Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/10 lok. 5
  • Nzambe azwi bibongiseli mpo na kobikisa bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azwi bibongiseli mpo na kobikisa bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo Nzambe alakaki na nzela ya basakoli
    Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
  • Mokano na Nzambe mpo na bato ezali nini?
    Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?
  • Masiya—Nzela oyo Nzambe asaleli mpo na kobikisa bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • “Tomoni Masiya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/10 lok. 5

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA EZALI NA NSANGO NINI?

Nzambe azwi bibongiseli mpo na kobikisa bato

Nzambe alakaki Abrahama moto ya sembo ete “momboto” oyo alakamaki akouta na libota na ye. Na nzela ya momboto yango, bato ya “bikólo nyonso ya mabele” bakozwa mapamboli. (Ebandeli 22:18) Na nsima, Yakobo nkɔkɔ ya Abrahama akendaki na Ezipito mpe kuna libota na ye ekómaki monene mpe ekómaki ekólo Yisraele.

Na nsima, na Ezipito, Farao moko ya mabe mpenza akómisaki Bayisraele baombo tii ntango Nzambe atindelaki bango mosakoli Moize, oyo abimisaki bango na Ezipito na nzela ya likamwisi oyo asalaki ya kokabola mai ya Mbu Motane. Nsima na yango, Nzambe apesaki Bayisraele Mibeko Zomi mpe mibeko mosusu mpo na kokamba mpe kobatela bango. Mibeko yango elobelaki polele makabo oyo basengelaki kopesa mpo masumu na bango elimbisama. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Moize ayebisaki Bayisraele ete Nzambe akotindela bango mosakoli mosusu. Mosakoli yango akozala “momboto” oyo alakamaki.

Mbula koleka 400 na nsima, Nzambe alakaki Mokonzi Davidi ete “momboto” oyo alobelaki na Edene, akoyangela na bokonzi oyo ekoumela seko. Ye akozala Masiya, Mobikisi oyo Nzambe aponaki mpo na kobikisa bato mpe kozongisa paradiso awa na mabele.

Na nzela ya Davidi mpe basakoli mosusu, Nzambe amonisaki mokemoke makambo mingi oyo etali Masiya. Basakolaki ete akozala na komikitisa mpe boboto mpe na boyangeli na ye, nzala, kozanga bosembo mpe bitumba ekosila. Bato nyonso bakozala na kimya kati na bango ata mpe elongo na banyama. Maladi, bampasi mpe liwa; oyo ezalaki ata moke te na mokano ya Nzambe, ekozala lisusu te, mpe bato oyo bakufá bakozonga na bomoi awa na mabele.

Na nzela ya mosakoli Mika Nzambe alobaki ete Masiya akobotama na Beteleme mpe na nzela ya Danyele alobaki ete na nsima, bakoboma ye. Kasi Nzambe akosekwisa Masiya mpe akotya ye Mokonzi na likoló. Danyele amonaki mpe ete Bokonzi ya Masiya ekolongola mpo na libela baguvɛrnema nyonso ya bato. Masiya ayaki mpenza ndenge esakolamaki?

​—Euti na Ebandeli mokapo 22-50, mpe Kobima, Kolimbola Mibeko, 2 Samwele, Nzembo, Yisaya, Danyele, Mika, Zekaria 9:9.

NKOMBO MOSANTU YA NZAMBE

Ebandeli 2:4 ezali esika ya liboso oyo Biblia etángi nkombo Yehova. Nkombo yango oyo ekokani na bankombo mosusu te ezali mbala soki 7 000 na bamaniskri ya monɔkɔ ya ebandeli oyo bakomaki na yango Makomami Mosantu. Nkombo yango oyo elimboli: “Ye oyo asalaka ete ekóma,” endimisi biso ete Nzambe azali mpenza na likoki ya kokokisa mikano mpe bilaka na ye nyonso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto