Mituna ya batángi
Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalelaka bililingi te na losambo?
Na mokili mobimba, na ndakisa mpo na Bahindu, Babudiste, Bakatolike, mpe bato ya lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, bikeko ezali na ntina mingi na losambo. Na bamboka mosusu ya Afrika, bato basambelaka bililingi oyo esalemi na banzete to na mabanga mpe bakanisaka ete nzambe moko to elimo ya nzambe moko efandaka wana.
Nzokande, Batatoli ya Yehova basalelaka ata ekeko to elilingi te na losambo na bango. Soki okei na bisika bayanganaka, oyo babengaka Ndako ya Bokonzi, okomona ata bililingi ya “basantu” te, ata mpe ekeko moko te ya Yesu to ya Malia.a Mpo na nini? Talá oyo Biblia elobi mpo na likambo yango.
Nzambe asɛngaki Bayisalaele nini?
Nsima ya kobimisa bango na Ezipito, Yehova Nzambe apesaki bango malako ya polele mpo na ndenge oyo basengelaki kosambelaka ye. Mobeko ya mibale na kati ya Mibeko ya Moize elobaki boye: “Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi na eloko ya lola na likoló te, na mokili na nse te, to na mai na nse ya mokili te. Okokumbamela yango te to kosalela yango te, mpo ete ngai [Yehova] Nzambe na yo nazali Nzambe ya zuwa.”—Exode 20:4, 5.
Kaka na ntango oyo Nzambe azalaki kopesa Moize mibeko yango, Bayisalaele bazalaki kosala mwana ya ngɔmbɛ ya wolo, ntango mosusu mpo na komekola losambo ya banyama oyo bamonaki na Ezipito. Bapesaki ekeko yango nkombo ya nzambe moko ya Ezipito te. Kasi, balobaki ete ezali mpo na losambo ya Yehova. (Exode 32:5, 6) Nzambe asalaki nini? Asilikelaki makasi bato oyo basambelaki ekeko yango, mpe Moize abebisaki ekeko yango.—Exode 32:9, 10, 19, 20.
Na nsima, Yehova Nzambe abakisaki makambo mosusu na mobeko yango ya mibale. Na nzela ya Moize, ayebisaki Bayisalaele boye: “Bósala ekeko mpo na bino mpenza te, soko elilingi ya mwasi soko ya mobali, to elilingi ya nyama na nse, to elilingi ya ndɛkɛ [epumbwaka] na kati ya mopɛpɛ, to elilingi ya nyama na kolanda na nse, to elilingi ya mbisi na mai na nse ya mokili.” (Deteronome 4:15-18) Emonani ete Bayisalaele basengelaki kosalela ata ekeko ya lolenge moko te na losambo na bango.
Atako bongo, na nsima, Bayisalaele bakweaki na motambo ya losambo ya bikeko. Mpo na kosembola bango, Yehova atindaki basakoli oyo bakebisaki bango na ntina na etumbu oyo Nzambe alingaki kopesa bango mpo na ndenge bamipesaki na losambo ya bikeko. (Yilimia 19:3-5; Amosa 2:8) Ekólo Yisalaele eboyaki koyoka makebisi ya Nzambe. Yango wana, na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova atindaki bato ya Babilone bábebisa Yelusaleme mpe bámema bato ya ekólo yango na boombo.—2 Ntango 36:20, 21; Yilimia 25:11, 12.
Ndenge nini baklisto ya liboso bazalaki kotalela bikeko?
Na ekeke ya liboso, ntango bato oyo bazalaki Bayuda te bakómaki baklisto, batikaki kosalela bikeko na losambo na bango. Yoká oyo Demetiliusi, mosali ya palata oyo azalaki kosala bikeko na Efese alobaki na ntina na mosala ya kosakola ya Paulo: “Mibali, boyebi malamu ete bomɛngo na biso ezali kouta na mosala oyo. Lisusu, bozali komona mpe koyoka ndenge Paulo wana, na Efese kaka te kasi mpe na bisika pene na nyonso ya etúká ya Azia, andimisi ebele mpenza ya bato mpe abalukisi bango na likanisi mosusu, kolobáká ete baoyo basalemi na mabɔkɔ bazali banzambe te.”—Misala 19:25, 26.
Maloba ya Paulo emonisi ete Demetiliusi akosaki te. Ntango Paulo azalaki koloba na Bagrɛki na Atene, alobaki na bango boye: “Tosengeli te kokanisa ete Oyo azali Nzambe azali lokola wolo to palata to libanga, lokola eloko moko oyo eyemami na mayele mpe na makanisi ya moto. Ya solo, Nzambe ataleli te bantango wana ya kozanga boyebi, nzokande sikoyo azali koyebisa bato na bisika nyonso ete basengeli bango nyonso kobongola motema.” (Misala 17:29, 30) Mpo na likambo yango, Paulo akomelaki mpe baoyo bazalaki na Tesaloniki mpe ayebisaki bango boye: “Bobongwanaki epai ya Nzambe kotikáká bikeko na bino.”—1 Batesaloniki 1:9.
Longola Paulo, ntoma Yoane mpe akebisaki baklisto na losambo ya bikeko. Na nsuka ya ekeke ya liboso, ayebisaki bango boye: “Bókeba na bikeko.”—1 Yoane 5:21.
Batatoli ya Yehova batosaka malako ya polele oyo Nzambe apesaki ya kosalela te bililingi ya ndenge nyonso na losambo oyo bazali kopesa ye. Batosaka maloba ya Yehova Nzambe oyo: “Ngai nazali [Yehova], yango nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai ya mosusu te, kosanzola na ngai epai ya bikeko te.”—Yisaya 42:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Bandako mosusu ya Bokonzi, ezali na bafɔtɔ ya bato oyo Biblia elobeli. Kasi, batyá bafɔtɔ yango kaka mpo na koyeisa Ndako ya Bokonzi kitoko, kasi te mpo na kosambela bafɔtɔ yango. Batatoli ya Yehova basambelaka bafɔtɔ yango te, bafukamaka mpe liboso na yango te.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 31]
“Ngai nazali [Yehova], yango nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai ya mosusu te, kosanzola na ngai epai ya bikeko te.”—Yisaya 42:8