Coverdale mpe Biblia mobimba ya liboso oyo ebimaki na Lingelesi
BIBLIA mobimba ya liboso oyo ebimaki na Lingelesi ezangaki nkombo ya moto oyo abongolaki yango. Moto yango nkombo na ye Miles Coverdale, mpe Biblia na ye ebimaki na mobu 1535. Na ntango wana, moninga na ye, William Tyndale, azalaki na bolɔkɔ mpo abongolaki Biblia. Na mbula oyo elandaki, babomaki Tyndale.
Mpo na kobongola ndambo mosusu ya Biblia, Coverdale asalelaki libongoli ya Tyndale. Ndenge nini Coverdale alongaki kobimisa Biblia na ye kozanga ete báboma ye, nzokande babongoli mosusu ya Biblia ya eleko na ye babomamaki mpo na mosala yango? Nsukansuka, mosala ya Coverdale ebimisaki matomba nini?
Mboto elonami
Ekoki kozala ete Miles Coverdale abotamaki na mobu 1488, na etúká ya Yorkshire, na Angleterre. Atángaki na Iniversite ya Cambridge mpe akómaki sango na Lingomba ya Katolike na mobu 1514. Molakisi na ye Robert Barnes nde alendisaki mposa oyo azalaki na yango ya kobongola makambo na Lingomba ya Katolike. Na mobu 1528, Barnes akimaki na Mpoto. Mbula 12 na nsima, bakonzi ya lingomba bakakisaki Barnes na nzete mpe batumbi ye.
Na mobu 1528, Coverdale abandaki koteya na Lingomba ya Katolike mpo na kokweisa mateya na yango oyo ezwami na Biblia te, na ndakisa losambo ya bikeko, kotubela masumu, mpe Misa. Lokola bomoi na ye mpe ekómaki na likama, alongwaki na Angleterre, akei na bamboka mosusu ya Mpoto epai alekisaki mbula soki nsambo.
Na engumba Hambourg, na Allemagne, Coverdale afandaki elongo na William Tyndale. Bango mibale basalaki mosala elongo mpo bazalaki na mposa ya kobimisa Biblia oyo bato nyonso bakokaki kotánga. Na boumeli ya eleko wana, Coverdale ayekolaki makambo mingi oyo etali ndenge ya kobongola Biblia epai ya Tyndale.
Eleko ya mbongwana
Na eleko wana, makambo ebandaki kobongwana na Angleterre. Na mobu 1534, Mokonzi Henri VIII aboyaki mpenza kotosa bokonzi ya pápa wa Roma. Andimaki mpe likanisi ya kobongola Biblia mpo bato nyonso ya Angleterre bázwa yango. Na ntango wana, Coverdale abandaki mosala yango. Atako Coverdale ayebaki Lingelesi malamumalamu, ayebaki minɔkɔ lokola Ebre mpe Grɛki ndenge wana te, kasi moninga mpe molakisi na ye Tyndale ayebaki yango malamumalamu. Coverdale abongisaki Biblia ya Tyndale, asalelaki Biblia ya Latin mpe ya Allemand mpo na kobongisa yango.
Biblia ya Coverdale ebimaki na Mpoto na mobu 1535, mbula moko liboso ete Tyndale abomama. Biblia yango ezali mpe na maloba malamu ya kotɔnda mpe kolɛngola Mokonzi Henri. Coverdale ayebisaki Henri ete Biblia yango elongoli maloba na nse ya lokasa oyo Tyndale atyaki, oyo bazalaki kondima yango te, mpo ezalaki kobenda likebi na mateya ya Lingomba ya Katolike oyo euti na Biblia te. Yango wana, Henri andimaki ete bábimisa Biblia yango. Makambo ebandaki kobongwana.
Na mobu 1537, libongoli mibale ya Biblia ya Coverdale ebimaki, na Angleterre. Kaka na mbula wana, na Anvers, Biblia oyo babengi Biblia ya Matai ebimaki, basangisaki Biblia ya Tyndale mpe ya Coverdale, mpe Mokonzi Henri andimaki yango.
Thomas Cromwell, mopesi-toli ya Mokonzi Henri, ná Cranmer, episkɔpɔ-mokonzi ya Cantorbéry, oyo apesaki ye mabɔkɔ, bamonaki ete esengeli kozongela Biblia ya Matai. Yango wana, Thomas Cromwell asɛngaki Coverdale abongola lisusu maniskri yango mobimba. Mokonzi Henri apesaki nzela ete Biblia ya sika ebima na mobu 1539 mpe asɛngaki bakopi na yango. Babengaki Biblia yango Great Bible mpo ezalaki monene mpe batyaki yango na bandako-nzambe mpo bato nyonso bátánga yango. Mboka mobimba esepelaki mpenza na Biblia yango.
Eloko ya motuya oyo Coverdale atiká
Coverdale akómaki episkɔpɔ ya Exeter na mobu 1551, ntango Edward VI akómaki koyangela na esika ya Henri VIII oyo autaki kokufa. Kasi, ntango Marie akómaki mokonzi nsima ya Edward na mobu 1553, Coverdale akimaki na Danemark. Na nsima, akendaki na Suisse, epai akobaki mosala na ye. Abimisaki mpe mabongoli misato ya Biblia na Lingelesi, oyo ebengamaka Kondimana ya Sika, oyo ezalaki na makomi ya Latin mpo na kosalisa basango na boyekoli na bango.
Likambo ya kokamwa, Coverdale alongolaki nkombo ya Nzambe “Yehova” na Biblia na ye. Tyndale asalelaki nkombo ya Nzambe mbala koleka 20 na Biblia na ye ya Makomami ya Ebre. Na buku moko (Coverdale and His Bibles), Frederic Mozley alobi boye: “Na mobu 1535, Coverdale aboyaki mpenza liloba [Yehova].” Kasi na nsima, atyaki nkombo ya Nzambe, Yehova, mbala misato na Great Bible.
Nzokande, Biblia ya Coverdale ezalaki Biblia ya liboso ya Lingelesi oyo ezalaki na Tetragrami—balɛtrɛ minei ya nkombo ya Nzambe na Ebre—na likoló na lokasa oyo ezalaki na motó ya likambo ya Biblia yango. Likambo ya ntina, yango ezalaki Biblia ya liboso oyo etyaki na apɛndisi mikanda nyonso oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe te, na esika ya kotya yango na kati ya mikanda ya Makomami ya Ebre.
Na nsima, babongoli mosusu bakómaki kosalela maloba mingi oyo Coverdale asalelaki. Na ndakisa, maloba lokola “lobwaku ya molili makasi,” oyo ezali na Nzembo 23, vɛrsɛ 4. Profesɛrɛ Greenslade alobi ete maloba “motema boboto” oyo ezali na vɛrsɛ 6, “ezali maloba ebongi mpenza mpo na kokesenisa bolingo ya Nzambe epai ya bato na ye mpe bolingo ná boboto oyo moto nyonso azalaka na yango.” Libongoli ya Mokili ya sika, oyo ezali na mitindami (Rbi8) esaleli maloba wana mpe ebakisi maloba oyo na nse ya lokasa: “To, ‘bolingo ya sembo.’”
Buku moko (The Bibles of England) elobi ete Biblia ya Coverdale, (Great Bible) nde “esukisaki mosala nyonso ya kobongola Biblia na Lingelesi . . . kobanda mokolo Tyndale abandaki mosala ya kobongola Kondimana ya Sika.” Biblia ya Coverdale nde esalisaki ebele ya bato ya ntango na ye oyo balobaka Lingelesi, bátánga Biblia.
[Bililingi na lokasa 11]
Tetragrami na lobɔkɔ ya mwasi, euti na lokasa oyo ezali na motó ya likambo ya libongoli ya mobu 1537
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Eutelo ya fɔtɔ: From The Holy Scriptures of the Olde and Newe Testamente With the Apocripha by Myles Coverdale
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]
Euti na buku Our English Bible: Its Translations and Translators