16 Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Bóyoka te maloba ya basakoli oyo bazali kosakwela bino.+ Bazali kokómisa bino eloko mpamba.+ Bazali koloba emonaneli ya motema na bango+—kasi oyo euti na monɔkɔ ya Yehova te.+
2 “Mwana ya moto, sakolá mpo na basakoli ya Yisraele oyo bazali kosakola,+ mpe osengeli koloba boye na baoyo bazali kosakola makambo oyo euti na motema na bango moko:+ ‘Bóyoka liloba ya Yehova.+