Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/9 lok. 3
  • Ebele ya bato babomamaka kaka mpamba!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ebele ya bato babomamaka kaka mpamba!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Motuna 3: Mpo na nini Nzambe atiki ete nanyokwama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mpo na nini mpasi ezali mingi boye?
    Lamuká!—2011
  • Makambo oyo ezali na kati
    Lamuká!—2020
  • Ntango mpasi ekozala lisusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/9 lok. 3

ELOBELI TITRE YA EZIPELI: MPO NA NINI BAMPASI MINGI BOYE? EKOSILA NTANGO NINI?

Ebele ya bato babomamaka kaka mpamba!

Noelle azalaki mwana moko ya boboto mpe azalaki kolinga kosala mayemi. Mokolo moko na mpokwa, na eleko ya molunge, azalaki kotambolatambola na nsima ya ndako mpe na mbala moko akweaki na pisini na bango mpe akufaki. Etikalaki kaka pɔsɔ mibale mpo akokisa mbula minei.

Na kati ya bato 26 oyo bakufaki na masasi na mokolo ya 14/12/2012 na eteyelo moko na Connecticut, na États-Unis, 20 bazalaki bana ya mbula motoba to nsambo mpe bankombo ya basusu yango oyo: Charlotte, Daniel, Olivia, Josephine. Na mokolo oyo basalaki molulu ya kokunda bibembe yango, Prezida Obama atángaki bankombo ya bana yango mpe ayebisaki bato oyo bayaki na esika yango boye: “Likambo ya boye esengeli kosuka.”

Bano oyo azalaki na mbula 18 ná libota na bango mobimba balongwaki na Irak na 1996 mpe bakendaki kofanda na Norvège. Baninga na ye bazalaki kobenga ye Sun Rays. Likambo ya mawa, na mokolo ya 22/07/2011, Bano azalaki kati na bato 77 oyo motomboki moko abomaki; mpe na lolendo nyonso motomboki yango azalaki koloba: “Nasɛngi bolimbisi . . . mpo elingaki kozala malamu soki nabomaka bato ebele.”

Mbala mingi balobelaka bansango mosusu ya mawa ya ndenge wana na mokili mobimba. Kanisá naino mawa to mpasi oyo eutaka na baaksida, makambo ya mobulu, bitumba, terorisme, makama minene lokola mopɛpɛ makasi to koningana ya mabele, to mpe makambo mosusu. Ebele ya bato babomamaka to banyokwamaka kaka mpamba!

Bato mosusu bapesaka Nzambe foti mpe bakanisaka ete Mozalisi akipaka biso te. Basusu balobaka ete Nzambe amonaka bampasi na biso kasi atalaka kaka na miso. Kutu, bamosusu balobaka ete makambo ya mawa wana nyonso etángamá. Emonani ete bato bazali na makanisi ndenge na ndenge mpo na likambo yango. Epai wapi tokoki kozwa biyano oyo ebongi kotyela motema? Na masolo oyo elandi, tokotalela Biblia, Liloba ya Nzambe mpo na koyeba makambo oyo ebimisaka bampasi mpe ndenge oyo ekosila.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto