Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 7 lok. 24-lok. 25 par. 1
  • Ndako molai ya Babele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndako molai ya Babele
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Batongi ndako ya molai
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Minɔkɔ oyo tolobaka eutá nde na “ndako molai ya Babele”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masuwa ya Noa
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Bamisalelaki nkombo ya lokumu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 7 lok. 24-lok. 25 par. 1
Ntango Yehova abulunganisaki monɔkɔ ya bato, bakokaki lisusu kotonga ndako molai ya Babele te

LITEYA 7

Ndako molai ya Babele

Nsima ya Mpela, bana ya Noa ná basi na bango babotaki bana ebele. Mabota na bango ekómaki minene, mpe bato babandaki kopalangana na bisika ndenge na ndenge na mabele, kaka ndenge Yehova ayebisaki bango.

Kasi na mabota mosusu, bato bazalaki kotosa Yehova te. Balobaki: ‘Bóya tótonga engumba mpe tófanda wana. Tótonga ndako ya molai oyo nsɔngɛ na yango ekokóma tii na likoló mpe tómisalela nkombo ya lokumu.’

Kasi Yehova asepelaki te na likambo oyo bato wana bazalaki kosala, yango wana apekisaki bango. Asalaki yango ndenge nini? Na mbala moko, asalaki ete bábanda koloba minɔkɔ ekeseni. Lokola bazalaki lisusu koyokana te, batikaki kotonga. Engumba oyo bazalaki kotonga ekómaki kobengama Babele, oyo elimboli “Mobulungano.” Bato bapanzanaki mpe bakómaki kofanda na mabele mobimba. Kasi bakobaki kosala makambo ya mabe na bisika oyo bakendaki kofanda. Kasi, ezalaki mpe na bato mosusu oyo bazalaki kaka kolinga Yehova? Tokoyeba yango na lisolo elandi.

“Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama, kasi moto oyo azali komikitisa akotombolama.”​—Luka 18:14

Mituna: Bato ya Babele basalaki nini? Ndenge nini Yehova apekisaki bango?

Ebandeli 11:1-9

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto