Maladi ya gutɛ—Eutaka na nini mpe ndenge nini tokoki komibatela?
GUTƐ ezali moko ya bamaladi ya mingai oyo eyebani mingi mpe oyo esalaka mpasi makasi koleka. Buku moko (Arthritis) elobi boye: “Lolenge wana ya maladi ya mingai eyaka soki aside oyo nzoto esengeli kobimisa na nzela ya masuba (acide urique) ezali kobima te.” Mpe ebakisi ete: “Eloko oyo ebimisaka maladi yango eyebani malamu: aside oyo esengeli kobima na nzela ya masuba ekendeke kofanda na litonga . . . , mingimingi na litonga ya mosapi ya monene ya lokolo.”
Aside oyo ebimaka na nzela ya masuba eutaka na baselile oyo ekufaka ntango makila ezali kotambola na nzoto. Soki aside yango ekómi mingi mpo ezali kobima nyonso te, oyo etikali na nzoto ekoki kosala mwa matutu mikemike na litonga (articulation) ya mosapi ya monene ya lokolo to ya biteni mosusu.a Yango ekoki kovimbisa litonga mpe kokómisa yango mɔtɔ, mpe esalaka mpasi makasi. Alfred, moto moko oyo abɛlaka maladi yango, alobi boye: “Ata kosimba mwa moke mpamba na esika yango esalaka mpasi makasi mpenza.”
Lapolo ya ebongiseli moko na ekólo Australie elobi boye: “Mbala mingi, maladi ya gutɛ eumelaka pɔsɔ moko soki basalisi yango te. Ekoki kosala moto lisusu te nsima ya basanza to bambula ebele. Soki basalisi yango malamu te, ekoki kosala moto lisusu nsima ya mwa ntango moke mpe ekoki kokóma mabe koleka, mpe kobebisa litonga libela. Ntango mosusu, ekoki kotungisa moto mbala na mbala.”
Ezali na bankisi ndenge na ndenge oyo ekoki kobikisa maladi ya gutɛ. Mbala mingi, bakoki kopesa moto bankisi ya kokitisa mpasi (anti-inflammatoires non stéroïdiens), to soki ekómi kosala mpasi makasi, bakoki kopesa nkisi babengi allopurinol, oyo ekopekisa kosalema ya aside oyo ebimaka na nzela ya masuba. Moto akoki kosala nini mpo maladi yango ezongela ye lisusu te? Asengeli koyeba makambo oyo ekoki kosala ete azwa maladi yango.
Makambo oyo esalaka ete maladi yango ezonga lisusu
Maladi yango esalaka mingimingi mibali oyo mbula na bango epusani, to soki baboti ya moto babɛlaki yango. Minganga balobi ete bato mingi (50%) oyo babɛlaka maladi yango bazwaka yango mpo bato mosusu ya libota na bango babɛlaki yango. Alfred, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Tata ná nkoko na ngai ya mobali babɛlaki maladi yango.” Maladi yango esalaka mingimingi mibali oyo bakómi na mbula kobanda 40 tii 50. Kutu, mibali bazwaka yango mbala misato to minei koleka basi; kaka mwa basi moke nde bakoki kozwa yango liboso bákóma na mbula ya kotika komona sanza (ménopause).
Kozala monene mingi mpe bilei mosusu: Buku moko (Encyclopedia of Human Nutrition) elobi boye: “Kosalisa maladi ya gutɛ etali mpenza te koboya kolya bilei nyonso, kasi nde koboya kolya bilei oyo esalaka ete kilo emata, to sukali emata, to mpe mafuta ekóma mingi na makila.”
Minganga mosusu balobaka ete esengeli koboya kolya bilei oyo ezali na biloko babengi purines mingi; na ndakisa levire, bambisi mosusu mpe misuni ya mbisi to ya nyama oyo bauti koboma.b
Komɛla masanga: Komɛla masanga ya makasi mingi ekoki kopekisa moto abimisa aside oyo ebimaka na masuba, mpe yango ekoki kopesa maladi.
Bamaladi mosusu: Lopitalo moko na États-Unis na nkombo Mayo Clinic, emonisi ete maladi mosusu ekoki kosala ete moto azwa gutɛ, na ndakisa “komata ya tansyo kozanga kosalisa yango, maladi ya diabɛti, to soki mafuta eleki mingi na makila, mpe maladi oyo ekɔndisaka misisa mpe esalaka ete makita etambola malamu te.” Maladi yango ekoki mpe kosala moto soki “abɛli makasi na mbalakaka to azoki, to akɔti ndako mpo abɛli ntango molai.” Emonani ete maladi yango esalaka mingi na mosapi ya monene ya lokolo, mpo makila etambolaka kuna malamu te mpe ezalaka malili. Makambo mibale wana nde esalaka ete aside oyo ebimaka na masuba ekangama esika moko.
Nkisi: Bankisi mosusu ebakisaka maladi yango. Na ndakisa bankisi oyo esalaka ete moto asuba mingi (mbala mingi basalisaka na yango bato oyo tansyo na bango emataka), ba-aspirini ya doze moke, bankisi mosusu oyo bapesaka bato oyo batye bango enama ya moto mosusu na nzoto, mpe bankisi mosusu ya maladi ya kanser.
Makambo mitano mpo maladi yango ezonga lisusu te
Lokola maladi ya gutɛ eutaka na makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo, makanisi oyo elandi ekoki kosalisa bato oyo babɛlaka yango mpo ezongela bango lisusu te.c
1. Maladi ya gutɛ eutaka soki bilei oyo tolyaka ekabwani na ndenge ya malamu te na nzoto. Yango wana, bato oyo babɛlaka yango basengeli kolyaka mingi te bilei oyo ebakisaka makasi (calorie) na nzoto. Lisusu, soki kilo ya nzoto ebakisami mingi epesaka matonga mpasi.
2. Kokeba na bilei ya kokauka mpe oyo ekitisaka kilo na mbalakaka, mpamba te yango ekoki komatisa acide urique na kati ya makila.
3. Koboya kolya proteini mingi ya banyama. Minganga mosusu basɛngaka moto alya kaka gramɛ 170 na mokolo.
4. Soki omɛlaka masanga ya makasi, mɛlaká na bokatikati. Soki obɛlaka maladi ya gutɛ, ekozala likambo ya bwanya koboya komɛla masanga ya makasi.
5. Komɛla mingi masanga mosusu oyo ezali na alkole te. Yango ekokitisa ngɛngɛ ya acide urique mpe ekobimisa yango.d
Makanisi wana oyo ekoki kosalisa biso mpo tózwa te maladi ya gutɛ, ekundweli biso toli ya Biblia oyo elobi ete ‘tólekisaka ndelo te na bizaleli na biso’ mpe ‘tómipesa na vinyo te.’ (1 Timote 3:2, 8, 11) Ya solo, Mozalisi na biso oyo atondi na bolingo ayebi oyo ezali malamu koleka mpo na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki aside yango efandi nde na mokuwa kasi na litonga te, wana ekoki kozala maladi mosusu kasi gutɛ te, mpe ekoki kosɛnga lisalisi ya ndenge mosusu.
b Zulunalo moko (Australian Doctor) elobi ete eloko moko te emonisi ete kolya bilei oyo ezali na purines, na ndakisa mayebo mpe ndunda, madesu ya ndenge na ndenge, lantiyɛ, epinarɛ mpe shu ya fololo, “ekoki kopesa maladi ya gutɛ.”
c Lisolo oyo ezali malako ya monganga te. Ekoki kosɛnga monganga asalisa moto na moto oyo azali na maladi yango na ndenge oyo ebongi mpo na ye. Mpe mpo moto aboya bilei mosusu to azwa bankisi mosusu, asengeli liboso kokutana na monganga.
d Euti na Fondation Mayo pour l’éducation et la recherche médicale.
[Etanda/Elilingi na lokasa 18]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Litonga oyo evimbi
Mwa mai oyo ezalaka na litonga
[Elilingi]
Acide urique esali litutu