Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 6:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Soki molimo moko asali lisumu na ndenge azangi mpenza bosembo epai ya Yehova+ mpe akosi mpenza+ moninga na ye, mpo na eloko moko oyo ezali na mabɔkɔ na ye to eloko oyo babombisi na lobɔkɔ+ na ye to eloko ya moyibi to abubi moninga na ye,+

  • Yisaya 1:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Bankumu na yo bazali motó makasi mpe bazali baninga ya miyibi.+ Mokomoko na bango azali moto oyo alingá kanyaka+ mpe moto oyo alandelaka makabo.+ Bazali kokata na bosembo te likambo ya mwana oyo tata akufá; mpe ata likambo ya mwasi oyo mobali akufá ekómelaka bango te.+

  • Yirimia 5:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 “‘Mpo bato mabe bazali na kati ya bato na ngai.+ Bazali kaka kotala na likebi, lokola ntango bakangi-bandɛkɛ bagunzamaka.+ Batye motambo ya libebi. Bazali kokanga nde bato.

  • Yirimia 7:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bokoki nde koyiba,+ koboma,+ kosala ekobo,+ kolapa ndai ya lokuta,+ kobimisa milinga ya mbeka epai na Baala+ mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te,+

  • Yirimia 21:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Ee ndako ya Davidi,+ talá oyo Yehova alobi: “Ntɔngɔ nyonso+ katá likambo na bosembo,+ mpe bikisá moto oyo bazali koyiba na lobɔkɔ ya mobubi,+ noki nkanda na ngai ebima lokola mɔtɔ+ mpe ezikisa, mpe moto ya koboma yango akozala te, mpo na mabe ya misala na bino.”’+

  • Mika 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe baluli bilanga mpe babɔtɔli yango;+ ná bandako lokola, mpe bazwi yango; mpe babubi mobali makasi ná bato ya ndako na ye,+ moto ná libula na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto