Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/12 lok. 23
  • Moto oyo atiká nsango mpo na mituna na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto oyo atiká nsango mpo na mituna na ye
  • Lamuká!—2012
  • Masolo mosusu
  • God Begins to Make Things
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Biloko ya motuya ya Laki oyo eleki monene na Amerika ya Ntei
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yehova asungi ngai na bomoi na ngai mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Moi ná baplanɛti na yango ebimaki ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Lamuká!—2012
g 4/12 lok. 23

Moto oyo atiká nsango mpo na mituna na ye

● Okolinga bato bakanisaka yo na makambo nini? Nini ekoyela bato na makanisi ntango bakanisi yo? Bato mingi balingaka kotika nsango. Yango wana basalaka nyonso bázala bato minene na makambo ya siansi, ya politiki, na masano mpe na misala ya ntɔki. Bongo soki otiki nsango nde mpo na mituna oyo otunaki?

Eleki sikoyo mbula nkama mitano, mobali moko na Amerika ya Ntei atunaki mituna ya ntina mingi. Mobali yango na nkombo Nicarao, azalaki nkumu ya mboka, mpe mbala mosusu nkombo “Nicaragua” eutá na nkombo na ye. Na nsima, bakómaki kobenga bato na ye, mboka oyo azalaki kofanda, mpe laki na bango ya monene na nkombo na ye.

Nicarao ná bato na ye bazalaki kofanda na eteni ya mabele oyo ezali kati na Mbu ya Pasifike mpe laki monene na nkombo Nicaragua. Mwa moke nsima wana Christophe Colomb amonaki Amerika, bato ya Espagne basalaki mobembo mpo na kotala mokili yango. Kapitɛni González Dávila amemaki basoda na ye na ngambo ya nɔrdi ya ekólo oyo ebengami lelo oyo Costa Rica, mpe akɔtaki na mboka ya Nicarao na mobu 1523.

Kanisá ndenge bato yango bazalaki motema likoló ntango bazalaki koleka na mboka oyo bayebi te. Na ntembe te, basepelaki mpenza ntango bakutanaki na Nkumu Nicarao! Bato na ye bayambaki bato ya Espagne na boboto, ndenge bamesaná kosala tii lelo oyo. Bapesaki bango bakado, ezala mpe wolo mingi mpenza.

Nicarao alingaki kozwa biyano na mituna oyo azalaki na yango banda kala. Mituna mosusu eyelaki ye nsima ya kokutana na bato ya Espagne. Bakomi ya makambo ya kala balobi ete Nicarao atunaki Kapitɛni González mituna oyo elandi:

Osilá koyoka nsango ya mpela moko monene oyo ebomaki bato mpe banyama nyonso? Nzambe akobimisa lisusu mpela na mabele? Nini ekómelaka moto nsima ya liwa? Ndenge nini moi, sanza mpe minzoto etambolaka? Ndenge nini yango efandaka na likoló? Ekabwani na mabele na kilomɛtrɛ boni? Mokolo nini moi, sanza mpe minzoto ekotika kongɛnga? Mopɛpɛ eutaka wapi? Nini ebimisaka molunge ná malili, mpe pole ná molili? Mpo na nini butu eyindaka na ngonga moko te mikolo nyonso ya mbula?

Emonani polele ete Nicarao azalaki na mposa makasi ya koyeba makambo. Mituna na ye emonisi makambo oyo azalaki kondima. Emonisi ete ye mpe azalaki komitungisa mpo na makambo oyo etungisaka bato mingi lelo. Mpe ndenge oyo Nicarao ná bato na ye bayebaki lisolo ya Mpela, eyokani na ndenge oyo Biblia elobeli yango.​—Ebandeli 7:17-19.

Atako bato ya Nicarao bazalaki komipesa na bonganga-nkisi mpe kopesa bambeka ya bato, alingaki mpenza ete bázala na bizaleli mpe bomoi ya malamu. Mituna na ye emonisi mpenza ndenge lisosoli ya bato esalaka. Mpo na lisosoli ya bato, ntoma Paulo akomaki ete: “Lisosoli na bango ezali kotatola elongo na bango mpe, na makanisi na bango moko, ezali kofunda bango to mpe kolongisa bango.”​—Baroma 2:14, 15.

Lelo oyo, basalá ekeko ya Nkumu Nicarao mpe batyá yango na esika oyo bato balobaka ete akutanaki na bato ya Espagne mpo na mbala ya liboso. Azalaki moto moko oyo alukaki koyeba makambo, mpe yango etindaki ye akanisa mingi likoló ya bomoi mpe mokili; azali ndakisa malamu mpo na biso.​—Baroma 1:20.

[Karte na lokasa 23]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Nicaragua

AMERIKA YA SUDI

MBU ATLANTIKE

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto