Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 4 lok. 16-lok. 17 par. 2
  • Nkanda etindaki ye aboma

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkanda etindaki ye aboma
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Bandeko mibale oyo bakesanaki na bizaleli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mwana malamu ná mwana mabe
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Tópesa Yehova mbeka oyo akondima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 4 lok. 16-lok. 17 par. 2
Kaina asiliki ntango Abele azali kopesa Yehova likabo

LITEYA 4

Nkanda etindaki ye aboma

Nsima ya kobima na elanga ya Edene, Adama ná Eva babotaki bana ebele. Mwana na bango ya liboso Kaina, akómaki mosali ya bilanga, mpe oyo ya mibale Abele, akómaki mobateli ya mpate.

Mokolo moko, Kaina ná Abele bapesaki Nzambe makabo. Oyebi soki likabo ezali nini? Likabo ezali eloko oyo bakabeli moto. Yehova asepelaki na likabo ya Abele, kasi asepelaki na oyo ya Kaina te. Epesaki Kaina nkanda makasi. Yehova akebisaki Kaina; alobaki na ye ete nkanda ekoki kotinda ye asala mabe. Kasi Kaina ayokaki te.

Na nsima, alobaki na Abele ete: ‘Yaká tókende na bilanga.’ Ntango bazalaki kuna na bilanga kaka bango mibale, Kaina abɛtaki ndeko na ye mpe abomaki ye. Yehova asengelaki kosala nini? Yehova apesaki Kaina etumbu; abenganaki ye mosika na bato ya libota na ye. Akokaki kozonga lisusu te.

Kaina azali kopusana epai ya Abele ntango bazalaki na bilanga

Lisolo yango eteyi biso nini? Tokoki kobanda koyoka nkanda soki makambo esalemi te ndenge tokanisaki. Soki nkanda na motema na biso ebandi kokóma makasi​—to soki moto akebisi biso mpo amoni ete tokómi na nkanda​—tosengeli kosala noki tólongola yango liboso etinda biso tósala mabe.

Lokola Abele alingaki Yehova mpe asalaki makambo ya malamu, Yehova abosani ye te. Akozongisa ye na bomoi ntango akokómisa mabele paradiso.

“Liboso salá kimya yo ná ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.”​—Matai 5:24

Mituna: Bana mibale ya liboso oyo Adama ná Eva babotaki ezalaki banani? Mpo na nini Kaina abomaki leki na ye Abele?

Ebandeli 4:1-12; Baebre 11:4; 1 Yoane 3:11, 12

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto