Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 13:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe Babilone, kitoko ya makonzi,+ bonzenga ya lolendo ya Bakaladea,+ ekokóma mpenza lokola ntango Nzambe akweisaki Sodoma ná Gomora.+

  • Yisaya 14:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 okobimisela mokonzi ya Babilone liloba ya lisese oyo mpe okoloba boye:

      “Talá ndenge moto oyo azalaki kotinda basusu na makasi básala mosala asuki, talá ndenge monyoko esuki!+

  • Yisaya 45:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 Talá oyo Yehova alobi na moto na ye oyo atyami mafuta,+ na Siruse, oyo nasimbi lobɔkɔ na ye ya mobali,+ mpo natya na nse na ye bikólo oyo ezali liboso na ye,+ mpo nafungola ata mikaba na loketo ya bakonzi; mpo nafungola baporte ya bizipeli mibale liboso na ye, bongo baporte ekokangama te.

  • Yirimia 50:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo ekólo moko euti na nɔrdi eyei kobundisa ye.+ Yango nde ezali kokómisa mokili na ye eloko ya kokamwa, bongo moto moko te azali kofanda kuna.+ Moto mpe nyama ya mboka bakimi.+ Bakei na bango.”+

  • Yirimia 51:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Na pwasa, Babilone akwei, bongo abukani.+ Bóganga na kolela mpo na ye.+ Bózwa balsame mpo na mpasi na ye.+ Mbala mosusu akobika.”

  • Danyele 5:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 “PERESE, bakaboli bokonzi na yo mpe bapesi yango Bamede ná Baperse.”+

  • Emoniseli 14:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe anzelu mosusu ya mibale, alandaki mpe azalaki koloba ete: “Akwei! Babilone+ Monene akwei,+ ye oyo amɛlisaki bikólo nyonso vinyo+ ya nkanda ya pite na ye!”+

  • Emoniseli 18:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe agangaki na mongongo makasi+ ete: “Akwei! Babilone Monene akwei,+ mpe akómi esika ya kofanda ya bademo mpe esika ya mipɛpɛ+ nyonso ya mbindo mpe esika ya kobombana ya bandɛkɛ nyonso ya mbindo mpe oyo eyinami!+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto