Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kampanye ya Ekaniseli
“Toyei awa kopesa libota na bino lokasa ya libyangi oyo mpo na likita moko ya ntina oyo ekosalema na mokili mobimba, na mwa 26 sanza ya Misato. Yango ezali dati ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Kozanga kofuta mbongo, tokolanda diskur moko oyo ekolimbola mateya ya Biblia; ekomonisa ndenge liwa ya Yesu ezali kosalisa biso. Lokasa ya libyangi oyo emonisi esika mpe ngonga oyo likita yango ekosalema awa epai na biso.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/03/2013
“Bato mosusu batunaka boye: ‘Ndenge nini toyebi ete Yesu asekwaki?’ Osilá komituna mpo na yango? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ndenge eyano na motuna yango ezali na ntina. [Tángá 1 Bakorinti 15:14.] Zulunalo oyo emonisi ndenge oyo toyebi ete lisekwa ya Yesu esalemaki mpenza.”
Lamuká! 03/2013
“Omonaka te ete ezali mpasi kobɔkɔla bana na mikolo oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Baboti mingi bazwaki batoli ya malamu na kati ya Biblia. Na ndakisa, vɛrsɛ oyo esalisaki batata bálukaka mabaku ya kopesa bana na bango longonya mpe kosalisa bango bámona ete bazali na ntina. [Tángá Bakolose 3:21.] Lisolo oyo elobeli mitinda mitano oyo ekosalisa batata.”