Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp16 No. 3 lok. 4
  • Ezali mabe koyoka mawa makasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali mabe koyoka mawa makasi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Masolo mosusu
  • Kozala na mayoki motindo oyo ezali mabe?
    Ntango moto oyo olingaka akufi
  • Masolo oyo ezali na kati: Okoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa
    Lamuká!—2018
  • Lolenge nini nakoki koyika mpiko na mawa na ngai?
    Ntango moto oyo olingaka akufi
  • Ndenge nini nakoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
wp16 No. 3 lok. 4

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NTANGO MOTO OLINGAKA AKUFI

Ezali mabe koyoka mawa makasi?

Osí obɛlá mwa moke? Mbala mosusu maladi yango esilaki nokinoki mpe obosanaki yango. Kasi, mawa oyo moto ayokaka soki ndeko to moninga akufi ezalaka bongo te. Moto moko ya mayele na nkombo Alan Wolfelt akomaki boye na buku na ye (Healing a Spouse’s Grieving Heart): “Eloko moko te ezali mpasi koleka ‘kolongola mawa’ oyo moto ayokaka soki ndeko na ye akufi.” Kasi, abakisi boye: “Nsima ya mikolo mpe na lisalisi ya basusu, mawa yango ekitaka.”

Na ndakisa, tótala ndenge Abrahama asalaki ntango mwasi na ye akufaki. Biblia elobi ete “Abrahama akɔtaki kolela Sara makasi mpe alelaki ye na kobimisa mpisoli.” Maloba “akɔtaki kolela” emonisi ete ezwaki ntango mpo mawa na ye ekita.a Ndakisa mosusu ezali ya Yakobo, oyo bakosaki ye ete nyama ya zamba ebomaki mwana na ye Yozefe. Alelaki “mikolo mingi,” mpe bato ya libota na ye balongaki kokitisa ye motema te. Bambula mingi na nsima ya liwa ya Yozefe azalaki kaka koyoka mawa.​—Ebandeli 23:2; 37:34, 35; 42:36; 45:28.

Abrahama azali kolela Sara

Abrahama alelaki mwasi na ye Sara

Ezali mpe bongo lelo mpo na bato mingi oyo balelaka bato oyo bamesanaki na bango makasi. Tótalela ndakisa mibale oyo.

  • “Mobali na ngai, Robert akufaki mokolo ya 09/07/2008. Mokolo oyo azwaki likama na ntɔngɔ ezalaki kaka lokola mikolo nyonso. Nsima ya komɛla ti ndenge tomesanaki kosala liboso akende mosala, topesanaki bizi, toyambanaki mpe tolobanaki maloba ya bolingo. Eleki sikoyo mbula motoba, kasi mpasi yango ezali kaka na motema. Nakanisi te ete nakobosana liwa ya Rob.”​—Gail, azali na mbula 60.

  • “Atako eleki sikoyo mbula 18 banda mwasi na ngai akufá, nalelaka ye kaka tii lelo. Soki namoni eloko moko ya kitoko oyo Nzambe akelá, nakanisaka ye mpe namonaka ndenge oyo alingaki kosepela soki amonaka eloko oyo nazali komona.”​—Etienne, azali na mbula 84.

Toboyi te, koyoka mpasi ntango molai ndenge wana ezali mabe te. Moto na moto ayokaka mawa na ndenge na ye, yango wana ekozala malamu te koloba mabe na ndenge oyo moto mosusu asali mpo na mpasi oyo ekómeli ye. Ndenge moko mpe, tosengeli komimemisa ngambo te soki emonani ete tolelaki mingi ntango ndeko to moninga akufaki. Ndenge nini tokoki kosala ntango tozali na mawa?

a Yisaka mwana ya Abrahama mpe alelaki mikolo mingi. Ndenge ezali na lisolo “Mekolá kondima na bango” na nimero oyo, Yisaka azalaki kaka na mawa ata mbula misato nsima ya liwa ya mama na ye, Sara.​—Ebandeli 24:67.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto