9 Kasi na mokolo moko, makambo oyo mibale ekokwela yo pwasa:+ kobungisa bana mpe kozala mwasi oyo mobali akufá. Ekokwela yo mobimba mpenza,+ mpo na ebele ya misala na yo ya bonganga-nkisi, mpo na nguya nyonso ya bondɔki na yo—oyo eleki ndelo.+
2 Mpe agangaki na mongongo makasi+ ete: “Akwei! Babilone Monene akwei,+ mpe akómi esika ya kofanda ya bademo mpe esika ya mipɛpɛ+ nyonso ya mbindo mpe esika ya kobombana ya bandɛkɛ nyonso ya mbindo mpe oyo eyinami!+