Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/4 nk. 8-9
  • Kobotama ya sika—Esalemaka ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobotama ya sika—Esalemaka ndenge nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mai mpe elimo”​—Ezali nini?
  • Kobatisama “na elimo santu”
  • Esɛngaka kozwa batisimo mibale
  • ‘Na nkombo na elimo santu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Batisimo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Batisimo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ntina ya batisimo na yo
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/4 nk. 8-9

Kobotama ya sika​—Esalemaka ndenge nini?

YESU ayebisaki Nikodeme ntina ya kobotama lisusu, nani asalaka ete moto abotama lisusu, mokano na yango mpe ndenge oyo likambo yango esalemaka. Alobaki boye: “Soki moto abotami te na mai mpe na elimo, akoki kokɔta na bokonzi ya Nzambe te.” (Yoane 3:5) Na yango, moto abotamaka lisusu na nzela ya mai mpe elimo. Kasi, kobotama “na mai mpe na elimo” elimboli nini?

“Mai mpe elimo”​—Ezali nini?

Lokola Nikodeme azalaki moto ya mayele na makambo ya mangomba ya Bayuda, ayebaki ndimbola oyo Makomami ya Liebele ezalaki kopesa na maloba “elimo ya Nzambe”​—Nguya ya Nzambe oyo ekoki kosalisa bato básala makambo ya kokamwa. (Genese 41:38; Exode 31:3; 1 Samwele 10:6) Yango wana, ntango Yesu asalelaki liloba “elimo,” Nikodeme ayebaki ete azali kolobela elimo santu, nguya ya Nzambe.

Kasi ezali boni mpo na mai? Tótalela makambo oyo Biblia elobi liboso mpe nsima ya lisolo ya Yesu ná Nikodeme. Makambo yango emonisi ete Yoane Mobatisi mpe bayekoli ya Yesu bazalaki kobatisa bato na mai. (Yoane 1:19, 31; 3:22; 4:1-3) Likambo yango eyebanaki malamu na Yelusaleme. Na yango, ntango Yesu alobelaki mai, Nikodeme ayebaki ete Yesu azalaki kolobela mai nyonso te, kasi mai ya batisimo.a

Kobatisama “na elimo santu”

Soki ‘kobotama na mai’ elimboli kobatisama na mai; ‘kobotama na elimo’ elimboli nini? Liboso ya lisolo ya Yesu ná Nikodeme, Yoane Mobatisi amonisaki ete kaka mai te, kasi mpe elimo santu ekozala na ntina na batisimo. Alobaki boye: “Ngai nazali kobatisa bino na mai, kasi ye akobatisa bino na elimo santu.” (Malako 1:7, 8) Malako, mokomi moko ya Evanzile, alobeli mbala ya liboso oyo batisimo yango epesamaki. Akomi boye: “Na boumeli ya mikolo yango Yesu autaki na Nazalete ya Galilai mpe abatisamaki na Yolodani na Yoane. Mpe na mbala moko ntango azalaki kobima na mai amonaki likoló ezali kofungwama, mpe elimo ezali kokitela ye lokola ebenga.” (Malako 1:9, 10) Ntango Yoane Mobatisi azindisaki Yesu na ebale Yolodani, Yesu abatisamaki na mai. Ntango elimo ekitelaki ye, abatisamaki na elimo santu.

Mbula soki misato nsima ya batisimo na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bokobatisama na kati ya elimo santu nsima ya mwa mikolo.” (Misala 1:5) Likambo yango esalemaki ntango nini?

Na mokolo ya Pantekote na mobu 33 T.B., bayekoli soki 120 ya Yesu bayanganaki na ndako moko na Yelusaleme. “Na mbala moko makɛlɛlɛ ebimaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kobɛta makasi, mpe etondaki na ndako mobimba epai bafandaki. Mpe ndemo lokola nde ya mɔtɔ emonanaki epai na bango . . . , mpe bango nyonso batondaki na elimo santu.” (Misala 2:1-4) Mokolo yango kaka, balendisaki mpe bato mosusu na Yelusaleme bázwa batisimo ya mai. Ntoma Petelo ayebisaki ebele ya bato boye: “Bóbongola mitema, mpe tiká ete moko na moko na bino abatisama na nkombo ya Yesu Klisto mpo na kolimbisama ya masumu na bino, mpe bokozwa likabo ya ofele ya elimo santu.” Bato yango basalaki nini? “Baoyo bayambaki liloba na ye na motema mobimba babatisamaki, mpe na mokolo wana milimo soki nkóto misato ebakisamaki.”​—Misala 2:38, 41.

Esɛngaka kozwa batisimo mibale

Batisimo yango mibale emonisi nini mpo na kobotama lisusu? Emonisi ete mpo na kobotama lisusu moto asengeli kozwa batisimo mibale. Simbá ete Yesu azwaki liboso batisimo ya mai. Na nsima azwaki elimo santu. Ndenge moko mpe, bayekoli ya liboso babatisamaki naino na mai (bamosusu babatisamaki na Yoane Mobatisi), mpe na nsima bazwaki elimo santu. (Yoane 1:26-36) Ndenge moko mpe na Pantekote, bato 3 000 oyo bakómaki baklisto, bazwaki liboso batisimo ya mai, mpe na nsima bazwaki elimo santu.

Soki tokanisi batisimo oyo epesamaki na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, lelo oyo tosengeli komizela ete kobotama lisusu esalema ndenge nini? Ndenge kaka esalemaki mpo na bantoma ya Yesu mpe mpo na baklisto ya liboso. Moto asengeli naino kobongola motema, kotika mabe, kopesa bomoi na ye epai ya Yehova mpo na kosambela mpe kosalela ye, mpe komonisa yango na nzela ya batisimo ya mai. Na nsima, soki Nzambe aponi moto yango mpo akende koyangela na Bokonzi na Ye, moto yango apakolamaka na elimo santu. Moto ye moko nde azwaka ekateli ya kozwa batisimo ya mai; nzokande, kobatisama na elimo santu ezali likambo ya Nzambe. Ntango moto azwi batisimo yango mibale, yango emonisi ete abotami lisusu.

Kasi, mpo na nini Yesu, na lisolo na ye ná Nikodeme, alobaki ete moto asengeli “kobotama na mai mpe na elimo”? Alobaki bongo mpo na komonisa ete mbongwana monene esalemaka na bomoi ya baoyo bazwaka batisimo yango mibale. Lisolo oyo elandi ekolobela likambo yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ndenge moko mpe, mokolo moko, liboso ya kopesa bato batisimo, ntoma Petelo alobaki boye: “Moto akoki nde kopekisa mai?”​—Misala 10:47.

[Elilingi na lokasa 9]

Yoane abatisaki na mai Bayisalaele oyo babongolaki motema

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto