Nini ebendaka bato na misala ya bilimo mabe?
EYANO na motuna wana ekoki kotalela mingimingi esika moto na moto azalaka, mateya ya lingomba na ye mpe mimeseno ya mboka na bango. Na mboka na bino, nini ebendaka bato na misala ya bilimo mabe? Ekoki kozala moko ya makambo oyo alandi:
● Mposa ya koyeba Bato babotamaka na mposa ya koluka koyeba makambo, mpe lokola misala ya bilimo mabe eyebanaka polele te, yango wana bato balukaka koyeba yango. Na yango, bato mosusu bamitunaka soki ezali na nguya moko oyo etambwisaka misala ya bilimo mabe. Bato mosusu bakoki kosala bikelakela to kotánga makambo na horoscope mpo na komona soki makambo oyo elobi ekozala solo. Lisusu, bato mosusu bakoki kokende na bisika oyo basalaka makambo yango to kokutana na moto oyo asololaka na bilimo mabe.
● Masano Na bambula oyo euti koleka, emonani ete masano mingi (babuku, bafilme mpe masano ya ordinatɛrɛ), ezali kolobela bilimo mabe mpe biyambayamba ya bapakano ya ntango ya kala. Masano yango mosusu ezali na makambo ya mobulu mpe ya kosangisa nzoto.
● Komitungisa mpo na mikolo ezali koya Biblia esakolaki ete: “Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Ya solo, tozali mpenza na ntango ya mpasi, mpe bato mingi bazali kokende epai ya bato ya misala ya bilimo mabe, na ndakisa bato oyo batalaka minzoto, baoyo basakolaka makambo ekoya, oyo batalaka mabɔkɔ mpo na koyebisa makambo ekoya mpe bato ya bikelakela, mpo na koyeba oyo basengeli kosala. Moto moko ya bikelakela alobaki ete: “Ezali moko ya misala oyo efutaka malamu. Mbala mingi, bato bakoya epai na yo kaka soki bazali na mikakatano.” Mwasi moko na Canada oyo asalaka misala ya bilimo mabe alobaki ete: “Bato ya misala ya biro babengaka ngai na kobombana na telefone ya mosala to na telefone ya mabɔkɔ, mpe balobaka na mongongo ya nse.” Abakisaki boye: “Ezali bato oyo bazalaki liboso kokatana mpe koboya kokende epai ya bato ya misala ya bilimo mabe.”
● Maladi Na mikili mosusu, mbala mingi bato oyo bazali kobɛla makasi baboyaka kokende epai ya minganga, kasi bakendeke nde epai ya bato oyo basalisaka na bonkɔkɔ, oyo basalelaka mayele ya bilimo mabe. Bato yango bakoki koloba ete maladi na bango ezali ya kolɔka to ya kobwakela. Mpo babika, baninga to bato ya libota na bango, bakoki kobenga moto ya bikelakela, mpe moto yango akoki kosɛnga mbongo mingi.
● Mposa ya komibatela mpe ya makila malamu Na mikili mosusu ya Afrika, bato ya mboka babengaka “mosakoli” ya lingomba moko oyo eyebani ete esalaka makamwisi, mpo abengana bilimo mabe na mboka. Milulu yango esɛngaka komɛla bankisi ya maji mpe mai oyo babengaka “mai mosantu.” Na bisika mosusu, bato bakendeke epai ya bato oyo basololaka na bademo mpo bátombela bango makila malamu na ndako na bango ya sika to na lilita.
● Kobatela bana Na ekólo Papouasie-Nouvelle-Guinée, mama akoki koboya kobima na mwana na ye libándá na butu. Mpo na nini? Mpo azali kobanga ete bilimo mabe bakoki kosala mwana mabe. Na Ouganda, mbala mingi bamama balitaka mwa nsinga, mbala mosusu batyaka yango mposo ya mbɛmbɛ mpe mayaka, mpe bakangaka yango bana na lobɔkɔ to na lokolo mpo mabe ekómela bango te.
● Ntango moto oyo olingaka akufi Mwana ya Arthur Conan Doyle, mokomi moko ya Angleterre, akufaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe ndeko na ye, ná bokilo na ye mpe mwana ya ndeko na ye mpe bakufaki. Lokola bazalaki na mawa makasi mpe bazalaki koyeba te nini bakoki kosala, Doyle ná mwasi na ye babandaki kokende epai ya moto ya bilimo mabe na elikya ya kosolola na mwana na bango oyo akufaki. Lelo oyo mpe, bato mingi bakendeke epai ya bato ya bilimo mabe mpo na kosolola na balingami na bango oyo bakufá. Na mikili mosusu, mangomba ya bonkɔkɔ mpe oyo emibengaka ya bokristo, eteyaka ete soki moto akufi, ezali mpo na likambo moko ya mabe oyo euti epai na elimo moko oyo esiliki. Bato bakoki kosalaka milulu ebeleebele oyo esɛngaka mbongo mingi, mpo na kobatela bato mosusu mpo bákufa te.
● Kobanga bakufi Mateya etali liwa mpe bakufi ekɔtelá bato mpenza. Na yango, na mikili mingi, bato basalaka milulu ndenge na ndenge, na ndakisa, bamiyokisaka nzoto mpasi mpo na kokitisa bakufi motema to “komonisa” ete balingaka bango. Na bisanga ya Pasifike, bato mosusu bayebisaka bato oyo balongani na bango bakufi ete bálata bilamba ya moindo mpe básala lilaka basanza ebele, bákangama na ndako mpe balya te biloko oyo molongani na bango azalaki kosepela na yango mingi. Bato oyo basalaka milulu yango bakoki kolɛmba nzoto to kobɛla mpo na nzala ata mpe kokufa.
Emonani polele ete ezali na makambo mingi oyo etindaka bato básala misala ya bilimo mabe. Yango wana, ezali na ntina tóyeba mpenza epai mateya ya bilimo mabe eutaka. Mpo na yango, tótalela Biblia, buku kaka moko oyo elobeli na mozindo makambo etali misala ya bilimo mabe.