Kokóma moninga ya Nzambe eponi mbula te
Lisolo ya Olavi Mattila
Motatoli moko ya Yehova atunaki ngai boye: “Oyebaka ete okoki mpenza kozwa boyebi ya solosolo ya Mozalisi?” Motuna wana etindaki ngai nakanisa mingi. Na ntango yango, nakómaki na mbula koleka 80 mpe nayebanaki na bato mingi ya lokumu, ata mpe bakonzi ya politiki. Kasi, na bambula oyo nakómaki na yango, nakokaki mpenza koyeba Nzambe mpe kokóma moninga na ye?
NABOTAMAKI na engumba Hyvinkää, na ekólo Finlande, na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1918. Ntango nazalaki naino mwana moke, nazalaki kopesa mabɔkɔ na misala ndenge na ndenge na ferme. Libota na biso ezalaki kobɔkɔla bangɔmbɛ, bampunda, bansɔsɔ mpe mabata ya nkingo milai (oies). Nayekolaki kosala mosala makasi mpe kosepela na mosala na ngai.
Baboti na ngai bazalaki kolendisa ngai natánga kelasi. Na yango, ntango nasilisaki eteyelo ya ntei, nalongwaki ndako mpe nakendeki kotánga na iniversite. Nakómaki mpe kosala masano mpe nayaki koyebana na Urho Kekkonen, mokambi ya ebongiseli ya masano oyo babengi Fédération finlandaise d’athlétisme. Nayebaki te ete na nsima Kekkonen akozala ministre-mokonzi mpe prezida, mpe ete akokamba ekólo Finlande na boumeli ya mbula 30. Kasi oyo eleki, nayebaki te ete koyebana na ye ekobongola mpenza bomoi na ngai.
Bomoi ya lokumu mpe bokonzi
Na mobu 1939, bitumba ebimaki kati na Finlande mpe Union soviétique. Na sanza ya Novɛmbɛ ya mbula yango, babengisaki ngai nakɔta na mosala ya soda. Na ebandeli nazalaki kopesa basoda formasyo, mpe na nsima nakómaki komanda ya pelɔtɔ ya basoda oyo basalelaka mindoki ya minene. Bitumba ezalaki na Carélie, esika moko oyo ekaboli Finlande ná Union soviétique. Na eleko ya molunge ya mobu 1941, ntango tozalaki kobunda pene na engumba Vyborg, biteni ya bɔmbi ezokisaki ngai makasi mpe bamemaki ngai na lopitalo moko ya basoda. Nakokaki lisusu kobunda te.
Na Sɛtɛmbɛ 1944, mosala na ngai ya soda esilaki mpe nazongaki kotánga na iniversite. Nazongelaki mpe masano na ngai. Kutu, mbala misato mobimba nabimaki mopoti-mbangu ya liboso na ekólo mobimba. Nazwaki mpe diplome ya iniversite na mayele ya bamasini mpe mosusu na makambo ya nkita.
Na ntango wana, Urho Kekkonen akómaki moto monene na politiki. Na 1952, ntango azalaki ministre-mokonzi, asɛngaki ngai nakende kosala na ekólo Chine mpo na guvɛrnema na biso. Kuna, nakutanaki na bakonzi mingi ya guvɛrnema ná mpe mokambi ya Chine, Mao Tsétoung. Kasi mpo na ngai, moto ya ntina mingi oyo nakutanaki na ye na Chine ezalaki Annikki, mwana mwasi moko kitoko oyo azalaki kosala na ministɛrɛ ya Finlande ya makambo etali boyokani na bikólo mosusu. Tobalanaki na Novɛmbɛ 1956.
Na mbula oyo elandaki, batindaki ngai nakende kosala na ambasade ya Finlande na ekólo Argentine. Kuna, tobotaki bana mibale ya mibali. Na Yanuali 1960, tozongaki na Finlande. Mwa moke na nsima, tobotaki mwana na biso ya misato, mwana mwasi.
Nakómi moto monene mpenza na guvɛrnema
Atako nazalaki moto ya lingomba moko te ya politiki, na Novɛmbɛ 1963, Prezida Kekkonen atyaki ngai ministre ya makambo ya mombongo na bikólo mosusu. Na bambula 12 oyo elandaki, nasalaki na ministɛrɛ motoba ya guvɛrnema; mbala mibale nazalaki ministre ya makambo etali boyokani na bikólo mosusu. Na ntango wana, nazalaki mpenza kokanisa ete bato bakoki kosilisa mikakatano na mayele na bango. Kasi eumelaki te, nayaki komona ete bato bazalaka na mposa makasi ya kozala bakonzi. Namonaki na miso mpenza mabe oyo eutaka na likunya mpe kozanga kotyelana motema.—Mosakoli 8:9.
Atako bongo, namonaki mpe ete ezali na bato mosusu ebele oyo balukaka mpenza kobongisa makambo. Kasi nsukansuka, ata bakonzi ya makanisi malamu ndenge wana bakokaka te kokokisa mikano na bango.
Na eleko ya molunge ya mobu 1975, bakambi ya bikólo 35 bayaki na engumba Helsinki na likita moko oyo elobelaki makambo ya kimya mpe boyokani na mikili ya Mpoto. Na ntango wana nazalaki ministre ya makambo etali boyokani na bikólo mosusu, mpe mopesi-toli ya prezida Kekkonen. Bapesaki ngai mokumba ya kobongisa likita yango, mpe nakutanaki na bakambi nyonso ya bikólo oyo bayaki.
Na mwa mikolo moke wana, mayele na ngai ya koyokanisa bato ekómaki na nsuka. Kaka mpo moto andima kofanda na esika oyo baponelaki ye, ezalaki likambo! Atako bongo, namonaki ete likita yango ná makita mosusu oyo elandanaki na nsima, esalisaki mingi mpo na kotosama ya ntomo ya bato mpe boyokani malamu kati na bikólo ya nguya mingi.
Nakómi na mposa ya makambo ya Nzambe
Na 1983, nazwaki pasyo mpe tokendeki kofanda na France, esika mwana na biso ya mwasi azalaki kofanda. Kasi na Novɛmbɛ 1994, likambo moko ya mpasi ekómelaki biso: Minganga bazwaki Annikki na kanser ya libɛlɛ. Kaka na mbula yango, namikɔtisaki na mombongo moko oyo na nsima eyaki komonana ete ezalaki nde ya kobuba bato. Bomoi na ngai mobimba, nasalaki makasi nabatela lokumu na ngai, kasi kaka mwa libunga moko wana ebebisaki lokumu na ngai nyonso.
Bomoi na ngai mobimba nazalaki kokutana na Batatoli ya Yehova. Nazalaki kosepela ntango bazalaki koya epai na ngai mpe nazalaki kozwa bazulunalo na bango; kasi nazalaki na makambo ebele ya kosala mpe ntango ya kokanisa makambo ya Nzambe ezalaki te. Na mobu 2000 nakómaki kokipe Annikki mpo azalaki kaka kobɛla kanser. Mokolo moko na sanza ya Sɛtɛmbɛ 2002, Motatoli ya Yehova moko ayaki epai na biso. Atunaki ngai motuna oyo ezali na ebandeli ya lisolo oyo. Namitunaki boye: ‘Moto akoki mpenza koyeba solo na ntina na Nzambe? Akoki mpenza kokóma moninga ya Nzambe?’ Nakendaki kokundola Biblia na ngai oyo nasalelá kala mpenza, mpe kobanda wana nakómaki kosolola makambo ya Biblia elongo na Batatoli.
Na Yuni 2004, mwasi na ngai oyo nalingaki mingi akufaki mpe natikalaki ngai moko. Ya solo, bana na ngai basalisaki ngai mingi, kasi nazalaki kaka komituna nini ekómelaka moto soki akufi. Natunaki bapastɛrɛ mibale ya Lingomba ya Protesta likambo yango. Bayanolaki ngai kaka ete: “Ah, wana ezali mituna ya makasi.” Eyano na bango ekitisaki ngai motema te. Nakómaki na mposa makasi ya koyeba makambo ya Nzambe.
Ntango nakobaki koyekola Biblia na Batatoli, nakómaki na boyebi ya solosolo oyo nazalaki na yango mposa. Na ndakisa, Biblia elimboli ete bakufi bayebi likambo te, bazali lokola bato oyo balali mpɔngi, mpe ete bazali na elikya ya kozonga lisusu na bomoi awa na mabele. (Yoane 11:25) Yango ebɔndisaki ngai mpenza mpe epesaki ngai elikya.
Eumelaki te, nasilisaki kotánga Biblia mobimba. Vɛrsɛ moko oyo esimbaki motema na ngai ezali Mika 6:8, oyo elobi ete: “Eloko nini Yehova azali kosɛnga yo, soki bobele komonisa bosembo, kolinga boboto mpe kotambola na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo?” Bwanya ya maloba mwana ya pɛtɛɛ esepelisaki ngai mingi. Emonisaki mpe ete Yehova atondi na bolingo mpe azali sembo.
Nazwi elikya mpo na mikolo ezali koya
Koyekola solo na ntina ya Nzambe ekolisaki kondima na ngai mpe nakómaki kotyela ye motema mingi. Nabandaki kokóma moninga ya solosolo ya Mozalisi! Maloba ya Yisaya 55:11 esepelisaki ngai mingi; elobi boye: “Liloba oyo ezali kobima na monɔkɔ na ngai ekozala ndenge wana. Ekozongela ngai te soki ekokisi naino likambo na yango te, kasi ekosala mpenza oyo nasepeli na yango, mpe ekolonga mpenza na likambo oyo natindaki yango.” Ya solo, Nzambe akokisaka bilaka na ye, mpe akosala yango na mikolo ezali koya. Akokokisa mikano oyo baguvɛrnema ya bato mpe makita na bango ebeleebele ya politiki ekokaka te kokokisa. Na ndakisa, Nzembo 46:9 elobi boye: “Ye azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele.”
Koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova esalisi ngai mingi. Kuna, namoni na miso bolingo ya bokristo oyo ezali elembo ya bayekoli ya solo ya Yesu. (Yoane 13:35) Bolingo yango eleki mpenza bolingo ya ekólo, mpe bato ya politiki ná ya mombongo bazalaka na yango te.
Nazwi lokumu oyo eleki nyonso
Nazali sikoyo na mbula koleka 90, mpe lokumu oyo nazwi ya kokóma Motatoli ya Yehova, eleki lokumu nyonso oyo nazwá na bomoi na ngai. Nakokisi mposa na ngai ya koyeba makambo ya Nzambe. Nazwi libaku malamu ya koyeba ntina ya bomoi mpe solo oyo etali Nzambe.
Nazali mpe na esengo makasi mpamba te, ata na bambula oyo nakómi na yango boye, nayanganaka na makita mpe nabimaka mosala ya kosakola. Atako na bomoi na ngai nakutanaki na bato mingi ya nguya mpe nasalaki misala ya lokumu, eloko moko te ekokani na libaku ya koyeba Mozalisi, Yehova Nzambe, mpe kozala moninga na ye. Nazali na botɔndi mingi epai na Yehova, mpe nazali na mposa ya kosanzola ye mpo na libaku nazwi ya kokóma moko ya “bato oyo bazali kosala elongo na” ye. (1 Bakorinti 3:9) Ya solo, kokóma moninga ya Nzambe eponi mbula te!
[Elilingi na lokasa 15]
Elongo na Prezida Kekkonen mpe Prezida ya États-Unis Gerald Ford, na likita ya Helsinki na mobu 1975
[Elilingi na lokasa 15]
Elongo na Prezida Kekkonen mpe Leonid Brejnev, mokambi ya Union soviétique
[Elilingi na lokasa 16]
Nayanganaka na makita mpe nabimaka mosala ya kosakola
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]
Na nse, na lobɔkɔ ya mwasi: Ensio Ilmonen/Lehtikuva; na nse, na lobɔkɔ ya mobali: Esa Pyysalo/Lehtikuva