Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 93 lok. 216-lok. 217 par. 5
  • Yesu azongi na likoló

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu azongi na likoló
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Bato ebele bamoni ye liboso ya Pantekote
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Komonana ya nsuka mpe Pantekote ya mobu 33
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Komonana ya nsuka mpe Pantekote ya mobu 33
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Na ngomba ya olive
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 93 lok. 216-lok. 217 par. 5
Yesu azali komata na likoló mpe bantoma na ye bazali kotala

LITEYA 93

Yesu azongi na likoló

Yesu akutanaki na bayekoli na ye na Galile. Apesaki bango malako ya ntina mingi: ‘Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso. Bóteya bango makambo nyonso oyo nateyaki bino, mpe bóbatisa bango.’ Na nsima, apesaki bango elaka oyo: ‘Nakozala elongo na bino ntango nyonso.’

Na boumeli ya mikolo 40 nsima ya lisekwa na ye, Yesu abimelaki bayekoli na ye ebele, na Galile mpe na Yerusaleme. Ateyaki bango makambo ya ntina mingi mpe asalaki makamwisi ebele. Na nsima, Yesu akutanaki na bantoma na ye mbala ya nsuka, na Ngomba ya Olive. Ayebisaki bango boye: ‘Bólongwa na Yerusaleme te. Bókoba kozela eloko oyo Tata alakaki.’

Bantoma bayebaki te soki alingi koloba nini. Batunaki ye: ‘Sikoyo nde okokóma Mokonzi ya Yisraele?’ Yesu ayebisaki bango: ‘Ntango oyo Yehova atyá mpo nakóma Mokonzi ekoki naino te. Mosika te, bokozwa nguya ya elimo santu, mpe bokozala batatoli na ngai. Bókende kosakola na Yerusaleme, na Yudea, na Samaria, mpe na bisika eleki mosika na mabele.’

Na nsima, Yesu atombwanaki na likoló mpe lipata moko ezipaki ye. Bayekoli na ye bazalaki kaka kotala, kasi azalaki lisusu te.

Bayekoli balongwaki na Ngomba ya Olive mpe bakendaki na Yerusaleme. Bazalaki kokutana mbala na mbala na shambrɛ moko ya likoló mpo na kobondela. Bazalaki kozela Yesu apesa bango malako mosusu.

“Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso, bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14

Mituna: Etinda nini Yesu apesaki bayekoli na ye? Nini esalemaki na Ngomba ya Olive?

Matai 28:16-20; Luka 24:49-53; Yoane 20:30, 31; Misala 1:2-14; 1 Bakorinti 15:3-6

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto