Ntango mpasi ekozala lisusu te
BAMPASI ezalaki te na mokano oyo Nzambe azalaki na yango mpo na libota ya bato uta ebandeli. Akanaki yango te, mpe azali na mposa na yango te. Kasi mbala mosusu okotuna ete: ‘Soki yango ezali bongo, lolenge nini bampasi ebandaki mpe mpo na nini Nzambe atikaki nzela ete ekóba kozala kino lelo?’—Kokanisá na Yakobo 1:13.
Eyano ezali kozwama na lisoló ya libosoliboso ya moto, oyo lizali kati na Biblia, mingimingi mpenza na mokanda ya Genese. Yango elobi ete baboti na biso ya liboso, Adama na Eva, balandaki Satana Zábolo na botomboki na ye ya kotɛmɛla Nzambe. Makambo oyo basalaki ebimisaki mituna minene oyo miyeisaki ntembe likoló na moboko ya mibeko mpe ya ebongiseli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. Ntango basɛngaki lotómo ya komizwela bango moko bikateli na oyo ezali malamu mpe na oyo ezali mabe, batyaki mpenza ntembe na lotómo oyo Nzambe azali na yango ya kozala mokonzi. Baboyaki kondima lotómo oyo azali na yango ya koyangela mpe kozala moto bobele moko oyo asengeli komonisa ‘oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe.’—Genese 2:15-17; 3:1-5.
Mpo na nini andimisaki nokinoki te mokano na ye na makasi?
Okoki kotuna ete: ‘Boye, mpo na nini Nzambe andimisaki nokinoki te mokano na ye na makasi?’ Epai na bato mingi, likambo yango lizali mpenza pɛtɛɛ. Bazali koloba ete: ‘Nzambe azali na nguya. Akokaki kosalela yango mpo na koboma batomboki wana.’ (Nzembo 147:5) Kasi omituna motuna oyo, ‘Nandimaka kozanga kokakatana baoyo nyonso bazali kosalela nguya monene mpo na kondimisa na makasi mposa na bango? Nayokaka nkanda nokinoki ntango mokonzi moko mabe atindi bituluku ya bato na ye oyo bazali na mindóki ete báboma banguna na ye, boye te?’ Bato mingi ya makanisi mabongi batombokaka na likambo motindo wana.
Okoloba mbala mosusu ete: ‘Ezali bongo, kasi soki Nzambe asalelaki nguya wana, moto moko te alingaki koloba mabe na ntina na misala na ye.’ Okanisi mpenza ete likambo olobi ezali solo? Eyebani malamu ete bato balobaka mabe mpo na lolenge oyo Nzambe asalelaka nguya na ye, boye te? Bazali koloba mabe likoló na ntina oyo asalelaki nguya yango te na mabaku mosusu, na ndakisa ntango atikaki nzela ete mabe ezala. Bazali mpe koloba mabe likoló na ntina oyo asalelaki yango na bantango mosusu. Ata mosembwi Abalayama azalaki na mokakatano likoló ya lolenge oyo Nzambe asalelaki nguya mpo na koboma banguna na Ye. Omikundola mokolo oyo Nzambe azwaki ekateli ya koboma Sodomo. Na libungá nyonso, Abalayama azalaki kobanga, kokanisáká ete bato ya sembo bakokufa elongo na bato mabe. Angangaki ete: “Ebongi na yo te kosala likambo boye ete oboma bayengebeni na bato mabe elongo.” (Genese 18:25) Ezala Abalayama, oyo azalaki na makanisi malamu, azalaki na mposa ya kondimisama ete nguya oyo eleki nguya nyonso ekosalelama na lolenge ya mabe te.
Ya solo, Nzambe akokaki na mbala moko koboma Adama, Eva mpe Satana. Kasi kanisá naino bopusi oyo yango elingaki kosala epai na baanzelu mosusu to epai na bikelamu oyo bisengelaki kozalisama na nsima, oyo mbɛlɛ bayaki koyeba makambo yango na nsima. Yango elingaki kobimisela bango mituna ya kobulunganisa makanisi likoló na boyengebene ya bokonzi ya Nzambe, boye te? Yango elingaki kopusa bikelamu wana na koloba mabe na ntina na Nzambe ete azali solo mokonzi mabe mpe ya makambo makasi, lokola Nietzsche alobaki ete azali Nzambe oyo, na kozanga mawa mpenza, abomaka moto nyonso oyo atɛmɛli ye?
Mpo na nini te kopusa bato na makasi ete básala oyo ezali malamu?
Bamoko bakoki kotuna ete: ‘Ezali solo ete Nzambe azalaki na likoki ya kopusa bato na makasi ete básala oyo ezali malamu, boye te?’ Tiká tótalela mpe likambo oyo. Na boumeli ya lisoló mobimba ya bato, baguvernemá esali milende makasi ya komema bato ete básala makambo engebene lolenge oyo guvernemá ekanisi. Baguvernemá mosusu to bamoko na bayangeli basili kosalela myango ndenge na ndenge ya kobongola bato makanisi, ezala na lisalisi ya bilangwiseli to na nzela ya lipaso, kobɔtɔláká bango likabo kitoko oyo bazalaki na yango ya kopona bango moko oyo balingi kosala. Tosepelaka mpenza kozala bato ya bonsomi na makanisi, atako likabo wana likoki komema moto na kosalela yango na lolenge mabe, boye te? Tondimaka mpenza guvernemá to moyangeli nyonso oyo azali komeka kobɔtɔla biso bonsomi wana?
Kasi Nzambe asalaki nini na esika ya kosalela nguya na ye nokinoki mpo na kondimisa mibeko na makasi? Na oyo etali kosilisa botomboki, Yehova Nzambe amonaki malamu ete apesa nzela na eleko moko ya mokuse mpo na lipandá liboso na boyangeli na ye, mpo na baoyo baboyaki kotosa mibeko na ye. Yango elingaki kopesa nzela na libota ya bato, bakitani ya Adama na Eva, ete bázwa mwa ntango oyo na boumeli na yango basengelaki komiyangela kozanga kotambwisama na mibeko ya Nzambe. Mpo na nini asalaki bongo? Mpamba te ayebaki ete nsukansuka, bilembeteli ya solosolo bisengelaki komonana, mpe komonisa ete lolenge na ye ya koyangela ezalaka ntango nyonso ya malamu mpe ya boyengebene, ata ntango asaleli nguya na ye ezangi nsuka mpo na kondimisa mokano na ye; lisusu, mpo na kolakisa ete botomboki nyonso liboso na ye, ata ndele, ekobimisa makámá.—Deteronome 32:4; Yobo 34:10-12; Yilimia 10:23.
Ezali boni mpo na baoyo nyonso bazwi mpasi kozanga ntina?
Okoki kotuna ete: ‘Na boumeli ya ntango wana, tokoloba boni mpo na baoyo bazali kozwa mpasi kozanga ntina?’ ‘Ezali mpenza na ntina ete bámona mpasi mpo na kondimisa likambo moko oyo litali mibeko?’ Soki Nzambe atikaki nzela ete mabe mázala, ezalaki te mpo na kondimisa likambo moko ya mibeko oyo lizangaki koyebana malamu. Ezalaki kútu nde na mokano ya komonisa, mbala moko mpo na libela, likambo oyo ya solo ya moboko ete bobele ye nde azali na lotómo ya kozala mokonzi mpe ete kotosa mibeko na ye ezali na ntina mingi mpo na bikelamu na ye nyonso ete bázwa kimya mpe esengo ezangi nsuka.
Likambo ya ntina oyo tosengeli kobosana te ezali ete Nzambe ayebi malamu ete azali na likoki ya kosilisa nyɛɛ mpasi nyonso oyo mabe ezali komemela bato. Ayebi ete na mikolo mikoya, eleko oyo ya bolózi mpe ya mpasi ya ntango mokuse ekotika esika na bolamu ya seko na seko. Kanisá naino mama oyo asimbi mwana na ye makasi ntango monganga azali kotɔbɔla ye ntonga ya mangwele oyo ezali koswa, mpo ete mwana yango azanga kozwa bokɔnɔ oyo ekoki koboma ye soki bakati ye mangwele te. Ezali ata na mama moko te oyo alingaka ete mwana na ye ayoka mpasi. Monganga ata moko te alukaka ete mobɛli oyo ye azali kosalisa atungisama. Na ntango bazali kotɔbɔla ye ntonga, mwana ayebaka te ntina oyo batiki nzela ete ayoka mpasi wana, kasi na nsima akoya kososola ntina na yango.
Libɔndisi ya solosolo mpo na baoyo bazali komona mpasi?
Bamoko bakoki kokanisa ete koyeba makambo nyonso wana ezali kopesa bobele libɔndisi moke epai na baoyo bazali konyokwama na mpasi. Hans Küng alobaki [na maloba ya kotyola] ete kolimbola ntina ya bampasi na lisalisi ya mayele ya bomoto ezali kosunga “monyokwami bobele ndenge lisoló ya biloko ya kolya esungaka moto oyo azali kokufa na nzala.” Atuni motuna ete: “Makanisi nyonso wana ya mpambampamba na ntina na bampasi makoki mpenza kopesa elendiseli epai na bato oyo mpasi esili kolekela bango ndelo?” ‘Makanisi wana ya mpambampamba’ ya bato oyo bayebi Liloba ya Nzambe te, Biblia, malóngi te kopesa libɔndisi epai na baoyo bazali konyokwama. Makanisi wana ya bomoto mayei sé kobakisa mpasi yango, mpamba te bazali koloba ete Nzambe alingaki moto amonaka mpasi mpe ete mabelé masalemaki bobele mpo na kozala lobwaku ya mpisoli to esika ya komekama mpo na baoyo bakozwa bomoi na lola. Oyo nde lituki monene!
Nzokande, Biblia yango moko epesi mpenza libɔndisi ya solosolo. Yango esuki te bobele na kolimbola malamumalamu ntina ya bampasi, kasi ezali lisusu komema bato na kotya elikya na elaka ya solosolo ya Nzambe ete akolongola minyoko nyonso oyo miuti na bampasi oyo atikelaki yango nzela mpo na ntango mokuse.
‘Kozongisama ya makambo nyonso ndenge mazalaki’
Etikali moke, Nzambe akozongisa biloko nyonso ndenge akanaki yango liboso ete bato oyo azalisaki libosoliboso bátombokela ye. Eleko oyo atikelaki bato ete bámiyangela bango moko ekómi pene na nsuka na yango. Tozali kobika sikawa na ntango oyo akotinda ‘Yesu, oyo ekoki ete aumela na likoló kino ntango na kozongisama ya makambo nyonso oyo Nzambe alobaki na minɔkɔ ya basakoli na ye ya bulɛɛ longwa na kalakala.’—Misala 3:20, 21, NW.
Yesu Klisto akosala nini? Akopɛtola mabelé na kobomáká banguna nyonso ya Nzambe. (2 Batesaloniki 1:6-10) Akoboma bibomelá te, lokola bakonzi mabe basalaka yango. Ebele ya bilembeteli oyo emonisi matomba mabe ya boyangeli ya bato ya yauli ekondimisa ete Nzambe azali na elónga mpenza na likambo oyo ete, nsima na mwa ntango moke, akosalela nguya na ye ezangi nsuka mpo na kotosisa mokano na ye. (Emoniseli 11:17, 18) Libosoliboso, ekobanda na “bolózi” oyo mokili emoná naino te, oyo ekozala lokola Mpela ya mikolo ya Noa, kasi yango ekoleka Mpela wana na monene. (Matai 24:21, 29-31, 36-39) Baoyo bakobika na “bolózi monene” bakozwa “ntango na kopema” mpamba te bakomona kokokisama ya bilaka nyonso oyo Nzambe apesaki “na monɔkɔ na basakoli na ye na bulɛɛ.” (Misala 3:19; Emoniseli 7:14-17) Nzambe alakaki nini?
