Eteni 3
Ndenge nini tokoki koyeba ete Nzambe azali
1, 2. Lilako nini lizali kosalisa biso na koyeba ete Nzambe azali?
MWANGO malamu mpo na koyeba soki Nzambe azali, ezali bongo kosalela lilako oyo malamu: Eloko nyonso esalemi ezali na motongi na yango. Soki eloko moko emonani ete ezali mpasi mpo na kosala yango, boye motongi na yango azali mpenza na mayele mingi.
2 Na ndakisa, tala naino ndako na yo. Mesa, bakiti, babiro, mbeto, nzungu, pána, basani mpe biloko mosusu ya kúku bisalemi na moto moko, mpe bifélo, mabáya ya ndako mpe plafɔ lokola. Nzokande, biloko wana bizali mpenza mpasi te mpo na kosala yango. Soki biloko oyo bizali mpasi te mpo na kosala yango bizali na motongi na yango, ebongi na biso te kokanisa ete oyo ezali mpasi mpo na kosala yango ezali na motongi na yango oyo aleki na mayele?
Molóngó, eloko na kokamwa
3, 4. Na likambo nini molóngó mozali kosalisa biso na koyeba ete Nzambe azali?
3 Montele esengeli kozala na moto oyo asalaki yango. Ezali boni mpo na ebongiseli ya bingɛngɛli na pole oyo eleki mpenza na biloko mingi, epai bitando bizali kobaluka zingazinga na moi na eleko ya sikisiki, bikeke nsima na bikeke? Tokoloba boni mpo na oyo babéngi ete Voie lactée, ebongiseli kitoko ya minzoto oyo tozali na yango, oyo ezali na minzoto koleka bamiliare monkámá? Osila kolekisa mwa ntango na butu mpo na kotala ebele na minzoto wana? Okamwaki te? Kanisa mpo na molóngó moleki mpenza monene, oyo ezali na bamiliare na bibongiseli ya minzoto bizali motindo moko na oyo ya biso, Voie lactée! Lisusu, uta bikeke na bikeke, biloko ya likoló bizali kobaluka na eleko ya sikisiki na motindo boye ete ekokisami na lolenge oyo montele etambolaka.
4 Soki montele, oyo ezali mpasi te mpo na kosala yango emonisi ete ezali na moto oyo asalaki yango, na ntembe te molóngó oyo eleki mpenza na biloko mingi mpe na kitoko, emonisi ete mozalisi mpe motongi na yango azali. Yango wana Biblia esɛngi biso ete ‘totómbola miso na biso likoló mpe totala,’ mpe etuni ete: “Nani asalaki biloko oyo?” Mpe eyanoli ete: “Ezali Ye [Nzambe] oyo akobimisaka yango na motuya na yango, mpe akobéngaka moko na moko na nkombo na yango. Mpo na monene na makasi na ye, mpe mpo ete azali na bokasi kati na nguya na ye, moko na yango akozanga te.” (Yisaya 40:26, MN) Na bongo, molóngó mozalisami na moto moko azali na mayele mingi mpe azangi komonana oyo azali kokamba yango: Nzambe.
Mabelé masalemi na kitoko mingi
5-7. Na ntina na mabelé, makambo nini mamonisi ete yango ezalaki na Mozalisi?
5 Wana bato ya mayele bazali kolanda koyekola mabelé, bazali komona ete esalemi na kitoko mingi mpo ete ezala efandelo ya moto. Ntaká malamu ekaboli yango na moi mpe na bongo, ezali kozwa pole mpe molungé oyo ekoki na yango. Ekobalukaka zingazinga na moi na boumeli ya mbula moko, kotɛngama na yango ekopesaka bileko na bisika mingi ya etando na biso. Nsima na ngonga 24, mabelé makobalukaka zingazinga na axe na yango, ntina oyo tozalaka mbala na mbala na moi mpe na butu. Ezali na mipepe misangani na lolenge lobongi, oyo tozali kopema mpe mizali kobatela biso na mipepe mabe mikoutaka longwa na likoló. Mabelé mazali lisusu na mai mpe na nsé kitoko mpo na kobimisa bilei.
6 Soki biloko nyonso wana, mpe mosusu, bizalaki te, mbɛlɛ bomoi ekokaki kozala te. Nyonso wana ebimaki pwasa? Zulunalo Science News elobi ete: “Emonani ete motindo na ezalela wana ya kokamwa mpe ya sikisiki ekoki te kobima pwasa.” Te, ekoki kozala bongo te. Yango emonisi mokano ya Mozalisi moko ya mayele mingi.
7 Okosukisa boni soki okɔti na ndako moko kitoko, mpe okuti biloko kitoko—bilei mingi, masini makopesaka malili, pompi ya mai? Okoloba ete biloko wana bibimaki bobele yango moko? Te, okosukisa mpenza ete moto moko ya mayele asalaki ndako wana mpe atongaki yango na likebi mingi. Bobele bongo, mabelé masalemaki mpe matongamaki na likebi mingi mpo ete mabimisa biloko bisengeli na bafandi na yango; esalemi na biloko mingi mpe ezali na biloko mingi koleka ndako nyonso.
8. Nini emonisi awa na mabelé ete Nzambe azali komibanzabanza mpo na biso na bolingo nyonso?
8 Kanisa lisusu likoló na ebele na biloko oyo bizali koyeisa bomoi na biso kitoko mingi. Kanisa mpo na ebele na folólo na langi kitoko mpe nsolo na yango oyo ezali kosepelisa bato. Mpe ebele na bilei ndenge na ndenge oyo elɛngi na yango ekosepelisaka monoko na biso. Tosepelaka wana ezali biso kotala zámba, ngomba, mabéké mpe biloko mosusu bizalisami. Tokoki lisusu koloba nini mpo na lolenge kitoko oyo moi mokolalaka, likambo mosusu oyo likopesaka biso esengo ya kozala na bomoi? Na ntina na banyama, tosepelaka te na kopumbwa mpe na kokima ya bana na mbwa, ya bana na nyau mpe ya bana na banyama mosusu? Mabelé mazali na ebele ya biloko kitoko oyo bizali mpenza na ntina mingi mpo na kobatela bomoi. Ezali komonisa ete mabelé masalemaki na likebi ya bolingo, na mokano ya sikisiki mpo na bato, ete tozala bobele na bomoi te, kasi ete tosepela na bomoi.
9. Nani asalaki mabelé, mpe asalaki yango mpo na nini?
9 Yango wana ebongi mpenza koyeba Ye oyo akopesaka biloko nyonso wana, lokola mokomi na Biblia oyo alobaki na ntina na Jéhovah Nzambe, ete: “Yo osalaki makoló mpe mabelé.” Na mokano nini? Apesi eyano na komonisáká ete Nzambe azali “Ye oyo atongaki mabelé mpe asalaki yango; Ye oyo akokisaki yango, asalaki yango eloko na mobulu te, atongaki yango ete bato bafanda wana.”—Yisaya 37:16, MN; Yisaya 45:18.
Cellule: eloko na kokamwa
10, 11. Likambo nini ya kokamwa lizali kati na cellule?
10 Tokoki koloba nini mpo na biloko oyo bizali na bomoi? Bisengeli te kozala na moto oyo asalaki yango? Na ndakisa, talela mwa makambo ya kokamwa na ntina na cellule. Kati na mokanda na ye Evolution: A Theory in crisis, Michael Denton, moto na mayele oyo ayekoli biloko bizali na bomoi, alobaki ete: “Boyekoli ya biloko bizali na bomoi emonisaki ete, ata biloko na bomoi oyo bileki mike mpenza lokola cellule, esalemi na biloko mingi mpenza. Atako eleki moke, . . . cellule ya moke mpenza, ezali nde masini na nguya oyo ezali na ebele na biloko bitongami na lolenge moko kitoko . . . ezali na biloko mingi koleka masini nyonso masalemi na moto mpe ekokani na eloko moko te oyo ezangi bomoi.”
11 Alobi na ntina na biloko oyo biuti na kosangana ya mbuma ya mobali na oyo ya mwasi kati na cel lule moko na moko, ete: “Makoki oyo ADN ezali na yango mpo na kobatela myango, eleki mpenza makoki ya masini nyonso mosusu: ezali meko eleki malamu oyo esali ete, mwango moko na moko mosengeli mpo na kotonga nzoto na moto oyo esalemi na biloko mingi mpenza, mokoka kozala bobele na bagalame soko miliare moko. . . . Na kotalela makoki mpe ebele na biloko oyo bitongi nzoto na moto, biloko na biso ya minene oyo bisalemi na bato bizali bobele mpamba. Na kotalela biloko mike ya bomoi, biso tozali bobele mpamba.”
12. Moto moko ya mayele alobaki nini na ntina na ebandeli ya cellule?
12 Denton abakisi ete: “Mitindo na ba cel lu les mike oyo toyebi yango, esalemi na biloko mingi na boye ete tokoki kokanisa te ete eloko lolenge wana ekoki koyanganisama pwasa na likambo oyo likoki kokanisama te.” Yango esengelaki kozala na mozalisi mpe na moto oyo asalaki yango.
Bɔɔngɔ́ na biso: eloko na kokamwa
13, 14. Na ndimbola nini bɔɔngɔ́ ezali eloko na kokamwa koleka cellule?
13 Moto na mayele wana akóbaki koloba ete: “Lolenge oyo cel lu le moko na moko esalemi na biloko mingi, ekokani soko moke te na motindo bɔɔngɔ́ ya nyama esalemi. Bɔɔngɔ́ ya moto ezali soko na bamiliare mingi ya ba cellules ya misisá. Cellule moko na moko ya misisá ezali na nsinga nkɔto zomi to nkɔto monkámá oyo etongisi yango na ba cellules mosusu ya bɔɔngɔ́. Matongá nyonso kati na bɔɔngɔ́ ya moto mazali pene na . . . milió ya bamiliare mingi.”
14 Denton abakisi ete: “Ata soko matongá monkámá ya bɔɔngɔ́ mabongisamaki mpenza sikisiki, mbɛlɛ emonisi bobele ebongiseli oyo etondi na matongá ya sikisiki koleka oyo ya ba stations nyonso ya bopanzi nsango awa na Mabelé.” Bongo, atuni motuna oyo ete: “Biloko wana biyanganisamaki na mwango moko mobimaki pwasa?” Eyano emonani ete, ezali bongo te. Bɔɔngɔ́ ebongisamaki malamu na Mozalisi moko.
15. Makanisi nini mapesamaki na bato mosusu ya mayele na ntina na bɔɔngɔ́?
15 Na kokokanisa yango na bɔɔngɔ́ ya moto, bamasini oyo babéngi ordinateurs, oyo ya malamu mingi ezali bobele biloko mpamba. Morton Hunt, mokomi na mikanda ya sianse, alobaki ete: “Bɔɔngɔ́ na biso malamu ezali kokanga bamiliare mingi ya makambo koleka ordinateur monene oyo esalelami lelo mpo na bolukiluki.” Docteur J. Robert White, monganga oyo ayekoli mosala ya kopasola motó, asukisaki na maloba oyo ete: “Na kotalela boyokani bozali kati na eteni oyo na nzoto mpe makanisi ya moto, likambo oyo lileki mayele na ngai, nasengeli mpenza kondima ete esalemaki mpe ekokisamaki na mayele maleki likoló. . . . Napusami na koloba ete, boyokani wana euti na mokano ya Moto moko ya mayele.” Wana lisusu, esengelaki likanisi ya Moto moko.
Makila: ekokani na eloko mosusu te
16-18. (a) Na likambo nini makila makokani te na eloko mosusu? (b) Tosengeli kosukisa boni?
16 Talela mpe makila oyo makokumbaka mopepe mpe biloko bikoleisaka nzoto, mpe ezali kobatela biso longwa na mikrobe ya maladi. Mpo na ba globules rouges, biloko ya ntina mingi na makila, mokanda ABC’s of the Human Body elobi ete: “Bobele litangá moko ya makila lizali na ba cellules ya makila koleka bamilió 250 . . . Nzoto ekoki kozala na ba cellules koleka bamiliare nkɔto 25, oyo soki batandi yango, ekoki mpenza kozipa bisika minei oyo babɛtaka tennis. . . . Na seconde nyonso, bamilió misato ya ba cellules ya sika ezali kokitana oyo ya liboso.”
17 Na ntina etali ba glo bu les blancs, biloko mosusu ya ntina mingi na makila, mokanda yango elobi na biso ete: “Awa ba globules rouges ezali bobele motindo moko, tozali kokuta mitindo mikeseni ya ba globules blancs; mokomoko na yango ekoki kobundisa banguna ya nzoto na ndenge ekeseni. Na ndakisa, moko na yango ekolongolaka ba cellules nyonso oyo esili kokufa. Ba globules blancs mosusu ekobotaka biloko bikobatelaka nzoto mpo na kobundisa microbe mike, ekolɛmbisaka makasi ya mikrobe to ekolyaka mpe ekomelaka yango mpenza.”
18 Oyo nde eloko na kokamwa mpe ebongisami na motindo moleki malamu! Eloko oyo ebongisami malamu mpe ezali na makoki ya kopesa libateli, esengeli mpenza kozala na mobongisi oyo aleki na mayele mpe na likebi: Nzambe.
Biloko mosusu ya kokamwa
19. Liso likokani nde na bisaleli mosusu oyo bisalemi na bato?
19 Nzoto ya moto ezali na ebele na biloko mosusu ya kokamwa. Moko na yango ezali liso, oyo esalemaki na motindo moleki kitoko, na boye ete masini ya fɔtɔ́ moko te ekokani na yango. Robert Jastrow, moto oyo ayekoli minzoto, akomaki ete: “Emonani ete liso liyemamaki na motindo na kokamwa mpenza, mpe motongi moko na masini oyo basalelaka mpo na komona minzoto, akoki te kosala eloko kitoko motindo wana.” Zulunalo Popular Photography eyebisi ete: “Miso ya moto makomonaka biloko mingi mpenza koleka filme ya fɔtɔ́. Ekomonaka na ngámbo misato, kati na etando monene na kokamwa oyo ezali na matúmu misato, kozanga kobeba, mpe bongo libela na libela. . . . Ebongi te kokokanisa masini ya fɔtɔ́ na liso ya moto. Liso ya moto lileki mpenza ordinateur kitoko oyo basili kokɔtisa makoki ya kososola kati na yango, ezali na myango ya kolimbola makambo, eyebi kosala na lombango to na malɛmbɛ, mpe ekosalelaka makambo mingi koleka esaleli nyonso mosusu, ordinateur to masini ya fɔtɔ́ esalemi na moto.”
20. Tangá mwa makambo mosusu na kokamwa oyo mamonani na nzoto ya moto?
20 Kanisa lisusu mpo na motindo oyo binama nyonso ya nzoto bizali kosalana elongo kozanga milende na biso moko. Na ndakisa, tozali na biloko ndenge na ndenge oyo tolyaka mpe tomelaka; nzokande, nzoto ekokumbola yango mpe ekopesa makasi. Meka kosangisa biloko motindo wana mpe kɔtisa yango kati na réservoir ya motuka mpe tala soki ekotambola ngonga boni! Ebongi mpe kolobela likamwisi ya zemi, oyo ekobimisaka mwana kitoko—elilingi ya baboti na ye—bobele nsima ya sanza libwa. Bongo tokoki koloba nini na ntina na makoki oyo mwana moke azali na yango mpo na koyekola lokóta oyo lozali na maloba mingi?
21. Bato na bososoli malamu balobaka nini wana ezali bango kotalela biloko kitoko ya nzoto na moto?
21 Ee, ebele na biloko na kokamwa oyo bityami kati na nzoto ya moto na motindo mobongi, bizali kosepelisa biso mingi. Motongi masini moko te akoki kosala biloko wana. Ekoki mpenza kozala ete biloko wana ebimaki pwasa? Te. Kasi, wana bato na bososoli bakotalelaka biloko kitoko nyonso bizwami na nzoto na moto, bakolobaka lokola mokomi na Nzembo ete: “Nakotɔndo yo [Nzambe] mpo ete nasalami na motindo na kokamwa mingi; misala na yo mizali ya kokamwa.”—Nzembo 139:14.
Motongi aleki monene
22, 23. (a) Mpo na nini tosengeli kondima ete Mozalisi azali? (b) Na ntina na Nzambe, Biblia elobi nini na sembo nyonso?
22 Biblia elobi ete: “Ndáko ínso ikotóngama na mabóko ma moto; kasi óyo asali bínso nde Nzambe.” (Baebele 3:4, Liloba lya Nzambe) Na bongo, soki ndako nyonso esengeli kozala na motongi na yango, boye molóngó oyo esalemi na biloko mingi koleka, mpe bikelamu ndenge na ndenge oyo bizali awa na mabelé, esengeli mpe kozala na motongi na yango. Kasi lokola tondimi ete bato oyo basalaki biloko lokola mpepo, televizio to or di na teur bazali na bomoi, tosengeli kondima te ete Ye oyo apesaki bango bɔɔngɔ́ mpo na kosala biloko wana, azali?
23 Biblia endimi yango wana ebengi ye ete “Jéhovah, Nzambe ya solo, Mozalisi ya makoló mpe ye oyo Monene ananolaki yango; Ye oyo atandaki mabelé mpe mbuma na yango, Ye oyo akopesaka mpema epai na bato bafandi na yango.” (Yisaya 42:5, MN) Biblia elobi na sembo nyonso ete: “Ɛ Jéhovah, Nzambe na biso, yo obongi kozwa nkembo, mpe lokumu, mpe nguya, mpo ete yo nde ozalisaki biloko nyonso; mpe yango ezali mpe ezalisamaki mpo na mokano na yo.”—Emoniseli 4:11, MN.
24. Lolenge nini tokoki koyeba ete Nzambe azali?
24 Ee, tokoki koyeba ete Nzambe azali na nzela na biloko oyo ye asalaki. “Ya solo, bizaleli [ya Nzambe] bizangi komonana uta kozalisama ya mokili, bimonani polele longwa na misala na ye na kozalisa, mpamba te yango esalami na mayele [na Nzambe].”—Baloma 1:20, MN.
25, 26. Mpo na nini kosalela eloko moko na lolenge mabe elimboli te ete ezangi moto oyo asalaki yango?
25 Soki eloko moko esalelami na lolenge mabe, elimboli te ete yango ezangi motongi na yango. Mpepo ekoki kosalelama na makambo ya kimya, lokola mpepo ya mibémbo. Kasi ekoki mpe kosalelama mpo na koboma, lokola mpepo oyo ekobwakaka ba bombes. Lolenge oyo esalelami mpo na koboma bato elimboli te ete ezangi moto oyo asalaki yango.
26 Bobele bongo, soki bato bazali mbala mingi kosala mabe, yango elingi koloba te ete bazangi Ye oyo asalaki bango, ete Nzambe azali te. Biblia emonisi lisusu na sembo nyonso ete: “Mabe na bino mazali monene mingi! Moyemi na mbeki asengeli nde kotalelama lokola moyomba? Eloko esalemi, esengeli nde koloba na ye oyo asalaki yango ete: ‘Ye asalaki ngai te’? Bongo, eloko etongami esengeli nde koloba na ye oyo atongaki yango ete: ‘Ye azali na mayele te’?”—Yisaya 29:16, MN.
27. Mpo nini tosengeli kozela ete Nzambe ayanola na mituna na biso na ntina na mpasi?
27 Mozalisi amonisaki mayele na ye na ebele na biloko kitoko oyo ye asalaki. Asili komonisa ete azali mpenza komibanzabanza mpo na biso na kosaláká mabelé mabongi mpenza ete biloko nyonso bizala na bomoi, na kosaláká nzoto na biso mpe elimo na biso na motindo na kokamwa mpe na kosaláká ebele na biloko malamu oyo tozali kosepela na yango. Na ntembe te, akomonisa mayele mpe likebi mingi mpo na koyanola na mituna lokola oyo: Mpo na nini Nzambe apesaki nzela na mpasi? Lolenge nini akosilisa yango?
[Elilingi na lokasa 5]
Mabelé oyo mazingami na mipepe oyo mizali kobatela yango, mazali efandelo kitoko ebongisamaki mpo na biso na Nzambe ya bolingo
[Elilingi na lokasa 6]
Mabelé matongamaki na likebi ya bolingo mpo ete tosepela mpenza na bomoi
[Elilingi na lokasa 7]
‘Bɔɔngɔ́ ezali na matongá koleka oyo ya ba stations nyonso ya bopanzi nsango awa na Mabelé.’—Moto na mayele oyo ayekoli biloko bizali na bomoi
[Elilingi na lokasa 8]
“Emonani ete liso liyemamaki na motindo na kokamwa mpenza, mpe motongi moko na masini oyo basalelaka mpo na komona minzoto, akoki te kosala eloko kitoko motindo wana.”—Moto oyo ayekoli minzoto