-
Nzembo 44:maloba ya ebandeli ya loyembo-26Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora.+ Maskile.
44 Ee Nzambe, toyoki na matoi na biso,
Bankɔkɔ na biso bayebisi biso+
Mosala oyo osalaki na mikolo na bango,+
Na mikolo ya kala.+
2 Yo moko na lobɔkɔ na yo obenganaki mpenza bikólo,+
Mpe olonaki bango na esika ya bikólo yango.+
Obandaki kobuka bituluku ya bato ya bikólo mpe kotika yango ekende.+
3 Mpo bazwaki mokili na mopanga na bango moko te,+
Mpe lobɔkɔ na bango moko te nde ememelaki bango lobiko.+
Kasi ezalaki lobɔkɔ na yo ya mobali ná lobɔkɔ na yo+ mpe pole ya elongi na yo,
Mpamba te osepelaki na bango.+
5 Na lisalisi na yo tokotindika banguna na biso;+
Na nkombo na yo tokonyata baoyo bazali kotɛlɛmɛla biso.+
6 Mpo nazalaki kotyela litimbo na ngai motema te+
Mpe mopanga na ngai nde ezalaki kobikisa ngai te.+
7 Mpo obikisaki biso na mabɔkɔ ya banguna na biso,+
Mpe baoyo bazali koyina biso makasi oyokisa bango nsɔni.+
8 Tokopesa Nzambe masanzoli mokolo mobimba,+
Mpe tokokumisa nkombo na yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Sela.
9 Kasi sikoyo obwaki biso mpe ozali kaka kosambwisa biso,+
Mpe ozali kobima te elongo na mampinga na biso.+
10 Ozali kaka kozongisa biso nsima liboso ya monguna,+
Mpe bato oyo bazali koyina biso makasi bamipunzeli biloko.+
12 Otɛki bato na yo mpo na eloko oyo ezali na motuya te,+
Mpe ntalo oyo otɛkaki bango epesi yo bomɛngo te.
13 Okómisi biso eloko ya nsɔni na miso ya bato oyo bafandi penepene na biso,+
Eloko ya kotyola mpe ya kosɛka na miso ya baoyo nyonso bazali zingazinga na biso.+
14 Okómisi biso liloba ya lisese na kati ya bikólo,+
Koningisama ya motó na kati ya bituluku ya bato ya bikólo.+
16 Mpo na mongongo ya moto oyo azali kotuka mpe azali koloba mabe,
Mpo na monguna mpe moto oyo azali kozongisa mabe.+
17 Nyonso wana nde ekómeli biso, mpe tobosani yo te,+
Mpe na kondimana na yo,+ tosali makambo na bokosi te.
18 Motema na biso ezongi nsima te na kozanga bosembo,+
Mpe matambe na biso epɛngwi na nzela na yo te.+
-
-
Nzembo 49:maloba ya ebandeli ya loyembo-20Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora.+ Mondule.
3 Monɔkɔ na ngai ekoloba makambo ya bwanya,+
Mpe komanyola ya motema na ngai ekozala na makambo ya mayele.+
5 Mpo na nini nabanga na mikolo ya mabe,+
Ntango libunga ya baoyo balingi kokweisa ngai ezali kozinga ngai?+
6 Baoyo bazali kotya motema na biloko na bango ya kobikela,+
Mpe baoyo bazali kaka komikumisa mpo na ebele ya bomɛngo na bango,+
8 (Mpe ntalo ya lisiko ya molimo na bango ezali motuya moko monene mpenza+
Yango wana ezangá mpo na ntango oyo etyami ndelo te)
9 Mpo azala lisusu na bomoi seko mpe amona libulu te.+
10 Mpo amonaka ete ata bato ya bwanya bakufaka,+
Zoba ná moto oyo azangi mayele bango nyonso bakufaka,+
Mpe basengeli kotikela bato mosusu biloko na bango ya kobikela.+
11 Mposa ya motema na bango ezali ete bandako na bango ezala mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+
Batabernakle na bango libota na libota.+
Bapesi mabele na bango bankombo na bango.+
12 Nzokande moto ya mabele, ata azali na lokumu, akoki te kofanda libela;+
Azali mpenza lokola banyama oyo ebomami.+
13 Yango nde nzela ya baoyo bazali na bozoba,+
Mpe ya baoyo bazali koya nsima na bango, baoyo bazali kosepela na maloba na bango ya mangungu. Sela.
14 Lokola bampate, babongisami mpo na Nkunda;*+
Liwa ekokamba bango;+
Mpe bato ya makambo alima bakozala na bokonzi likoló na bango na ntɔngɔ,+
Mpe nzoto na bango esengeli konzuluka;+
Mokomoko azali kokende na esika ya kofanda ya lokumu te, kasi nde na Nkunda.*+
15 Nzokande, Nzambe ye moko akosikola molimo na ngai na lobɔkɔ ya Nkunda,*+
Mpo ye akoyamba ngai. Sela.
18 Mpo bomoi na ye mobimba azalaki kaka kopambola molimo na ye;+
(Mpe bato bakokumisa yo mpo ozali komisalela malamu)+
-