Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/4 nk. 11-12
  • Moke bakoyangela, mingi bakozwa matomba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moke bakoyangela, mingi bakozwa matomba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Kobotama ya sika—Mokano na yango ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Bokonzi oyo ekosala Paradis
    Bokonzi oyo ekosala Paradis
  • Nzela se moko oyo ezali komema na bomoi ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bakristo nyonso ya sembo bakendaka na likoló?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/4 nk. 11-12

Moke bakoyangela, mingi bakozwa matomba

BANDA na ntango ya bantoma, Nzambe azalaki kopona mwa ndambo ya bato kati na baklisto ya sembo mpo akómisa bango bana na ye. Lokola likambo yango ememaka Mbongwana monene na bomoi ya bato yango, Liloba ya Nzambe elobi ete babotamaka lisusu. Mokano na yango ezali ya kobongisa basaleli yango ya Nzambe mpo bákóma bakonzi na likoló. (2 Timote 2:12) Mpo na yango, basengeli kosekwa mpo na bomoi na likoló. (Baloma 6:3-5) Kuna na likoló, “basengeli koyangela mabelé” elongo na Klisto.​—Emoniseli 5:10; 11:15.

Nzokande, Liloba ya Nzambe elobi mpe ete longola baoyo bazali kobotama lisusu, bato mosusu mpe bakozwa bomoi ya seko. Na Biblia (ezala na Makomami ya Liebele to na Makomami ya Grɛki), balobeli mokano oyo Nzambe azali na yango ya kobikisa bituluku mibale ya bato—etuluku moke ya bato oyo bakoyangela na likoló mpe ebele ya bato oyo bakozala na bomoi awa na mabelé. Na ndakisa, talá oyo ntoma Yoane akomelaki baninga na ye bandimi oyo babotamaki lisusu. Alobaki mpo na Yesu boye: “Azali mbeka ya mbɔndi mpo na masumu na biso, [etuluku moke] nzokande mpo na oyo ya biso kaka te kasi mpe mpo na oyo ya mokili mobimba [ebele ya bato].”​—1 Yoane 2:2.

Ndenge moko mpe, ntoma Paulo akomaki boye: “Mposa makasi ya bozalisi [ebele ya bato] ezali kozela komonisama ya bana ya Nzambe [etuluku moke].” (Baloma 8:19-21) Maloba yango ya ntoma Yoane mpe ntoma Paulo elimboli mpenza nini? Elimboli boye: Baoyo bazali kobotama lisusu bakozala na guvɛrnema ya Nzambe na likoló. Mpo na kosala nini? Mpo na kopesa matomba ya seko epai ya bamilio ya bato oyo guvɛrnema ya Nzambe ekoyangela awa na mabelé. Yango wana, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.”​—Matai 6:10.

Makomami ya Liebele emonisi mpe likambo yango. Na ndakisa, talá oyo Yehova ayebisaki Abalayama, nkɔkɔ ya Yesu: “Na nzela ya momboto na yo [etuluku moke], bikólo nyonso ya mabele [ebele ya bato] ekomizwela mpenza lipamboli, mpo oyoki mongongo na ngai.” (Genese 22:18, NW) Ya solo, Nzambe abongisaki mapamboli mpo na bikólo nyonso na nzela ya “momboto” ya Abalayama.

“Momboto” yango ezali nani? Ezali Yesu Klisto elongo na baoyo bazali kobotama lisusu, to mpe bana ya Nzambe. Ntoma Paulo alobaki boye: “Soki bozali bato ya Klisto, bozali mpenza momboto ya Abalayama.” (Bagalatia 3:16, 29) Bato ya bikólo nyonso bazali kozwa mapamboli nini na nzela ya “momboto” yango? Libaku kitoko ya kondimama na Nzambe mpe kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Davidi, mokomi ya nzembo akomaki boye: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”​—Nzembo 37:29; Yisaya 45:18; Emoniseli 21:1-5.

Ya solo, kaka bato moke nde bakokende koyangela na likoló, kasi mapamboli ya bokonzi ya likoló​—bomoi ya seko na mabelé ná mapamboli na yango nyonso—​ekopesama epai ya bato mingi. Tiká ete yo ná libota na yo bózala kati na bato oyo bakozwa matomba ya seko oyo Bokonzi ya Nzambe ekomema.

[Elilingi na lokasa 12]

Ebele ya bato bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé. Yo mpe okozala?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto