka. Kasi, tribinale yango emonaki ete makambo oyo bafundaki na yango Batatoli na mikanda yango ezali mpenza “makambo ezangá ntina.” Atako bongo, basalelaki mikanda yango mbala na mbala mpo na konyokola Batatoli ya Yehova na France.

“Efelo monene ya banzete”

Baleisi ya bibwele, moi makasi, bato oyo bazali kobebisa bazamba mpe mai bazali kosala ete bitando mineminene ya Chine etikala kaka zɛlozɛlo. Yango wana, ndenge zulunalo moko (New Scientist) emonisi yango, bakonzi ya chine babandi “mosala moko monene ya kobatela bazamba, banyama mpe mai. Na programɛ yango oyo ebengami ‘efelo monene ya banzete,’ bazali kolona banzete na ndenge esalema naino te, mpo na kopekisa zelo emataka na mboka.” Bazali mpe kolona matiti mpe banzete ya mikemike mpo na kobatela mabelé. Programɛ yango ebandaki na 1978 mpe na mokano oyo bamityelaki ya kolona, na ntaka ya baektare milio 35, banzete mpe milona mosusu oyo ekoki kokola ata na esika oyo mai ezali te, bakómi sikoyo na katikati.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto