Mituna ya batángi . . .
Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka likambo ya kosangana na mangomba mosusu?
▪ Buku moko (World Christian Encyclopedia), elobi ete ‘na mokili mobimba ezali na mangomba ndenge na ndenge soki 10 000.’ Lokola kowelana oyo ezalaka kati na mangomba yango ebimisá mpasi mingi, likanisi ya kosangana na mangomba mosusu epesaka bandimi mingi elikya. Bakanisaka ete ekoki komema kimya mpe bomoko na mokili oyo ekabwani.
Biblia elendisaka bomoko. Ntoma Paulo akokanisaki lisangá ya bokristo na nzoto oyo enama mokomoko, “esangani liboke moko na boyokani mpenza mpe ebongisami mpo na kosala elongo.” (Baefese 4:16) Ndenge moko mpe, ntoma Petro alendisaki baninga na ye bandimi boye: “Bino nyonso bózalaka na likanisi moko.”—1 Petro 3:8.
Bakristo ya liboso bafandaki na mokili oyo etondaki na bato mpe mangomba ndenge na ndenge. Kasi, ntango akomaki mpo na likambo etali kosangana na mangomba mosusu, Paulo atunaki boye: “Eloko nini moto ya sembo azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te?” (2 Bakorinti 6:15, 17) Emonani ete Paulo alobaki ete kosangisa mangomba ezali mabe. Mpo na nini alobaki bongo?
Ntoma alimbolaki ete kosangisa losambo ya solo ná oyo ya lokuta ezali ekanganeli ya mabe. (2 Bakorinti 6:14) Yango ekoki kobebisa kondima ya mokristo. Tokoki kokokanisa komibanzabanza ya Paulo na oyo ya tata moko oyo ayebi ete bana mosusu na kartye na bango bazali na bizaleli ya mabe. Lokola tata yango amibanzabanzaka mpo na bana na ye, na bwanya nyonso alakisi mwana na ye, mwana nini asengeli kosakanaka na ye. Bato mosusu bakoki kosepela te na mibeko wana. Nzokande, mobeko wana ekoki kobatela mwana na baninga ya mabe. Ndenge moko, Paulo ayebaki ete kokabwana na mangomba mosusu ekobatela bakristo na misala mabe.
Na maloba wana, Paulo azalaki komekola Yesu. Atako Yesu atikaki ndakisa monene na oyo etali kotya kimya na kati ya bato, azalaki kosangana te na mangomba mosusu. Ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye awa na mabele, mangomba mingi ezalaki; na ndakisa lingomba ya Bafarisai mpe oyo ya Basadukai. Kutu, mangomba yango esanganaki mpo na kotɛmɛla Yesu mpe ekendeki mosika, tii koyanga mwango mpo na koboma ye. Nzokande, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ‘bákeba . . . mpo na mateya ya Bafarisai ná Basadukai.’—Matai 16:12.
Bongo lelo? Toli ya Biblia na likambo etali koboya kosangana na mangomba mosusu, ezali kaka na ntina? Ɛɛ. Ezali bongo mpo mateya ndenge na ndenge ya mangomba ekoki te kokóma na bomoko na nzela ya kosangana ya mangomba, ndenge kaka mafuta mpe mai esanganaka te kaka mpo batye yango na saani moko. Na ndakisa, ntango bato ya mangomba ekeseni basanganaka mpo na kosambela mpo na kimya, basambelaka Nzambe nini? Basambelaka Nzambe moko na bapersona misato? Basambelaka Brahma, nzambe ya Bahindu? Basambelaka Bouddha? To nzambe mosusu?
Mosakoli Mika asakolaki ete “na eleko ya nsuka ya mikolo,” bato ya bikólo nyonso bakoloba ete: “Bóya, tómata na ngomba ya Yehova mpe na ndako ya Nzambe ya Yakobo; mpe akolakisa biso banzela na ye, mpe tokotambola na banzela na ye.” (Mika 4:1-4) Yango ekosala ete kimya mpe bomoko ezala na mokili mobimba, likambo yango ekosalema te mpo mangomba nyonso ekosangana, kasi mpo bato nyonso bakozala na kondima moko ya solo.
[Elilingi na lokasa 27]
Likita oyo esangisaki mangomba minene ya mokili na 2008
[Eutelo ya bafɔtɔ]
REUTERS/Andreas Manolis