Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/9 lok. 3
  • Nani atindaka bato básala mabe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani atindaka bato básala mabe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Malamu na mabe: Etumba oyo eumeli bikeke mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Makambo ya mabe ekosila?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Malamu ekolónga mabe mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nini ekómisaka biso bato malamu to bato mabe?
    Lamuká!—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/9 lok. 3

Nani atindaka bato básala mabe?

MPO na makambo ya mabe oyo amonaki na 1994 ntango bana-mboka ya ekólo Rwanda bazalaki kobomana, kasi bango balongaki te kopekisa bango, mokonzi ya basoda ya ONU na ekólo yango alobaki ete ezalaki lokola amonaki Zabolo. Moto mosusu alobaki ete: “Soki moto azali naino kotya ntembe ete Satana azali, aya ngai na ye tókende kotala libulu ya monene oyo bakundaki ebele ya bato na Rwanda.” Ezali mpenza solo ete Zabolo nde atindaka bato básala makambo mabe ya ndenge wana?

Bato mingi bandimaka te ete ekelamu moko ya mabe oyo amonanaka te nde atindaka bato básala mobulu mpe makambo ya mabe. Mingi bakanisaka ete bato basalaka makambo mabe mpo ezali ndenge bakelamá mpe ntina mpenza ya mabe ezali kaka motema mabe ya moto. Basusu bakanisaka ete ezali na etuluku moko ya bato ya bozwi mingi mpe ya nguya, lolenge moko ya lisangá ya bato oyo bazali kosala makambo na molili, batambwisaka makambo ya mokili banda kala mpo bango moko bayangelaka yango. Kasi, bato mosusu balobaka ete kozanga bosembo mpe bampasi oyo bazali komona lelo, ezali foti ya baguvɛrnema to bakonzi ya bikólo na bango.

Yo okanisaka nini? Mpo na nini mabe, kobomana mpe bampasi etondi na mokili lelo atako tozali kosala nyonso mpo na kosilisa yango? Mpo na nini bato bazali komipesa na bizaleli ya mabe, mpe bazali koboya koyoka makebisi oyo ezali kopesama mbala na mbala? Nani azali kotinda bango básala mabe nyonso wana? Nani mpenza azali koyangela mokili? Eyano ekoki kokamwisa yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto