Moto ya liboso oyo asalaki ete bato mingi bázwa Biblia
ELEKI sikoyo bankóto ya bambula, bato bazalaki kokoma babuku mpe barulo na mabɔkɔ. Kasi, momeseno ya kobimisa mikanda na masini ebandá kala te. Babuku ya liboso oyo babimisaki na masini ezalaki na Chine na mobu 868 ya ntango na biso, bazalaki kosalela masini ya mabaya mpo na kobimisa yango. Na mobu soki 1455 na Allemagne, Johannes Gutenberg, abimisaki masini oyo balɛtrɛ na yango ezalaki ya ebende mpe abimisaki Biblia ya liboso na Latin.
Kasi, kaka mwa bambula na nsima, ntango imprimeri ekómaki monene, Babiblia mpe babuku mosusu ekabolamaki mingi epai ya bato. Engumba Nuremberg ekómaki esika monene na Allemagne epai bazalaki kobimisa babuku mingi, mpe ekoki kozala ete Anton Koberger, moto ya engumba yango, azalaki moto ya liboso oyo abimisaki Babiblia mpe bazulunalo mingi na mokili mobimba na masini.
Bato ya bikólo nyonso basengeli mpenza komonisa botɔndi na bato ya liboso oyo babimisaki Biblia, ata mpe epai ya Anton Koberger. Na yango, tiká tólobela naino Koberger mpe mosala na ye.
“Amibanzabanzaki mpo na buku moko—Biblia”
Koberger afungolaki imprimeri ya liboso na Nuremberg na mobu 1470. Ntango ekómaki monene, azalaki na bamasini 24 oyo ezalaki kobimisa mikanda nzela moko, azalaki na bato 100 oyo bazalaki konyata mikanda, bato ya misala ya mabɔkɔ, mpe azalaki na basali mosusu na engumba Basel, Strasbourg, Lyon, mpe na bingumba mosusu ya Mpoto. Koberger abimisaki makomi ya latin oyo bazalaki kosalela na Moyen-Âge mpe ebele ya mikanda ya siansi ya ntango wana. Na boumeli ya mosala na ye abimisaki mikanda ndenge na ndenge 236. Babuku mosusu ezalaki na nkasa ebele, babuku yango nyonso ebimisamaki na masini yango ya mabɔkɔ.
Lokola balɛtrɛ ya masini ya Koberger esalemaki na ndenge ya kitoko, yango ezalaki kosala ete babuku na ye ezala kitoko mpe mpasi te mpo na kotánga. Alfred Börckel, moto moko ya istware akomaki boye: “Koberger azalaki ntango nyonso kolinga ete basali na ye básalelaka balɛtrɛ ya sika, oyo ezali komonana polele. Azalaki kolinga te básalela balɛtrɛ oyo ezalaki komonana malamu te.” Lisusu, babuku mpe Babiblia mingi ya Koberger ezalaki na mayemi.
Banda na ebandeli tii na nsuka ya mosala na ye, Koberger “azalaki komibanzabanza mpo na buku moko—Biblia—ndenge emonani na mosala na ye mobimba,” ndenge Oscar Hase, moto oyo akomaki lisolo ya bomoi ya Koberger amonisi yango. Koberger mpe baninga na ye ya mosala basalaki milende mpenza mpo na kozwa makomi ya Biblia ya sikisiki mpenza oyo ezalaki na ntango wana. Mosala yango ezalaki pɛtɛɛ te, mpamba te bamaniskri mingi ya mposo ya nyama ezalaki biloko ya motuya oyo bazalaki kobomba na bamonastɛrɛ mpe bazalaki kodefisa yango bato kaka mpo na mwa ntango moke mpo básala bakopi na yango, ntango mosusu mpe bazalaki koboya kodefisa yango.
Babiblia ya Latin mpe ya Allemand
Koberger asalaki bamasini ndenge na ndenge 15 mpo na kobimisa Biblia na monɔkɔ ya Latin (Biblia Latina), libongoli ya liboso ebimaki na mobu 1475. Mabongoli mosusu ezalaki na elilingi ya masuwa ya Noa, Mibeko Zomi, mpe tempelo ya Salomo. Na mobu 1483, Koberger abimisaki Biblia na monɔkɔ ya Allemand (Biblia Germanica); abimisaki Biblia soki 1 500—motángo monene na ntango wana. Na Biblia yango batyaki mayemi koleka 100 mpo bato básepela kotánga yango, mpe mpo na kolimbola Makomami, mpe kosalisa bato oyo bakokoka te kotánga masolo ya Biblia oyo eyebani. Na nsima, mayemi yango esalisaki bato oyo batyaka bililingi na Babiblia, mingimingi na mabongoli ya Biblia na Allemand.
Bato mingi bakómaki kosalela libongoli ya Biblia ya Allemand oyo Koberger abimisaki na mobu 1483, kasi na nsima makambo ebongwanaki, yango ezalaki libongoli kaka moko ya Allemand oyo Koberger abimisaki. Atako bato oyo batángaki libongoli na ye liboso ebima, babongisaki yango mpo eyokana na libongoli ya Vulgate ya Latin, oyo Lingomba endimaki, abongolaki Biblia na ye na kolanda libongoli ya ekeke ya 14 ya Ba-Vaudois oyo epekisamaki.a Na mobu oyo elandaki Papa Innocent VIII abomisaki mabota ya Ba-Vaudois. Na nsima, Lingomba ekobaki kotɛmɛla makasi Babiblia ya monɔkɔ mosusu. Na mokolo ya 22 Marsi 1485, Berthold ya Mainz, Episkɔpɔ-mokonzi ya Allemagne abimisaki mobeko oyo epekisaki kobongola Biblia na monɔkɔ ya Allemand. Na mokolo ya 4 Yanuali ya mobu oyo elandaki, Berthold azongelaki lisusu mobeko yango. Mpo na botɛmɛli yango, Koberger abimisaki lisusu te Biblia na monɔkɔ ya Allemand.
Atako bongo, Anton Koberger asalaki mosala ya mpamba te. Azalaki moto ya liboso oyo asalelaki mayele ya sika ya kobimisa mikanda na masini mpo bato nyonso na Mpoto bázala na likoki ya kozwa babuku ya ndenge na ndenge. Na ndenge yango, mosala ya Koberger esalisaki mpo bato ya ndenge nyonso bázwa Biblia.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Ba-Vaudois: Babandaki na lipɛngwi mpo na kosuka na Lingomba ya Protesta,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 2002.
[Bililingi na lokasa 26]
Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Liyemi ya Danyele na libulu ya nkɔsi; lɛtrɛ ya liboso oyo bapakoli yango wolo; balɛtrɛ oyo ezali komonana polele
[Elilingi na lokasa 26]
Koberger
[Bililingi na lokasa 26]
Makambo mosusu ya babiblia ya Latin mpe ya Allemand ya Koberger, emonisi bililingi mpe maloba ya Ebandeli 1:1
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Bafɔtɔ nyonso ya Biblia: Na ndingisa ya American Bible Society Library; Koberger: Mit freundlicher Genehmigung der Linotype GmbH