Basakoli ya Nzambe na ntango ya kala balobi ete bampasi oyo euti na bitumba mpe na kosopama ya makila ekosuka. Na ndakisa, Nzembo 46:9 eyebisi biso ete: “Ye akosukisa bitumba kino nsuka na mokili.” Bato oyo bazali kokufa mpamba bakozala lisusu te, na bato bakimá mboka oyo bazali komona bwale, na baoyo bazali kobebisama na bosangisi nzoto na makasi, bibɔsɔnɔ, mpe babomami na bitumba ya yauli bakozala lisusu te! Mosakoli Yisaya alobi ete: “Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te.”—Yisaya 2:4.
Basakoli basakolaki mpe nsuka ya bampasi oyo ezali kobima mpo na bosáli bato mabe mpe bokɛsɛnɛ. Masese 2:21, 22 elaki ete “basembwi bakofanda na mokili” mpe ete baoyo bazali kopesa bato bolózi mpe mpasi “bakolongolama na mokili.” ‘Moto oyo akokonza moto mosusu mpo na konyokola ye’ akozala lisusu te. (Mosakoli 8:9) Bato mabe nyonso bakolongolama libela na libela. (Nzembo 37:10, 38) Moto nyonso akofanda na kimya mpe na libateli, mpe akomona mpasi soko moke te.—Mika 4:4.
Longola yango, basakoli bapesi lisusu elaka ete mpasi oyo euti na bokɔnɔ na makanisi mpe na nzoto ekosuka. (Yisaya 33:24) Yisaya alaki ete bakufi-miso, bakufi-matoi, bibɔsɔnɔ, mpe baoyo nyonso bazali konyokwama na bokɔnɔ bakokóma na nzoto kolɔngɔ́nɔ́. (Yisaya 5:5, 6) Nzambe akolongola mikakatano ya liwa. Yesu asakolaki ete “nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Kati na emonaneli na ye ya “likoló na sika mpe nsé na sika,” ntoma Yoane ayokaki ete “Nzambe ye mpenza . . . akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:1-4) Kanisá naino likambo yango! Minyoko esili, mpisoli esuki, kolela esuki, mpe liwa elongolami—bampasi ezali lisusu te!
Makambo nyonso ya mawa oyo masili kobima na boumeli ya ntango mokuse oyo mabe etikelamaki nzela makolongolama. Ezala likanisi ya komikundwela bwale mpe mpasi oyo bato bamonaki—oyo Nzambe akanaki yango te—ekobungisama nyɛɛ. Yisaya asakolaki ete: “Bolózi ya liboso etikami [“ekokanisama lisusu te,” NW] . . . Makambo na liboso makokanisama te.” (Yisaya 65:16, 17) Mokano ya ebandeli oyo Nzambe azalaki na yango ete libota ya bato efanda na kimya mpe na esengo monene kati na mabelé ya paladiso ekokokisama mpenza. (Yisaya 45:18) Lotómo na ye ya kozala mokonzi ekondimama solo. Ezali mpenza libaku malamu kozala na bomoi ntango Nzambe akosukisa bampasi nyonso ya bato, ntango akomonisa ete azali te “mokonzi mabe, mokosi, mobubi, mpe mobomi,” lokola Nietzsche alobaki yango na ntina na ye, kasi azali ntango nyonso na bolingo, na mayele, mpe na boyengebene kati na lolenge na ye ya kosalela nguya eleki monene!
[Elilingi na lokasa 5]
Bamoko na bayangeli basalelaki myango ya kobongola bato makanisi, kobɔtɔláká bango bonsomi ya kopona oyo bango moko balingi
[Elilingi na lokasa 7]
Ntango mpasi ekozala lisusu te, bato nyonso bakosepela na bomoi na motindo mokoki mpenza