Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 5 lok. 18-lok. 19 par. 5
  • Masuwa ya Noa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masuwa ya Noa
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Noa atongi masuwa
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Na Mpela monene—Banani bayokaki? Banani bayokaki te?
    Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • “Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • “Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 5 lok. 18-lok. 19 par. 5

LITEYA 5

Masuwa ya Noa

Nsima ya bambula, bato bakómaki ebele na mabele. Mingi na bango bazalaki bato mabe. Ata baanzelu mosusu na likoló bakómaki mabe. Batikaki bisika na bango na likoló mpe bakitaki na mabele. Oyebi mpo na nini basalaki bongo? Mpo bálata nzoto ya mosuni mpe bábala basi.

Baanzelu yango ná basi oyo bazwaki babotaki bana mibali. Bana yango bazalaki bato ya makasi mingi mpe bakómaki bato ya nko. Bazalaki konyokola bato. Yehova akokaki kotika makambo ezala kaka ndenge wana te. Azwaki mokano ya kotinda Mpela (konɔkisa mbula makasi) mpo na koboma bato mabe.

Kasi ezalaki na moto moko ya malamu. Azalaki kolinga Yehova. Nkombo na ye ezalaki Noa. Azalaki na mwasi ná bana mibali misato: Seme, Kame, ná Yafete, mpe bana yango nyonso misato babalaki. Yehova ayebisaki Noa atonga masuwa moko ya monene mpo ye ná libota na ye bábika na Mpela. Masuwa yango ezalaki sanduku moko ya monene oyo ekoki kotepatepa na mai. Yehova ayebisaki mpe Noa akɔtisa banyama na masuwa mpo na kobikisa mpe yango.

Noa abandaki mbala moko kotonga masuwa. Noa ná libota na ye basalaki mosala yango mbula soki 50. Batongaki masuwa yango kaka ndenge Yehova ayebisaki bango. Noa azalaki mpe koyebisa bato ete Mpela ekoya. Kasi moto moko te ayokelaki ye.

Nsukansuka, ntango ya kokɔta na masuwa ekokaki. Tótala likambo oyo esalemaki.

“Kaka ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.”​—Matai 24:37

Mituna: Mpo na nini Yehova azwaki mokano ya kotinda Mpela? Malako nini Yehova apesaki Noa?

Ebandeli 6:1-22; Matai 24:37-41; 2 Petro 2:5; Yuda 6

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto