Yekolá na Liloba ya Nzambe
Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?
Lisolo oyo ebimisi mituna oyo omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kolobela biyano yango elongo na yo.
1. Nzambe ayokaka mabondeli nyonso?
Yehova azali kobenga bato ya bikólo nyonso ete bábondelaka ye. (Nzembo 65:2) Kasi ayokaka mabondeli nyonso te. Na ndakisa, ntango Bayisraele bakobaki kosala mabe, Nzambe aboyaki koyoka mabondeli na bango. (Yisaya 1:15) Lisusu, Yehova akoki kokanga matoi na mabondeli ya mobali oyo anyokolaka mwasi na ye. (1 Petro 3:7) Kasi, Nzambe akoki koyoka ata bato oyo basali masumu minene soki babongoli motema.—Tángá 2 Ntango 33:9-13.
2. Tosengeli kobondela ndenge nini?
Yehova apesi biso libaku malamu ya kobondela ye; mpe lokola libondeli ezali moko ya makambo ya losambo na biso, tosengeli kobondela kaka Yehova. (Matai 4:10; 6:9) Lokola tozali bato ya masumu, tosengeli kobondela na nkombo ya Yesu mpo ye azali “nzela” oyo Nzambe aponi. (Yoane 14:6) Yehova alingaka te tólobaka na ye makambo oyo tokangi na motó to tozali kotánga na mokanda, kasi tóbondela ye na maloba oyo ezali kouta mpenza na motema.—Tángá Matai 6:7; Bafilipi 4:6, 7.
Mozalisi na biso akoki koyoka ata mabondeli oyo esalemi na kati ya motema. (1 Samwele 1:12, 13) Azali kosɛnga biso tóbondelaka na mabaku nyonso, na ndakisa na ntɔngɔ mpe na mpokwa, na ntango ya kolya mpe ntango tokutani na mikakatano.—Tángá Nzembo 55:22; Matai 15:36.
3. Mpo na nini bakristo bayanganaka elongo?
Kopusana penepene na Nzambe ezali pɛtɛɛ te mpo tozali kofanda na bato oyo bazali na kondima te epai na Nzambe mpe bandimaka te elaka oyo apesi ya kotya kimya awa na mabele. (2 Timote 3:1, 4; 2 Petro 3:3, 13) Yango wana, tosengeli koyanganaka elongo na bakristo mosusu.—Tángá Baebre 10:24, 25.
Okoki kopusana penepene na Nzambe soki okómi moninga ya baoyo balingaka ye. Makita ya Batatoli ya Yehova esalisaka biso tókutana na bato mosusu oyo bazali na kondima.—Tángá Baroma 1:11, 12.
4. Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?
Okoki kopusana penepene na Yehova soki ozali kokanisa na makambo oyo oyekoli na Liloba na ye. Kanisá misala, batoli mpe bilaka na ye. Kokanisa na mozindo ekoki kosalisa moto akóma na botɔndi mpo na bolingo mpe bwanya ya Nzambe.—Tángá Yosua 1:8; Nzembo 1:1-3.
Okoki kopusana penepene na Nzambe kaka soki otyeli ye motema, mpe soki ondimeli ye. Kondima ezali lokola eloko nyonso oyo esɛngaka báleisa yango. Okoki kokolisa kondima na yo ntango nyonso soki ozali kotalela mateya oyo ondimaka.—Tángá 1 Batesaloniki 5:21; Baebre 11:1, 6.
5. Matomba nini okozwa soki opusani penepene na Nzambe?
Yehova abatelaka bato oyo balingaka ye. Abatelaka bango na makambo nyonso oyo ekoki kobebisa kondima na bango mpe elikya na bango ya bomoi ya seko. (Nzembo 91:1, 2, 7-10) Akebisaka biso na bizaleli oyo ekoki kobebisa nzoto na biso mpe kolongola biso esengo. Yehova ateyaka biso bizaleli oyo esalisaka biso tózala na bomoi ya malamu mingi.—Tángá Nzembo 73:27, 28; Yakobo 4:4, 8.
Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 17 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.