Okoki koyekola monɔkɔ mosusu
Mike alobi boye: “Ata soki bapesi ngai nini mpo natika, nakondima te.” Phelps, ye alobi boye: “Wana ezali ekateli ya malamu mpenza oyo nazwaki na bomoi na ngai.” Mibali oyo mibale bazali kolobela likambo moko ya pɛtɛɛ te oyo bandimaki kosala: koyekola monɔkɔ mosusu.
NA MIKILI ndenge na ndenge, motángo ya bato oyo bazali koyekola minɔkɔ mosusu ezali se kobakisama. Kati na bango, ezali na baoyo bazali koyekola yango mpo na bantina oyo bango moko bayebi, basusu mpo na makambo ya mombongo mpe basusu mpo na makambo ya Nzambe. Bakomi ya Lamuká! basololaki na bato mingi oyo bazali koyekola minɔkɔ ya bapaya. Batunaki bango mituna lokola oyo: Koyekola monɔkɔ mosusu ezali mpasi te mpo na moto oyo asili kokóma mokóló? Nini ekoki kosalisa moto ayekola monɔkɔ mosusu? Biyano na bango nde esalisi biso tókoma lisolo oyo. Ntango mosusu makanisi oyo epesami awa ekolendisa yo mpe ekoteya yo makambo mingi, mingimingi soki ozali koyekola monɔkɔ mosusu to ozali kokana kosala yango. Na ndakisa, tótalela bizaleli mosusu oyo bato yango balobaki ete ezali na ntina mingi mpo na koyeba monɔkɔ mosusu malamu.
Motema molai, komikitisa, mpe koyeba komimesenisa na makambo ya sika
Ezalaka mpasi te mpo mwana moke ayekola mbala moko minɔkɔ mibale to koleka, mpe mingimingi ayekolaka minɔkɔ yango kaka ntango azali koyoka bazali koloba yango. Nzokande, mikóló bamonaka ete koyekola monɔkɔ mosusu ezali mpasi mingi. Esɛngaka bázala motema molai, mpamba te koyekola monɔkɔ ya sika eumelaka mbala mosusu ntango molai. Lokola bazalaka mpe na makambo mingi ya kosala, mbala mingi yango esɛngaka komipimela makambo mosusu.
George alobi ete: “Komikitisa ezali na ntina mingi. Soki ozali naino koyekola monɔkɔ mosusu, osengeli kondima koloba yango lokola mwana moke mpe, mbala mosusu, kondima ete básalela yo makambo lokola mwana moke.” Buku Ndenge ya koyekola monɔkɔ ya bapaya (na Lingelesi) elobi ete: “Soki olingi mpenza ete okóma koloba monɔkɔ mosusu malamu, osengeli kotombola mapeka te mpe komitungisa mingi te mpo na lokumu na yo.” Yango wana, koyoka nsɔni te soki ozali kosala mabunga. Ben alobi ete: “Soki ozali kosala libunga ata moko te, elakisi ete ozali mpenzampenza te koloba monɔkɔ yango ya sika.”
Komitungisa te soki basusu basɛki yo mpo osali libunga; sɛká nde elongo na bango! Kutu, mokolo mosusu, okobɛtela bato masolo ya mabunga yango mpo na kosɛkisa bango. Lisusu, kobanga te kotuna mituna. Soki oyebi ntina oyo likambo moko elobamaka boye to boye, bɔɔngɔ ekozala na mokakatano te mpo na kokanga likambo yango.
Mbala mingi, koyekola monɔkɔ mosusu esɛngaka mpe koyekola mimeseno ya sika. Yango wana, koyeba komimesenisa na makambo ya sika ezali na ntina mingi. Julie alobi ete: “Koyekola monɔkɔ mosusu esalisi ngai namona ete ezali na ndenge ebele ya kotalela mpe kosala makambo. Lolenge moko te eleki mosusu, kasi ekeseni nde na mosusu.” Jay apesi toli oyo: “Luká kosala boninga na bato oyo balobaka monɔkɔ yango mpe sepelá kozala esika moko na bango.” Na ntembe te, baklisto bakokeba ete baninga yango bázala baninga malamu mpe oyo bazalaka na masolo ya malamu. (1 Bakolinti 15:33; Baefese 5:3, 4) Jay alobi lisusu boye: “Soki bato yango bamoni ete ozali kosepela na bango, na bilei na bango, na miziki na bango, mpe bongo na bongo, ekozala mpasi te mpo bango mpe básepela kozala elongo na yo.”
Soki ozali koyekola monɔkɔ yango mingi, mpe koloba yango mbala na mbala, okoumela te koyeba yango. George alobi ete: “Koyeba monɔkɔ malamu eyaka mokemoke. Ekokani na ndenge nsoso alyaka: adodaka mwa mbuma mokomoko oyo ekendeke kosangana na mosusu na kati ya libumu mpe ekómaka ebele.” Bill ayekolaki minɔkɔ ebele na mosala ya misionɛrɛ; alobi ete: “Bisika nyonso nazalaki kokende, nazalaki komema papye oyo nakomaki maloba ebele na molɔngɔ mpe nazalaki kotánga yango soki nazwi ata mwa ntango moke.” Bato mingi bamoni ete eleki malamu koyekolaka mbala na mbala na boumeli ya ntango mokuse, na esika ya koyekolaka ntango molai kasi mbala na mbala te.
Biloko ezali ebele oyo ekoki kosalisa moto ayekola monɔkɔ mosusu, na ndakisa babuku, bakasɛti mpe bongo na bongo. Atako bongo, bato mingi bamonaka ete bayekolaka malamu soki bazali koyekola elongo na basusu lokola na kelasi. Salelá lolenge nyonso oyo omoni ete ebongi na yo. Kasi, kobosana te ete ata osaleli lolenge nini, esengeli mpe omipesa mpenza mpe okoba kosala milende. Kasi ezali na makambo oyo okoki kosala mpo ete koyekola monɔkɔ mosusu ezala pɛtɛɛ mpenza mpe esepelisa yo mingi, na ndakisa koyokaka monɔkɔ yango mingi mpe koluka mabaku mingi ya koyeba mimeseno ya bankolo monɔkɔ yango.
George alobi ete: “Nsima ya koyeba malamu mwa makambo ya ntina ya monɔkɔ yango ya sika mpe koyeba ata maloba oyo moto oyo abandi koyekola monɔkɔ yango asengeli koyeba, ekozala malamu okende kofanda mwa moke na mboka oyo bato mingi balobaka monɔkɔ yango.” Barb mpe andimi likanisi wana, alobi boye: “Kokende na ekólo oyo balobaka monɔkɔ yango esalisaka moto ayeba malamumalamu makambo oyo ekesenisi monɔkɔ yango na minɔkɔ mosusu.” Likambo eleki ntina ezali ete kozala na esika ya ndenge wana esalisaka moto akóma kokanisa na monɔkɔ yango. Nzokande, moto nyonso te nde azali na likoki ya kokende na ekólo mosusu. Kasi, ata na esika ofandi, okoki mpe koluka komimesenisa na monɔkɔ yango mpe na mimeseno ya baoyo balobaka yango. Na ndakisa, okoki kotánga mikanda, kolanda masolo na radio to na televizyo na monɔkɔ oyo ozali koyekola, soki mikanda to masolo yango ezali kolobela makambo ya mabe te to ya mbindo te. Na esika ofandi, luká bato oyo balobaka monɔkɔ yango malamu mpe sololáká na bango. Buku Ndenge ya koyekola monɔkɔ ya bapaya elobi boye: “Mpo oyeba malamu monɔkɔ oyo ozali koyekola, likambo eleki ntina ezali nde koloba yango mbala na mbala.”a
Soki omoni ete ozali kokende lisusu liboso te
Ntango ozali koyekola monɔkɔ moko, ekoki kokómela yo omona ete otɛlɛmi kaka na esika moko, ozali kokende lisusu liboso te. Okoki kosala nini? Ya liboso, kanisá makambo oyo etindaki yo oyekola monɔkɔ yango. Batatoli ya Yehova mingi bazali koyekola monɔkɔ mosusu mpo na kosalisa bato oyo balobaka yango báyekola Biblia. Soki okanisi lisusu mikano oyo ozalaki na yango na ebandeli, yango ekolendisa yo.
Ya mibale, komityela mikano oyo eleki ndelo te. Buku Ndenge ya koyekola monɔkɔ ya bapaya elobi ete: “Mbala mosusu okokóma koloba lokola bankolo monɔkɔ te. Kasi, yango te mokano na yo. Mposa na yo ezali nde ete bato báyoka makambo ozali koloba.” Yango wana, na esika omilelalela mpo ozali koloba monɔkɔ yango malamu te ndenge olobaka oyo ya bino, saleláká nde makambo oyo oyekoli mpo osololaka na bato na ndenge oyo bakoki koyoka yo malamu.
Ya misato, luká koyeba makambo oyo ezali komonisa ete ozali kokende liboso. Koyekola monɔkɔ mosusu ekokani na kotala ndenge matiti ezali kokola: atako ozali komona mpenza te ndenge matiti yango ezali kokola, kasi mokolo na mokolo matiti yango ezali kokóma molai. Ndenge moko mpe, soki okanisi lisusu ntango obandaki koyekola, na ntembe te okomona ete oyebi sikoyo makambo mwa mingi na monɔkɔ yango. Komikokanisa na bato mosusu te. Landáká nde etinda oyo ezali na Biblia, na Bagalatia 6:4. Vɛrsɛ yango elobi ete: “Tiká moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, mpe na yango akozwa ntina ya komikumisa na oyo etali ye moko mpenza, kasi na komikokanisáká na moto mosusu te.”
Ya minei, yebáká ete bayekolaka monɔkɔ na mikolo mibale to misato te. Kanisá naino: Ndenge nini mwana ya mbula misato to minei alobaka? Abimisaka nde maloba oyo ezali mpasi mpo na koyeba to bafraze ya mindɔndɔmindɔndɔ? Te! Atako bongo, okoki koyoka makambo oyo azali koyebisa yo. Yango emonisi ete, ata mpo na bana mike, esɛngaka bambula mingi mpo báyeba monɔkɔ malamu.
Ya mitano, lobáká monɔkɔ yango ya sika mbala na mbala. Ben alobi ete: “Ntango nazalaki koloba monɔkɔ yango mbala na mbala te, nazalaki komona ete nazali kokende lisusu liboso te.” Yango wana, kobá koloba monɔkɔ yango! Ntango mosusu, elɛmbisaka nzoto soki ozali koluka kosolola na bato na monɔkɔ na bango, kasi oyebi kaka maloba oyo bana mike balobaka. Mileivi alobi na mawa mpenza ete: “Likambo oyo epesaka ngai mpasi mingi ezali ete nazali kokoka te koloba makambo oyo nalingi ntango nalingi koloba yango.” Nzokande, mawa wana nde ekoki kolendisa yo okoba kosala milende. Mike alobi ete: “Soki bato bazali kobɛta masolo mpe koloba makambo ya kosɛkisa, nazalaki koyoka te; nazalaki kosepela ata moke te. Nakanisi yango nde etindaki ngai nasala makasi mpo nakóma koyoka masolo mpe makambo ya kosɛkisa.”
Lisalisi ya basusu
Baoyo balobaka monɔkɔ moko bakoki kosala nini mpo na kosalisa moto oyo azali koyekola yango? Bill, oyo tolobelaki, apesi bango toli oyo: “Lobá malɛmbɛ kasi na ndenge esengeli, koloba te lokola nde ozali kosolola na mwana moke.” Julie alobi boye: “Zalá motema molai; soki moto oyo azali koyekola azali koloba likambo moko, kokata ye maloba te.” Tony alobi boye: “Bato oyo bayebaki koloba monɔkɔ na biso mpe oyo nazalaki koyekola bazalaki kolinga kolobisa ngai na monɔkɔ na biso. Yango nde esalaki ete nayeba noki te monɔkɔ oyo nazalaki koyekola.” Yango wana, bato mosusu oyo bazali koyekola monɔkɔ ya sika basɛngaka baninga na bango ete na bantango mosusu bálobisaka bango kaka na monɔkɔ yango mpe báyebisaka bango makambo oyo basengeli kobongisa. Bato oyo bazali koyekola monɔkɔ mosusu balingaka mpe bato oyo bapesaka bango longonya ya solosolo mpo na milende oyo bazali kosala. Kutu, George alobaki boye: “Bilendiseli mpe bolingo ya baninga na ngai esalisaki ngai mingi; soki te, nalingaki kokoka te.”
Ezali mpenza na ntina koboma nzoto mpo na koyekola monɔkɔ mosusu? Bill, oyo tolobaki ete alobaka minɔkɔ mingi, apesi eyano oyo: “Ɛɛ! Makanisi na ngai efungwami lisusu mpe nakómi kotalela makambo ndenge mosusu. Mingimingi, kozala na likoki ya koyekola Biblia na bato oyo balobaka minɔkɔ yango, komona bango bazali kondima mateya ya Biblia mpe kokola na elimo, ezali na ntina mingi koleka milende oyo nasalaki mpo na koyekola minɔkɔ yango. Kutu, mokolo moko, moto moko oyo alobaka minɔkɔ 12 ayebisaki ngai boye: ‘Nazali kolula yo. Ngai nayekolaka minɔkɔ kaka mpo na esengo ya koyekola; kasi yo, oyekolaka minɔkɔ mpo na kosalisa mpenza bato.’”
[Maloba na nse ya lokasa]
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]
Mposa ya kosalisa bato ezali ntina monene ya koyekola monɔkɔ mosusu