Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 13:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe Yehova azalaki kotambola liboso na bango na moi na kati ya likonzí ya lipata mpo na kokamba bango na nzela,+ mpe na butu na kati ya likonzí ya mɔtɔ mpo na kopesa bango pole mpo na kotambola na moi mpe na butu.+

  • Kobima 40:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Mpe lipata+ ebandaki kozipa hema ya kokutana, mpe nkembo ya Yehova etondisaki tabernakle.

  • Yosua 1:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Moto moko te akokoka kotɛlɛma liboso na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo.+ Ndenge nazalaki na Moize, ndenge wana nde nakozala na yo.+ Nakosundola yo te mpe nakotika yo soki moke te.+

  • Yisaya 63:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.+ Mpe momemi-nsango na ye moko mpenza abikisaki bango.+ Na bolingo na ye mpe na motema mawa na ye, ye moko asikolaki bango,+ mpe atombolaki bango mpe amemaki bango mikolo nyonso ya ntango ya kala.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto