Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 55:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Moto mabe atika nzela na ye,+ mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye;+ mpe azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa,+ azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.+

  • Yirimia 7:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe batongi bisika oyo etombwaná ya Tofete,+ oyo ezali na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpo na kotumba bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi na mɔtɔ,+ likambo oyo napesaki mitindo te mpe oyo eyaki na kati ya motema na ngai te.’+

  • Yirimia 18:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 mpe soki ekólo yango etiki mabe na yango oyo nalobelaki,+ ngai mpe nakoyoka mawa mpo na mpasi oyo nakanisaki koyeisela yango.+

  • Ezekiele 33:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Lobá na bango boye: ‘“Lokola nazali solo na bomoi,” yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, “nasepelaka na liwa ya moto mabe te,+ nasepelaka nde ete moto mabe abongwana,+ atika nzela na ye mpe atikala mpenza na bomoi.+ Bóbongwana, bóbongwana, bótika banzela na bino ya mabe,+ mpamba te bókufa mpo na nini, Ee ndako ya Yisraele?”’+

  • Baebre 12:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo bango bazalaki kopesa biso disiplini mpo na mwa mikolo moke ndenge bango bazalaki komona malamu,+ kasi ye azali kosala bongo mpo na bolamu na biso mpo biso tózala basantu lokola ye.+

  • Yakobo 1:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Ntango moto azali komekama,+ aloba te ete: “Nzambe azali komeka ngai.” Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.

  • 2 Petro 3:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Yehova azali koumisa makambo te na elaka na ye,+ ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto