Makambo oyo ezali koleka na mokili
“Soki okómi prezida, ata soki ozalaki kosambela te okobanda kosambela.”—BARACK OBAMA, PREZIDA YA ÉTATS-UNIS.
Na Argentine, batunaki bato ndenge nini bakoki komonisa bolingo ya ekólo, mpe bato mingi (56%) oyo bazali na mbula 10 tii 24 balobaki ete bakosepela kolata mayo ya ekipi ya ndembo ya ekólo na bango.—Zulunalo LA NACIÓN, ARGENTINE.
Ankɛtɛ moko emonisi ete “bilei mingi (1/3) oyo ebimisami mpo na bato na mokili mobimba ebebaka to ebwakamaka. Yango ezali batoni koleka miliare moko ya biloko ya kolya oyo ebebaka mbula na mbula.”—FAO, ITALIE.
“Lelo oyo, mokili etondi na bitumba mpe nsango ya bitumba, yango wana mampinga ya ekólo na biso esengeli ntango nyonso komilɛngɛla mpo na kobatela bato mpe biloko nyonso mosantu na mabɔkɔ ya banguna.”—KIRILL, MOKONZI YA LINGOMBA YA ORTODOKSE NA RUSSIE.
Na ekólo Allemagne, kompanyi moko ya asiranse elobi ete na mobu 2010, baaksida ya motuka esalemaki mingi na ngonga ya 7 tii 8 na ntɔngɔ. Mokonzi moko ya kompanyi yango alobi boye: “Lolenge moko ya malamu ya kokima makama yango ezali ya kolongwa ndako na ngonga ya malamu.”—PRESSEPORTAL, ALLEMAGNE.
Bazali koluka Imam
Na ekólo Malaisie, momekano moko mpo na kopona mokambi ya Lingomba ya Bamizilma oyo babengi imam ezali koleka na televizyo mpe bato mingi bazali kotala yango. Nkombo na yango “Imam Muda,” to “Elenge-mokonzi.” Bilenge ndenge na ndenge ya mbula 18 tii 27 bakɔti na momekano yango oyo ezali kosalema na engumba Kuala Lumpur mpe oyo alongi te alongwe tii ntango moko kaka nde akotikala. Molongi akozwa mbongo mpe motuka ya sika, akokóma imam mpe bakopesa ye bourse mpo na kotánga na Arabie saoudite, mpe lisusu bakofutela ye mobembo na Mecque. Bilenge yango basengeli koyeba malamu mosala ya imam, makambo ya lingomba mpe oyo ezali kosalema na mokili, mpe kotánga Koran na motó. Moto oyo abimisi lisano yango alobi ete asali bongo mpo na “kobenda bilenge” na Lingomba ya Bamizilma.
Kozanga bokɛngi na Internet
Bato mingi oyo basololaka na Internet bakebaka te na makama ya kobimisa makambo oyo etali kaka bango moko. Kasi, kozanga bokengi na Internet ekomema makama ata ndɛlɛ. Zulunalo moko ya Australie (Sydney Morning Herald) ezongelaki maloba ya Timothy Wright, mokambi ya eteyelo moko ete: “Na Internet soki obimisi liloba kozanga kokanisa, otɔngi moto, to otye fɔtɔ moko oyo ebongi te, to mpe oyebisi makambo oyo etali kaka yo moko, nyonso wana ekotikala libela mpe moto nyonso akoki komona yango. Elingi koloba ete, ata nsima ya mbula zomi, mokonzi moko ya mosala akoki komona mabunga oyo osalaki ntango ozalaki na mbula 15.”