Engebene Biblia
Satana azali nani? Azalaka mpenza?
LELO oyo, bato mosusu ya mayele balobaka ete Satana azali te, bato nde bakanisaka ete azali. Kotya ntembe ete Satana azali te ebandá kala. Charles-Pierre Baudelaire, mokomi moko na ekeke ya 19, alobaki boye: “Mayele mabe mpenza ya Zabolo ezali ya koluka kondimisa biso ete azali te.”
Satana azali mpenza? Soki azali, autá wapi? Azali nde nguya ezangi komonana oyo ezali kobimisela bato mikakatano lelo oyo? Soki ezali bongo, ndenge nini okoki kokima bopusi na ye mabe?
Biblia elobi nini?
Biblia emonisi ete Satana azali mpenza mpe afandaka esika moko na bikelamu mosusu ya elimo. (Yobo 1:6) Emonisi mpe ete azali mabe, ayokelaka bato mawa te mpe asalaka makambo mabe. (Yobo 1:13-19; 2:7, 8; 2 Timote 2:26) Kutu, elobeli masolo oyo Satana asololaki na Nzambe mpe Yesu.—Yobo 1:7-12; Matai 4:1-11.
Ekelamu wana mabe autá wapi? Bambula mingi liboso ya kokela moto, Nzambe akelaki ‘mwana na ye ya liboso’ oyo na nsima akómaki kobengama Yesu. (Bakolose 1:15) Na nsima, akelaki ‘bana mosusu ya Nzambe’ oyo babengami baanzelu. (Yobo 38:4-7) Bango nyonso bazalaki bikelamu ya kokoka mpe ya sembo. Kasi, na nsima moko ya baanzelu yango akómaki Satana.
Ntango akelamaki, abengamaki na nkombo Satana te. Ezali nde nkombo oyo ezali komonisa ndenge azali mpe elimboli “Motɛmɛli, Monguna, Mofundi.” Abengamaki Satana, mpamba te aponaki kotɛmɛla Nzambe bomoi na ye mobimba.
Ekelamu wana ya elimo akómaki na lolendo mpe koyokela Nzambe zuwa. Alingaki básambela ye. Ntango Yesu, mwana ya liboso ya Nzambe, azalaki awa na mabelé, Satana amekaki ata ye mpo ‘asambela’ ye.—Matai 4:9.
Satana “atɛlɛmaki makasi te na kati ya solo.” (Yoane 8:44) Alukaki komonisa ete Nzambe azali mobuki-lokuta, nzokande ye nde azalaki mobuki-lokuta. Ayebisaki Eva ete akozala lokola Nzambe, nzokande ye nde alingaki kokóma lokola Nzambe. Mpe na mayele na ye mabe, akokisaki mposa na ye. Amimonisaki epai ya Eva ete ye aleki Nzambe. Lokola Eva atosaki ye, Satana akómaki nzambe na ye.—Genese 3:1-7.
Lokola abimisaki botomboki, anzelu wana oyo liboso abongaki kotyelama motema, amikómisaki Satana, monguna ya Nzambe mpe ya bato. Mpo na komonisa lisusu ndenge ekelamu mabe wana azali, babengaka ye “Zabolo,” oyo elimboli “mokoseli-bato-makambo.” Na nsima, mobandisi wana ya lisumu apusaki baanzelu mosusu bázanga botosi epai ya Nzambe mpe bakómaki batomboki lokola ye. (Genese 6:1, 2; 1 Petelo 3:19, 20) Baanzelu yango babongisaki bomoi ya bato te. Lokola balandaki ndakisa ya moimi ya Satana, “mokili etondaki na yauli.”—Genese 6:11; Matai 12:24.
Satana azali na bopusi makasi?
Soki bandi moko abomi moto na esika oyo bazalaki kaka bango mibale, akosala nyonso mpo bato báyeba te ete ezali ye. Kasi, ntango bapolisi bakoya mpe bakokuta ebembe wana, bakoyeba ete ezali na moto oyo abomaki ye. Satana, “mobomi-bato,” asalaka nyonso mpo bato báyeba ye te. (Yoane 8:44; Baebele 2:14) Ntango asololaki na Eva, asalelaki nyoka mpo ayebana te. Lelo oyo, azali kaka koluka komibomba. Satana “azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima” mpo báyeba te ete azali na bopusi makasi.—2 Bakolinti 4:4.
Nzokande, Yesu amonisaki ete Satana nde azali ekelamu mabe oyo azali koyangela mokili oyo esili kobeba. Abengaki ye “moyangeli ya mokili oyo.” (Yoane 12:31; 16:11) Ntoma Yoane akomaki boye: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Satana asalelaka mpenza ‘mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela’ mpo na “kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela.” (1 Yoane 2:16; Emoniseli 12:9) Ye nde bato mingi batosaka.
Na ndakisa ya Eva, bato oyo batosaka Satana, akómaka mpe nzambe na bango. Azali mpenza “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (2 Bakolinti 4:4) Boyangeli na ye ebimisi makambo lokola bokosi, lokuta, bitumba, konyokola, kobebisa biloko, kobuka mibeko, lokoso mpe kanyaka.
Ndenge nini okoki kokima bopusi mabe ya Satana?
Biblia epesi toli oyo: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka.” Mpo na nini? Mpamba te “monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.” (1 Petelo 5:8) Atako likambo oyo elobelami na vɛrsɛ oyo ezali lisɛki te, tolendisami na koyeba ete kaka bato oyo bazali kobatela makanisi na bango te, elingi koloba baoyo bazali kotika kokɛngɛla, nde ‘bakokosama na Satana.’—2 Bakolinti 2:11.
Ezali mpenza na ntina tóndima ete Satana azali mpe tótika Nzambe ‘akómisa biso ngwi’ mpe ‘akómisa biso makasi.’ Na ndenge yango, tokoki ‘kotɛmɛla Satana’ mpe komitya na ngámbo ya Nzambe.—1 Petelo 5:9, 10.
OSILÁ KOMITUNA?
◼ Satana autá wapi?—Yobo 38:4-7; Yoane 8:44.
◼ Bopusi nini makasi Satana azali na yango likoló ya mokili?—Yoane 12:31; 1 Yoane 5:19; Emoniseli 12:9.
◼ Tokoki kosala nini mpo tómibatela na mayele mabe ya Satana?—1 Petelo 5:8-10.
[Bililingi na lokasa 10]
Satana azali nguya ezangi komonana oyo ezali kobimisela bato mikakatano lelo oyo?