Kampanye mpo na kokabola nkasa ya libyangi na Ekaniseli ekobanda mwa 17 Marsi
1. Kampanye nini ekobanda mwa 17 Marsi?
1 Mbula na mbula ntango tosalaka Ekaniseli, tosakolaka liwa ya Yesu. (1 Ko. 11:26) Yango wana, tolingaka ete bato mosusu báyangana elongo na biso mpe báyoka ndenge oyo Yehova apesaki lisiko na bolingo nyonso. (Yoa. 3:16) Na mbula oyo, tokobanda kosala kampanye mpo na kobengisa bato na Ekaniseli mokolo ya pɔsɔ, mwa 17 Marsi. Ozali kozela na esengo ete obengisa bato ebele mpenza?
2. Tokoki koloba nini mpo na kopesa lokasa ya libyangi?
2 Ndenge ya kokabola yango: Ekozala malamu tóloba mingi te. Tokoki koloba boye: “Mbote. Toyei kopesa libota na bino lokasa ya libyangi oyo mpo na likita moko ya ntina mingi oyo esalemaka mbula na mbula; na mbula oyo ekosalema na mokili mobimba mwa 5 Aprili. Diskur moko ekosalema mpe ekomonisa oyo Biblia elobi mpo na makambo oyo liwa ya Yesu ekokisi mpe mosala oyo azali kosala sikoyo. Lokasa oyo ya libyangi emonisi ngonga mpe esika oyo likita yango ekosalema epai na biso.” Soki tozali kokabola yango mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, tokopesa mpe bazulunalo soki ebongi.
3. Ndenge nini tokoki kobengisa bato ebele mpenza?
3 Tóbengisa bato ebele mpenza: Mokano na biso ezali ya kobengisa bato ebele mpenza. Na yango, kobosana te kobengisa bato oyo oyekolaka na bango Biblia, oyo ozongelaka, bandeko ya libota, baninga ya kelasi mpe ya mosala, bato ya kartye mpe bato oyo oyebani na bango. Bankulutu bakopesa malako mpo na ndenge ya kokabola yango na teritware mobimba ya lisangá. Kampanye oyo tosalaka mbula na mbula mpo na kobengisa bato na Ekaniseli ebotaka mbuma. Na mbula eleki, ntango mwasi moko ayaki na esika ya Ekaniseli, ndeko moko oyo azalaki koyamba bapaya atunaki ye soki ayebi mosakoli oyo abengisaki ye mpo amema ye epai na ye. Kasi mwasi yango alobaki ete ayebi moto moko te mpe ete azwaki lokasa ya libyangi epai ya moto moko oyo alekaki ndako na ndako kaka mokolo wana.
4. Mpo na nini tosengeli kosala kampanye na molende mpenza?
4 Mbala mosusu moto moko akoki koya na Ekaniseli epai na bino mpo yo nde obengisaki ye. Kasi, ezala bato oyo obengisi bayei to te, milende na yo ekopesa kaka litatoli. Nkasa ya libyangi oyo okokabola ekosakola ete Yesu azali sikoyo Mokonzi moko ya nguya. Milende na yo mpo na kokabola yango ekomonisa bato ya teritware, baninga basakoli, mpe oyo eleki ntina, ekomonisa Yehova ete ozwaka mpenza na motuya likabo ya lisiko.—Kol. 3:15.