Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 324-lok. 328
  • Mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabe
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Soki moto atuni​—
  • Ntina oyo mabe ezali tii lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Ntina oyo Nzambe atiki nzela ete mabe ezala
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Ndenge nini toyebi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka”
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
  • Bakonzi kati na bisika ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 324-lok. 328

Mabe

Ndimbola: Likambo nyonso oyo ezali malamu te, oyo ebongi te. Mbala mingi, liloba yango elimbolaka makambo oyo esalaka mabe, oyo eyokisaka mpasi, to mpe oyo ebebisaka.

Mpo na nini mabe etondi na mokili?

Ezali foti ya Nzambe te. Ntango Nzambe asalaki bato, bazalaki bato ya kokoka, kasi bato baboyaki mpenza kotosa masɛngami ya Nzambe na nko, mpe bakómaki kopona bango moko oyo ezali malamu mpe mabe. (Mib. 32:4, 5; Mos. 7:29; Eba. 3:5, 6) Na bongo, bandimaki kotambwisama na bilimo mabe.​—Ef. 6:11, 12.

1 Yoa. 5:19: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.”

Em. 12:7-12: “Etumba ebimaki na likoló . . . dragɔ ná baanzelu na yango babundaki, kasi elongaki te, mpe bazalaki lisusu na esika te na likoló. Bongo dragɔ yango ya monene ebwakamaki na nse, yango nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana, oyo azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi; abwakami na mabele, mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye. . . . ‘Yango wana bósepela, bino likoló mpe bino baoyo bofandi na likoló! Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.’” (Nsima ya kobotama ya Bokonzi, Satana abwakamaki na mabele mpe banda ntango yango, mpasi ezali se kobakisama. Talá vɛrsɛ 10.)

2 Tim. 3:1-5: “Yebá likambo oyo: mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe, bazali komonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango.” (Yango nde mbuma mabe oyo bato babuki mpo bapesaki losambo ya Yehova mokɔngɔ na boumeli ya basiɛklɛ. Makambo nyonso wana ezali kokola mpo bato oyo balobaka ete basambelaka Nzambe baboyi kolanda oyo Liloba ya Nzambe elobi. Bazali kowangana nguya ya ezaleli ya kokangama na Nzambe oyo ekoki kosalisa moto asala makambo ya malamu na bomoi na ye.)

Mpo na nini Nzambe atiki nzela ete mabe ezala?

Mbala mosusu tokoki kokanisa ete mpo na kosilisa mabe, ebongaki koboma mbala moko bato ya mabe nyonso. Tozelaka na motema likoló nsuka ya makambo ya mabe, kasi atako mabe eumeli mingi na mokili, biso tokutani na yango ntango mingi te. Ndenge nini Yehova Nzambe ayokaka mpo na yango? Banda kala, bato bapesaka Nzambe foti mpo na mabe oyo ezali kosalema, bazali kutu kofinga ye mpo na bampasi oyo bazali kokutana na yango. Nzokande, ezali Satana mpe bato mabe nde babimiselaka bato bampasi yango, kasi Nzambe te. Yehova azali na nguya ya koboma bato mabe. Kasi, soki azali kosala yango te, ntina ezali. Tosengeli nde kokamwa soki lolenge oyo Yehova azali kokata likambo yango ekeseni na ndenge oyo biso tokoki kokanisa? Yehova ayebi makambo mingi koleka bato, mpe ndenge oyo atalelaka likambo moko ekeseni mosika na ndenge oyo bato batalelaka yango.​—Talá Yisaya 55:8, 9; Ezekiele 33:17.

Soki Nzambe apesaka bikelamu na ye ya mayele bonsomi ya kopona te, mabe elingaki kozala te. Kasi Nzambe apesi biso likoki ya kopona kotosa ye mpo tolingi ye to koboya kotosa ye. (Mib. 30:19, 20; Yos. 24:15) Okanisi ete asalaki mabe? Soki ozali moboti, okosepela ete bana na yo bátosa yo mpo balingaka yo to mpo ozali kotinda bango na makasi? Nzambe asengelaki nde kotinda Adama atosa ye na makasi? Soki básɛngaka biso na makasi ete tótosa Nzambe, tolingaki nde kozala na esengo? Liboso Nzambe aboma mokili mabe oyo, apesi bato libaku ya komonisa ete balingi mpenza kotosa mibeko na ye ya sembo to te. Na ntango oyo atyá, akoboma bato mabe.​—2 Tes. 1:9, 10.

Lokola Yehova azali na bwanya mingi, atikaka ntango eleka liboso akata makambo ya ntina mingi: (1) Na Edene, Satana atyaki ntembe na bosembo ya boyangeli ya Yehova mpe lotomo na Ye ya kozala Mokonzi. (Eba. 2:16, 17; 3:1-5) (2) Atyaki mpe ntembe na bosembo ya basaleli nyonso ya Nzambe oyo bazali na likoló mpe na mabele. (Yobo 1:6-11; 2:1-5; Luka 22:31) Nzambe akokaki koboma batomboki yango (Satana, Adama ná Eva) mbala moko, kasi yango elingaki kosilisa ntembe yango te. Makasi elongisaka moto te. Ntembe oyo babimisaki ezalaki nde kotalela lotomo ya Nzambe ya koyangela mpe bosembo ya bato. Soki Nzambe atikaki ntango, ezali mpo na komilongisa te, kasi mpo na kosalisa bikelamu na ye nyonso oyo bazali na bonsomi ya kopona bámona bango moko mbuma mabe ya kotombokela boyangeli na ye, mpe kopesa bango libaku ya komonisa soki bazali na ngámbo nini na makambo yango ya ntina mingi. Ntango Nzambe akokata likambo yango, moto moko te akozwa lisusu nzela ya kobebisa kimya. Mpo makambo nyonso etambola malamu mpenza mpe na kimya na molɔ́ngɔ́ mobimba, bikelamu nyonso ya mayele basengeli kosantisa nkombo ya Yehova mpe kokumisa ye na motema mobimba. (Talá mpe nkasa 416, 417, na motó ya likambo “Satana Zabolo.”)

Ndakisa: Soki moto moko afundi yo na miso ya bato ete ozali tata mabe, ete bana na yo bakozala malamu soki bango moko bazali kozwa bikateli, mpe ete bana yango batosaka yo kaka mpo na biloko oyo opesaka bango kasi balingaka yo te, ndenge nini okokata likambo yango? Okoboma nde moto yango mpo na komonisa ete akoselaki yo makambo? Na esika ya kosala bongo, ekozala malamu opesa bana na yo libaku ya komonisa ete ozali tata malamu mpe ya bolingo mpe ete bafandaka na yo mpo balingaka yo! Soki bana na yo mosusu bandimeli moto oyo afundaki yo, balongwe na ndako, mpe babebisi bomoi na bango na etamboli ya mbindo, bato ya sembo bakomona ete bana yango balingaki kozala malamu soki bálandaka malako na yo.

Lokola Nzambe atiki mabe ezala tii lelo, bolamu nini tozwi?

2 Pe. 3:9: “Yehova azali koumisa makambo te na elaka na ye, ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (Lokola Yehova amonisi motema molai tii na ntango na biso, tozwi libaku ya kobongola motema mpe yango epesi biso nzela ya kotosa boyangeli na ye ya sembo na esika ete tózwaka biso moko bikateli na oyo etali mabe mpe malamu.)

Rom. 9:14-24: “Bongo tokoloba nini? Nzambe azangi nde bosembo? Te, ata moke te! . . . Nzokande, soki Nzambe, atako alingi komonisa nkanda na ye mpe kolakisa nguya na ye, akangelaki bambɛki ya nkanda oyo ebongi na libebi motema mingi [elingi koloba atikaki bato mabe bázala mpo na mwa ntango], mpo alakisa bonene ya nkembo na ye na bambɛki ya motema mawa, oyo abongisaki liboso mpo na nkembo [elingi koloba atikaki ntango mpo na komonisela bato mosusu motema mawa na boyokani na mokano na ye], elingi koloba, biso, bato oyo ye abengaki na kati ya Bayuda kaka te kasi mpe na kati ya bikólo, bongo tóloba lisusu nini?” (Na yango, soki Nzambe azali kozelisa likambo ya koboma bato mabe, ezali mpo na kozwa ntango ya kopona bato oyo akopesa bango nkembo elongo na Kristo na Bokonzi ya likoló. Lokola Nzambe asali bongo, yango emonisi ete asaleli bato makambo na bosembo te? Te; yango ezali moko ya bibongiseli oyo Yehova azwaki mpo na kopesa bato ya ndenge nyonso bomoi ya seko na mabele oyo ekokóma paradiso. Talá mpe Nzembo 37:10, 11.)

Soki moto atuni​—

‘Mpo na nini Nzambe atiki mabe ezala?’

Okoki koyanola: ‘Otuni motuna moko malamu. Basaleli mingi ya sembo ya Nzambe batungisamaki mpe na makambo mabe oyo bazalaki komona. (Hab. 1:3, 13)’ Okoki kobakisa: (1) ‘Yango emonisi te ete Nzambe akipaka makambo mabe te. Ayebisi biso ete atye ntango oyo akopesa bato mabe etumbu. (Hab. 2:3)’ (2) ‘Kasi tosengeli kosala nini mpo tóbika ntango akoboma bato mabe? (Hab. 2:4b; Sef. 2:3)’

To okoki koloba: ‘Nasepeli ndenge otuni motuna wana. Likambo yango etungisaka bato mingi ya mitema sembo. Talá mwa makanisi oyo nazwi na buku oyo, oyo ezali kopesa eyano na motuna na yo. (Na nsima bótánga makanisi oyo ezali na nkasa 325-327.)’

‘Na kotalela ebele ya bambula oyo mabe eumeli na mokili, nandimi te ete Nzambe akolongola yango’

Okoki koyanola: ‘Nasepeli koyoka ete ondimelaka Nzambe. Ezali solo ete mabe etondi na mokili, kasi ebandi lelo te. Kasi osilá kotalela likanisi oyo . . . ? (Salelá makanisi oyo ezali na paragrafe 1 na lokasa 325, oyo emonisi ete esili koleka ntango molai banda Nzambe azali kokangela mabe motema.)’

To okoki koloba: ‘Nakanisi yo mpe okondima ete moto oyo atongi ndako akoki mpe kokɔmbɔla yango. . . . Lokola Nzambe nde asalaki mabele, ekozala mpasi te apɛtola yango. Kasi azali kozela nini? Talá likanisi oyo ekosepelisa yo. Okanisi nini? (Na nsima bótánga makanisi oyo ezali na nkasa 325-327.)’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto