Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 30:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 mpo okoyoka mongongo ya Yehova Nzambe na yo mpo obatela mitindo na ye mpe mibeko na ye oyo ekomami na buku oyo ya mobeko,+ mpamba te okozongela Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba.+

  • 1 Samwele 7:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe Samwele alobaki na ndako mobimba ya Yisraele ete: “Soki ezali na motema na bino mobimba nde bozali kozongela Yehova,+ bólongola kati na bino banzambe ya bapaya+ mpe bikeko ya Ashitorete,+ mpe bóbalusa motema na bino mobimba epai ya Yehova mpe bósalela kaka ye,+ mpe ye akobikisa bino na lobɔkɔ ya Bafilistia.”+

  • Yirimia 4:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 “Soki olingi kozonga, Ee Yisraele,” yango nde liloba ya Yehova, “okoki kozonga epai na ngai.+ Mpe soki olongoli biloko na yo ya bosɔtɔ mpo na ngai,+ okotambola te lokola moto oyo azali kokimakima.

  • Yoele 2:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Mpe bópasola mitema+ na bino, kasi bilamba na bino te;+ mpe bózongela Yehova Nzambe na bino, mpamba te azali na ngɔlu mpe na motema mawa,+ ayokaka nkanda noki te+ mpe azali na motema boboto mingi,+ mpe akoyoka mpenza mawa mpo na mpasi yango.+

  • Malaki 3:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Banda na mikolo ya bankɔkɔ na bino botikaki malako na ngai mpe bobatelaki yango te.+ Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

      Mpe bino bolobi ete: “Tokozonga ndenge nini?”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto