Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt Kolimbola Mibeko 1:1-34:12
  • Kolimbola Mibeko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolimbola Mibeko
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Kolimbola Mibeko

KOLIMBOLA MIBEKO*

1 Talá maloba oyo Moize alobaki na Yisraele mobimba na etúká ya Yordani na esobe, na mokili patatalu oyo ekauká, oyo etalani na Sufe, kati na Parane, Tofele, Labane, Hazerote mpe Dizahabe. 2 Kobanda Horebe tii Kadeshe-barnea,+ na nzela ya Ngomba ya Seire, ezali mobembo ya mikolo 11. 3 Na mbula ya 40,+ na mokolo ya liboso ya sanza ya 11, Moize ayebisaki Bayisraele* makambo nyonso oyo Yehova atindaki ye ayebisa bango. 4 Yango esalemaki nsima ya kolonga Sihone+ mokonzi ya Baamore, oyo azalaki kofanda na Heshibone, mpe Oge+ mokonzi ya Bashane, oyo azalaki kofanda na Ashetarote, na Edrei.+ 5 Na etúká ya Yordani, na mokili ya Moabe, Moize abandaki kolimbola Mobeko oyo,+ mpe alobaki boye:

6 “Yehova Nzambe na biso ayebisaki biso na Horebe ete: ‘Bofandi mwa ntango molai na etúká oyo ya ngombangomba.+ 7 Bóbaluka mpe bókende na etúká ya ngombangomba ya Baamore+ mpe epai ya baoyo nyonso bazali penepene na bango na Araba,+ etúká ya ngombangomba, Shefela, Negebe mpe pembenipembeni ya mbu,+ na mokili ya Bakanana, mpe na Liban,*+ tii na ebale monene, ebale Efrate.+ 8 Talá, natye mokili yango liboso na bino. Bókɔta mpe bózwa mokili yango oyo Yehova alapaki ndai epai ya batata na bino, Abrahama, Yisaka+ mpe Yakobo,+ ete akopesa bango yango mpe libota* na bango.’+

9 “Mpe na ntango yango nalobaki na bino boye: ‘Nakokoka kotambwisa bino ngai moko te.+ 10 Yehova Nzambe na bino akómisi bino mingi, mpe talá, lelo oyo bozali ebele lokola minzoto ya likoló.+ 11 Tiká Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino akómisa bino ebele+ mbala nkóto koleka ndenge bozali, mpe apambola bino kaka ndenge apesaki bino elaka.+ 12 Ndenge nini nakokoka komema ngai moko kilo na bino, mokumba na bino mpe koswana na bino?+ 13 Bópona na mabota na bino mibali ya bwanya, ya mayele mpe oyo bayebi makambo mingi, mpe nakotya bango bakambi na bino.’+ 14 Boyanolaki ngai ete: ‘Likambo oyo olobi na biso tósala ezali malamu.’ 15 Bongo nazwaki bakambi ya mabota na bino, mibali ya bwanya mpe oyo bayebi makambo mingi, mpe natyaki bango bakambi na bino: bakonzi ya bato nkóto, bakonzi ya bato nkama, bakonzi ya bato ntuku mitano, bakonzi ya bato zomi, mpe bakapita ya mabota na bino.+

16 “Na ntango yango, nateyaki basambisi na bino ete: ‘Soki boyoki likambo kati na bandeko na bino, bosengeli kosambisa na bosembo+ kati na moto ná ndeko na ye to ná moto oyo afandi mopaya.+ 17 Bosengeli kopona bilongi te ntango bozali kosambisa.+ Bokoyoka moto moke ná moto monene ndenge moko.+ Moto moko te abangisa bino,+ mpo kosambisa ezali ya Nzambe;+ mpe soki likambo moko eleki mpenza makasi mpo na bino, bokoya na yango epai na ngai, mpe ngai nakoyoka yango.’+ 18 Na ntango yango, nateyaki bino makambo nyonso oyo bosengelaki kosala.

19 “Na nsima, tolongwaki na Horebe mpe totambolaki na esobe mobimba wana ya monene mpe ya nsɔmɔ,+ oyo bomonaki na nzela ya etúká ya ngombangomba ya Baamore,+ kaka ndenge Yehova Nzambe na biso apesaki biso mitindo, mpe nsukansuka, tokómaki na Kadeshe-barnea.+ 20 Bongo nalobaki na bino ete: ‘Bokómi na etúká ya ngombangomba ya Baamore, oyo Yehova Nzambe na biso azali kopesa biso. 21 Talá, Yehova Nzambe na yo apesi yo mokili yango. Matá, zwá yango, kaka ndenge Yehova, Nzambe ya bankɔkɔ na yo alobaki na yo.+ Kobanga te, kozala mpe na nsɔmɔ te.’

22 “Nzokande, bino nyonso bopusanaki epai na ngai mpe bolobaki ete: ‘Tótinda mibali liboso na biso bákende kotalela biso mokili yango malamumalamu mpe báya koyebisa biso nzela oyo tosengeli kokende mpe bingumba ya ndenge nini tokomona.’+ 23 Likanisi yango emonanaki malamu na miso na ngai, bongo naponaki mibali 12 kati na bino, mobali moko na libota moko.+ 24 Bongo balongwaki wana mpe bamataki na etúká ya ngombangomba+ mpe bakómaki tii na Lobwaku* ya Eshikole mpe banɔngaki yango. 25 Bazwaki ndambo ya mbuma ya mokili yango mpe bayaki na yango epai na biso, mpe bayebisaki biso ete: ‘Mokili oyo Yehova Nzambe na biso azali kopesa biso ezali malamu.’+ 26 Kasi boboyaki komata, mpe botombokaki, boboyaki etinda ya Yehova Nzambe na bino.+ 27 Bozalaki kaka koimaima na bahema na bino mpe koloba ete: ‘Yehova ayinaki biso, yango wana abimisaki biso na mokili ya Ezipito mpo na kopesa biso na lobɔkɔ ya Baamore, mpo na kosilisa biso nyɛɛ. 28 Tokokende na esika ya ndenge nini? Bandeko na biso balɛmbisi biso nzoto,*+ balobi: “Kuna tomonaki bato ya milai mpe oyo baleki biso na makasi, bingumba na bango ezali minene mpe ebatelami makasi tii na likoló*+ mpe kuna tomonaki bana ya Baanakime.”’+

29 “Bongo nalobaki na bino ete: ‘Bózala na nsɔmɔ na bango te mpe bóbanga bango te.+ 30 Yehova Nzambe na bino akotambola liboso na bino mpe akobundela bino,+ kaka ndenge asalaki na Ezipito, na miso na bino mpenza.+ 31 Mpe na esobe, esika nyonso oyo bokendaki tii bokómaki na esika oyo, bomonaki ndenge Yehova Nzambe na bino amemaki bino, lokola tata amemaka mwana na ye.’ 32 Atako bomonaki makambo wana nyonso, bondimelaki Yehova Nzambe na bino te,+ 33 oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na kolukela bino esika oyo bokotya kaa. Azalaki komonana na mɔtɔ na butu mpe na lipata na moi mpo na kolakisa bino nzela oyo bosengeli kotambola.+

34 “Na ntango nyonso wana, Yehova ayokaki makambo oyo bozalaki koloba, mpe asilikaki mpe alapaki ndai ete:+ 35 ‘Mobali moko te kati na bato mabe ya ntango oyo akomona mokili malamu oyo nalapaki ndai ete nakopesa batata na bino,+ 36 longola kaka Kalebe mwana ya Yefune. Ye akomona yango, mpe nakopesa ye ná bana na ye mokili epai atambolaki, mpo atosaki Yehova na motema na ye mobimba.*+ 37 (Kutu Yehova asilikelaki ngai mpo na bino, mpe alobaki: “Yo mpe okokɔta kuna te.+ 38 Yosua, mwana ya Nunu, mosaleli na yo,*+ ye nde akokɔta na mokili yango.+ Kómisá ye makasi,*+ mpo akopesa Yisraele mokili yango lokola libula.”) 39 Lisusu, mpo na bana na bino oyo bolobaki ete bakokóma eloko ya kopunza+ mpe bana na bino oyo lelo bayebi te malamu to mabe, bango nde bakokɔta kuna, mpe nakopesa bango yango, mpo ekóma ya bango.+ 40 Kasi bino, bóbaluka mpe bókende na esobe, na nzela ya Mbu Motane.’+

41 “Na yango, bolobaki na ngai ete: ‘Tosaleli Yehova lisumu. Tokomata mpe tokobunda kaka ndenge Yehova Nzambe na biso apesi biso mitindo!’ Bongo moto na moto kati na bino azwaki bibundeli na ye ya etumba mpe bokanisaki ete ezali likambo ya pɛtɛɛ komata na ngomba.+ 42 Kasi Yehova alobaki na ngai ete: ‘Lobá na bango boye: “Bosengeli komata te mpe kobunda te, mpo nakozala na kati na bino te.+ Soki bomeki, banguna na bino bakolonga bino.”’ 43 Bongo nalobaki na bino, kasi boyokaki te. Kutu, botombokaki, boboyaki etinda ya Yehova mpe na lofundo nyonso bolukaki komata na ngomba. 44 Bongo Baamore oyo bazalaki kofanda na ngomba yango babimaki kokutana na bino mpe babenganaki bino, kaka ndenge nzoi esalaka, mpe bapanzaki bino na Seire tii na Horoma. 45 Na yango, bozongaki mpe bobandaki kolela liboso ya Yehova, kasi Yehova ayokaki bino te, mpe atyelaki bino likebi te. 46 Yango wana, bokobaki kofanda na Kadeshe mikolo ebele.

2 “Na nsima, tobalukaki mpe tokendaki na esobe na nzela ya Mbu Motane, kaka ndenge Yehova alobaki na ngai,+ mpe tosalaki mobembo ya mikolo mingi mpo na kobaluka pembenipembeni ya Ngomba Seire. 2 Nsukansuka, Yehova alobaki na ngai boye: 3 ‘Bobaluki mwa ntango molai pembenipembeni ya ngomba oyo. Sikoyo, bókende na nɔrdi. 4 Mpe pesá bato mitindo oyo: “Bokoleka pene na ndelo ya bandeko na bino, bana ya Esau,+ oyo bazali kofanda na Seire,+ bakobanga bino,+ kasi bosengeli mpenza kokeba. 5 Bósalana mabe te,* mpo nakopesa bino ata eteni moko te ya mokili na bango, ata bonene ya litambe ya lokolo te, mpo napesá Esau Ngomba Seire mpo ezala ya ye.+ 6 Bokopesa bango mbongo mpo na bilei oyo bokolya, mpe bokosomba mai oyo bokomɛla.+ 7 Mpo Yehova Nzambe na yo apamboli yo na nyonso oyo osali. Azalaki kotya likebi ndenge otambolaki na esobe monene oyo. Mbula 40 nyonso oyo, Yehova Nzambe na yo azalaki elongo na yo, mpe ozangaki eloko te.”’+ 8 Bongo tolekaki pene ya bandeko na biso, bato ya libota ya Esau,+ oyo bafandi na Seire, tozalaki mosika na nzela ya Araba, na Elate mpe na Ezione-gebere.+

“Na nsima, tobalukaki mpe tolekaki na nzela ya esobe ya Moabe.+ 9 Mpe Yehova alobaki na ngai ete: ‘Bósalana mabe na Moabe te mpe bóbunda te etumba ná bango, mpo nakopesa yo ata esika moko te ya mokili na ye mpo ezala ya yo, mpamba te napesá Are epai ya bato ya libota ya Lota+ mpo ezala esika na bango. 10 (Baemime+ bafandaki kuna na ntango ya kala, bazalaki bato ebele, bingambe mpe milai lokola Baanakime. 11 Barefaime+ mpe bazalaki kotalelama lokola Baanakime,+ mpe Bamoabe bazalaki kobenga bango Baemime. 12 Liboso, Bahori+ bazalaki kofanda na Seire. Kasi bana ya Esau babenganaki bango, mpe basilisaki bango nyɛɛ mpe bafandaki na esika na bango,+ kaka ndenge Bayisraele bakosala mokili oyo bakozwa mpo ezala esika na bango, oyo Yehova akopesa mpenza bango.) 13 Sikoyo bókende mpe bókatisa Lobwaku* ya Zerede.’ Na yango, tokatisaki Lobwaku* ya Zerede.+ 14 Kobanda Kadeshe-barnea tii kokatisa Lobwaku* ya Zerede, ezwaki biso mbula 38, tii mibali nyonso ya etumba ya ntango wana basilaki na kaa, kaka ndenge Yehova alapelaki bango ndai.+ 15 Lobɔkɔ ya Yehova etɛmɛlaki bango mpo na kolongola bango na kaa, tii basilaki.+

16 “Ntango kaka mibali nyonso ya etumba basilaki kokufa na kati ya bato,+ 17 Yehova alobaki lisusu na ngai ete: 18 ‘Lelo okoleka na teritware ya Moabe, elingi koloba, Are. 19 Ntango okokóma pene ya Baamone, kotungisa bango te mpe kotumola bango te, mpo nakopesa yo ata eteni moko te ya mokili ya Baamone mpo ezala esika na yo, mpamba te napesá yango nde na bana ya Lota mpo ezala esika na bango.+ 20 Bazalaki kotalela yango mpe lokola mokili ya Barefaime.+ (Barefaime bafandaki kuna na ntango ya kala, mpe Baamone bazalaki kobenga bango Bazamuzumime. 21 Bazalaki bingambe, ebele mpe milai lokola Baanakime;+ kasi Yehova asilisaki bango nyɛɛ liboso ya Baamone, mpe Baamone babenganaki bango mpe bafandaki na esika na bango. 22 Ndenge wana nde asalaki mpo na bakitani ya Esau, oyo bafandaka na Seire,+ ntango asilisaki Bahori+ nyɛɛ liboso na bango, mpo bábengana bango mpe báfanda na esika na bango tii na mokolo ya lelo. 23 Bongo Baavime, bafandaki na bamboka ya Gaza+ tii ntango Bakafitorime,+ oyo bautaki na Kafitore,* basilisaki bango nyɛɛ, mpe bafandaki na esika na bango.)

24 “‘Bótɛlɛma, mpe bókatisa na nzela ya Lobwaku* ya Arnone.+ Talá, napesi na lobɔkɔ na bino Sihone+ Moamore, mokonzi ya Heshibone. Bóbanda kozwa mokili na ye, mpe bóbundisa ye. 25 Kobanda mokolo ya lelo, nakotya nsɔmɔ mpe kobanga likoló ya bato nyonso oyo bazali na mabele mobimba, baoyo bakoyoka nsango na yo. Bakotungisama mpe bakolɛnga* mpo na bino.’+

26 “Bongo longwa na esobe ya Kedemote+ natindelaki mokonzi Sihone ya Heshibone bamemi-nsango, báyebisa ye maloba oyo ya kimya:+ 27 ‘Tiká naleka na mokili na yo. Nakotikala kaka na balabala. Nakobaluka na lobɔkɔ ya mobali te mpe na lobɔkɔ ya mwasi te.+ 28 Bilei oyo nakolya mpe mai oyo nakomɛla ekozala kaka oyo okotɛkɛla ngai. Tiká ngai naleka kaka na makolo, 29 (ndenge wana nde bana ya Esau oyo bazali kofanda na Seire ná Bamoabe oyo bazali kofanda na Are basalaki ngai) tii nakokatisa Yordani mpo na kokɔta na mokili oyo Yehova Nzambe na biso azali kopesa biso.’ 30 Kasi Sihone mokonzi ya Heshibone atikaki te tóleka, mpo Yehova Nzambe na yo atikaki elimo na ye ekóma makasi+ mpe motema na ye ekóma makasi, mpo na kopesa ye na lobɔkɔ na yo, kaka ndenge asali yango.+

31 “Na yango, Yehova alobaki na ngai ete: ‘Talá, nabandaki kopesa yo Sihone ná mokili na ye. Bandá kozwa mokili na ye.’+ 32 Ntango Sihone abimaki ná bato na ye nyonso mpo na kobundisa biso na Yahaze,+ 33 Yehova Nzambe na biso apesaki biso ye, bongo tolongaki ye, bana na ye mpe bato na ye nyonso. 34 Tozwaki bingumba na ye nyonso na ntango yango mpe tobebisaki engumba nyonso, tobomaki mibali, basi mpe bana. Totikaki ata moto moko te na bomoi.+ 35 Topunzaki kaka bibwɛlɛ mpo na biso, ná biloko oyo etikalaki na bingumba oyo tozwaki. 36 Banda na Aroere,+ oyo ezali pembenipembeni ya Lobwaku* ya Arnone (mpe engumba oyo ezali kati na lobwaku) tii na Gileade, ezalaki na sité moko te oyo tolongaki te kozwa. Yehova Nzambe na biso apesaki biso yango nyonso.+ 37 Nzokande, opusanaki te pene na mokili ya Baamone,+ na pembenipembeni nyonso ya Lobwaku* ya Yaboke,+ mpe bingumba ya etúká ya ngombangomba, to esika nyonso oyo Yehova Nzambe na biso apekisi.

3 “Na nsima, tobalukaki mpe tomataki na nzela ya Bashane. Mpe Oge mokonzi ya Bashane abimaki ná bato na ye nyonso mpo na kobundisa biso na Edrei.+ 2 Na yango, Yehova alobaki na ngai ete: ‘Kobanga ye te, mpo nakopesa ye ná bato na ye nyonso mpe mokili na ye na lobɔkɔ na yo, mpe okosala ye kaka ndenge osalaki Sihone mokonzi ya Baamore, oyo azalaki kofanda na Heshibone.’ 3 Bongo Yehova Nzambe na biso apesaki mpe na lobɔkɔ na biso Oge mokonzi ya Bashane mpe bato na ye nyonso, mpe tokobaki kobɛta ye tii moto na ye ata moko te atikalaki na bomoi. 4 Na nsima, tozwaki bingumba na ye nyonso. Ezali na sité ata moko te oyo tobɔtɔlaki bango te: nyonso ezalaki bingumba 60 ya etúká mobimba ya Argobe, elingi koloba bokonzi ya Oge, na Bashane.+ 5 Bingumba nyonso wana ebatelamaki makasi na bifelo milai, baporte mpe bikangiseli. Tozwaki mpe basité mingi ya mike oyo ezangi bifelo. 6 Nzokande, tobebisaki yango,+ kaka ndenge tosalaki Sihone mokonzi ya Heshibone, na ndenge tobebisaki engumba mokomoko, tobomaki ezala mibali, basi mpe bana.+ 7 Bibwɛlɛ nyonso ná biloko mosusu oyo topunzaki na bingumba yango ekómaki ya biso.

8 “Na ntango yango, tozwaki mokili ya bakonzi mibale ya Baamore+ oyo bazalaki na etúká ya Yordani, banda na Lobwaku* ya Arnone tii na Ngomba Heremone;+ 9 (ngomba oyo Basidone bazalaki kobenga Sirione, mpe Baamore bazalaki kobenga Senire), 10 bingumba nyonso ya ngomba patatalu, ná Gileade mobimba mpe Bashane mobimba tii na Saleka mpe Edrei,+ bingumba ya bokonzi ya Oge, na Bashane. 11 Oge, mokonzi ya Bashane nde atikalaki kati na Barefaime. Sanduku ya kokunda ye ezalaki ya ebende.* Ezali mapeko* libwa na molai mpe mapeko minei na monene, na kolanda lipeko oyo etyamá. Ezali tii lelo na Raba ya Baamone. 12 Na ntango wana, tozwaki mokili yango: longwa na Aroere,+ oyo ezali pene na Lobwaku* ya Arnone, mpe etúká ya ngombangomba ya Gileade kabola na mibale, mpe napesi bingumba na yango epai ya Barubene mpe Bagade.+ 13 Mpe ndambo oyo etikalaki ya Gileade mpe Bashane mobimba ya bokonzi ya Oge, napesi yango na ndambo moko ya libota ya Manase.+ Etúká mobimba ya Argobe ya Bashane, yango ebengamaki mokili ya Barefaime.

14 “Yaire+ mwana ya Manase azwaki etúká mobimba ya Argobe+ tii na ndelo ya Bageshure mpe ya Bamaakate,+ mpe apesaki bamboka mike yango ya Bashane nkombo na ye moko, Havote-yaire,*+ tii na mokolo ya lelo. 15 Mpe napesi Gileade epai ya Makire.+ 16 Mpe Barubene ná Bagade,+ napesi bango banda na Gileade tii na Lobwaku* ya Arnone, na katikati ya lobwaku, mpo ezala ndelo, mpe tii na Yaboke, lobwaku oyo ezali ndelo ya Baamone, 17 ná Araba, Yordani mpe ndelo na yango, banda na Kinerete tii na Mbu ya Araba, Mbu ya Mungwa,* esika mopanzi ya Pisga ekiti na nse, na ɛsti.+

18 “Na nsima, napesaki bino mitindo ete: ‘Yehova Nzambe na bino apesi bino mokili oyo mpo bózwa yango. Bilombe mibali na bino nyonso bakozwa bibundeli mpe bakokatisa liboso ya bandeko na bino, Bayisraele.+ 19 Kaka basi na bino, bana na bino mpe bibwɛlɛ na bino (nayebi malamu ete bozali na bibwɛlɛ mingi) bakokoba kofanda na bingumba oyo napesi bino, 20 tii ntango Yehova akopesa bandeko na bino bopemi, ndenge apesi bino, mpe tii bakozwa mokili oyo Yehova Nzambe na bino akopesa bango na ngámbo ya Yordani. Nsima na yango nde bokozonga, moto na moto na esika na ye oyo napesi bino.’+

21 “Na ntango yango, napesaki Yosua mitindo ete:+ ‘Yo moko omoni na miso na yo likambo Yehova Nzambe na bino asalaki bakonzi mibale yango. Yehova akosala kaka bongo na makonzi nyonso epai okokatisa.+ 22 Bosengeli kobanga bango te, mpo Yehova Nzambe na bino nde azali kobundela bino.’+

23 “Na ntango yango, nabondelaki Yehova, nayebisaki ye boye: 24 ‘Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, obandi komonisa mosaleli na yo bonene na yo mpe lobɔkɔ na yo ya nguya,+ mpo, na likoló to na mabele, nani azali nzambe oyo asalaka misala ya nguya mpenza lokola yo?+ 25 Nabondeli yo, tiká nakatisa mpe namona mokili malamu oyo ezali na ngámbo ya Yordani, etúká ya ngombangomba oyo ya malamu mpe Liban.’+ 26 Kasi Yehova azalaki kaka kosilikela ngai makasi mpo na bino+ mpe alingaki koyokela ngai te. Kutu Yehova alobaki na ngai ete: ‘Suká wana! Koloba na ngai lisusu ata moke te likambo oyo. 27 Matá na nsɔngɛ ya Pisga,+ mpe tombolá miso na yo na wɛsti, na nɔrdi, na sudi, mpe na ɛsti mpe moná mokili yango na miso na yo moko, mpo okokatisa Yordani oyo te.+ 28 Tyá Yosua mokambi ya ekólo,+ lendisá ye mpe pesá ye makasi, mpo ye nde akokatisa+ liboso ya bato oyo mpe ye nde akosala ete bázwa lokola libula mokili oyo okomona.’ 29 Nyonso wana esalemaki ntango tozalaki kofanda na lobwaku oyo etalani na Bete-peore.+

4 “Sikoyo, Ee Yisraele, bóyoka malako mpe bikateli oyo nazali koteya bino mpo bótosa yango, mpo bózala na bomoi,+ bókɔta mpe bózwa mokili oyo Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino azali kopesa bino. 2 Na liloba oyo nazali kopesa bino mitindo, bosengeli kobakisa eloko te mpe kolongola eloko te,+ mpo bóbatela mitindo ya Yehova Nzambe na bino oyo nazali kopesa bino.

3 “Miso na bino moko emonaki oyo Yehova asalaki na likambo ya Baala ya Peore: Yehova Nzambe na bino asilisaki na kati na bino mobali nyonso oyo alandaki Baala ya Peore.+ 4 Kasi bino baoyo bokangami na Yehova Nzambe na bino, bino nyonso bozali na bomoi lelo oyo. 5 Talá: nateyi bino malako mpe bikateli,+ kaka ndenge Yehova Nzambe na ngai apesi ngai mitindo, mpo bótosa yango na mokili oyo bokozwa. 6 Bosengeli kotosa yango malamumalamu,+ mpo yango ekomonisa bwanya+ mpe mayele+ mpo na bino liboso ya bato ya bikólo oyo bakoyoka nsango ya malako oyo nyonso, mpe bakoloba ete: ‘Ekólo monene oyo ezali mpenza ekólo moko ya bato ya bwanya mpe ya mayele.’+ 7 Mpo ekólo nini ya monene ezali na banzambe pene na yango lokola Yehova Nzambe na biso azali pene na biso ntango nyonso oyo tobelelaka ye?+ 8 Mpe ekólo nini ya monene ezali na malako mpe na bikateli ya sembo lokola mobeko nyonso oyo nazali kopesa bino lelo oyo?+

9 “Kaka nde bókeba mpe bómibatela,* mpo bóbosana te makambo oyo miso na bino emoni mpe yango elongwa na motema na bino te mikolo nyonso ya bomoi na bino. Bosengeli mpe koyebisa yango na bana na bino mpe na bana ya bana na bino.+ 10 Na mokolo oyo otɛlɛmaki liboso ya Yehova Nzambe na yo na Horebe, Yehova alobaki na ngai ete: ‘Yanganisá bato epai na ngai mpo nayokisa bango maloba na ngai,+ mpo báyekola kobanga ngai+ mikolo nyonso oyo bakozala na bomoi na mabele mpe mpo báteya bana na bango.’+

11 “Bongo bopusanaki mpe botɛlɛmaki na nse ya ngomba, mpe ngomba ezalaki kopela mɔtɔ tii na likoló mpenza;* molili, lipata mpe molili makasi ezalaki.+ 12 Mpe Yehova abandaki koloba na bino na katikati ya mɔtɔ.+ Boyokaki lokito ya maloba, kasi bomonaki elilingi ata moko te+—kaka mongongo.+ 13 Mpe ayebisaki bino kondimana+ na ye, elingi koloba Mibeko Zomi,*+ oyo apesaki bino mitindo ete bótosa yango. Nsima na yango, akomaki yango na bitanda mibale ya mabanga.+ 14 Na ntango yango Yehova apesaki ngai mitindo mpo na koteya bino malako mpe bikateli oyo bosengeli kotosa na mokili oyo bokokɔta mpo na kozwa yango.

15 “Na yango, lokola bomonaki elilingi ata moko te na mokolo oyo Yehova alobaki na bino na Horebe na katikati ya mɔtɔ, bómibatela mpenza,* 16 mpo bósala makambo na kozanga bosembo te mpe bósala te mpo na bino ekeko* oyo ezali na elilingi ya elembo nyonso, elilingi ya mobali to ya mwasi,+ 17 elilingi ya nyama nyonso oyo ezali na mabele to elilingi ya ndɛkɛ nyonso oyo epumbwaka na likoló,+ 18 elilingi ya eloko nyonso oyo ebendanaka na libumu oyo ezali na mabele to elilingi ya mbisi nyonso oyo ezali na mai na nse ya mabele.+ 19 Mpe soki botomboli miso na bino na likoló mpe bomoni moi ná sanza mpe minzoto—limpinga nyonso ya likoló—, bótika te ete ebenda bino mpo na kogumbamela yango mpe kosalela yango.+ Yehova Nzambe na bino apesá yango na bato ya bikólo nyonso oyo bazali na mabele mobimba. 20 Kasi bino bozali bato oyo Yehova azwaki mpe abimisaki na ndako ya mɔtɔ makasi oyo enyangwisaka bibende, na Ezipito, mpo bókóma bato oyo bazali eloko na ye moko,*+ lokola na mokolo ya lelo.

21 “Yehova asilikelaki ngai makasi mpo na bino,+ mpe alapaki ndai ete nakokatisa Yordani te mpe nakokɔta te na mokili ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino azali kopesa bino lokola libula.+ 22 Mpo nasengeli kokufa na mokili oyo; nakokatisa Yordani te,+ kasi bino bokokatisa mpe bokozwa mokili malamu oyo. 23 Bókeba ete bóbosana te kondimana ya Yehova Nzambe na bino oyo asalaki ná bino,+ mpe bósala te ekeko mpo na bino,* elilingi ya eloko nyonso oyo Yehova Nzambe na bino apekisaki bino.+ 24 Mpo Yehova Nzambe na bino azali mɔtɔ oyo ezikisaka,+ Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.+

25 “Soki boboti bana, bozwi bankɔkɔ mpe bofandi ntango molai na mokili mpe bobebisi makambo mpe bosali mpo na bino ekeko* ya elilingi+ ya eloko nyonso, mpe bosali oyo ezali mabe na miso ya Yehova Nzambe na bino mpo na kosilikisa ye,+ 26 nazali lelo kozwa likoló ná mabele batatoli liboso na bino, ete bokokufa mpenza nokinoki na mokili epai bozali kokatisa Yordani mpo na kozwa yango. Bokoumela na mokili yango te, mpo bokosila bino nyonso.+ 27 Yehova akopanza bino na kati ya bato ya bikólo.+ Kaka bato moke kati na bino nde bakotikala na bomoi+ na bikólo oyo Yehova akomema bino. 28 Kuna bokosalela banzambe ya mabaya mpe ya mabanga oyo esalemi na mabɔkɔ ya moto,+ banzambe oyo bakoki komona te, koyoka te, kolya te mpe koyoka nsolo te.

29 “Soki kuna boluki Yehova Nzambe na bino, soki boluki ye na motema na bino mobimba mpe na molimo* na bino mobimba,+ bokomona ye mpenza.+ 30 Na mikolo ekoya, ntango bokozala na mitungisi makasi mpe makambo oyo nyonso ekokómela bino, bokozongela Yehova Nzambe na bino mpe bokoyoka mongongo na ye.+ 31 Mpo Yehova Nzambe na bino azali Nzambe ya motema mawa.+ Akosundola bino te, akosilisa bino te mpe akobosana te kondimana oyo alapelaki bankɔkɔ na bino ndai.+

32 “Sikoyo, bótuna mpo na mikolo ya kala oyo ezalaki liboso na bino, banda na mokolo oyo Nzambe azalisaki moto na mabele; bóluka banda na nsuka moko ya likoló tii na nsuka mosusu ya likoló. Eloko moko ya monene lokola oyo wana esalemá to bayoká eloko moko lokola oyo wana?+ 33 Ezali nde na bato mosusu oyo bayoká mongongo ya Nzambe ezali koloba na katikati ya mɔtɔ ndenge boyokaki yango, mpe batikalá na bomoi?+ 34 To ezali nde na Nzambe oyo amekaki kolongola ekólo moko mpo na ye na kati ya ekólo mosusu, na nzela ya bitumbu,* na bilembo, na makamwisi,+ na etumba,+ na nguya ya lobɔkɔ na ye,+ na makasi na ye* mpe na makambo minene ya nsɔmɔ,+ lokola oyo Yehova Nzambe na bino asalaki mpo na bino na Ezipito na miso na bino? 35 Bamonisaki bino makambo yango, mpo bóyeba ete Yehova azali Nzambe ya solo;+ mosusu azali te, kaka ye.+ 36 Ayokisaki bino mongongo na ye uta na likoló mpo na kosembola bino, mpe na mabele amonisaki bino mɔtɔ na ye monene, mpe boyokaki maloba na ye uta na katikati ya mɔtɔ.+

37 “Lokola alingaki bankɔkɔ na bino mpe aponaki libota* na bango nsima na bango,+ azalaki elongo na bino mpe abimisaki bino na Ezipito, na nguya na ye monene. 38 Abenganaki liboso na bino bikólo ya minene mpe ya makasi koleka bino, mpo na kokɔtisa bino na mokili na bango mpo ezala libula na bino, ndenge ezali na mokolo ya lelo.+ 39 Lisusu, lelo bóyeba mpe bóbosana te ete Yehova azali Nzambe ya solo na likoló mpe awa na mabele.+ Mosusu azali te.+ 40 Bosengeli kobatela malako na ye mpe mitindo na ye oyo nazali kopesa bino lelo, mpo makambo na bino mpe ya bana na bino nsima na bino etambola malamu, mpe mpo boumela mingi na mabele oyo Yehova Nzambe na bino azali kopesa bino.”+

41 Na ntango yango, Moize aponaki bingumba misato na ngámbo ya Yordani na ɛsti,+ 42 mpo moto oyo abomi moto mosusu na nko te mpe azalaki koyina ye te liboso,+ asengeli kokima na moko ya bingumba yango mpo atikala na bomoi.+ 43 Bingumba yango ezali: Bezere+ na esobe, na ngomba patatalu, mpo na Barubene, Ramote+ na Gileade mpo na Bagade, mpe Golane+ na Bashane mpo na Bamanase.+

44 Sikoyo, talá Mobeko+ oyo Moize alakisaki bato ya Yisraele. 45 Yango ezali makundoli, malako mpe bikateli oyo Moize apesaki Bayisraele nsima ya kobima na bango na Ezipito,+ 46 na etúká ya Yordani, na lobwaku oyo etalani na Bete-peore,+ na mokili ya Sihone, mokonzi ya Baamore, oyo azalaki kofanda na Heshibone,+ oyo Moize ná Bayisraele balongaki nsima ya kobima na Ezipito.+ 47 Mpe bazwaki mokili na ye mpe mokili ya Oge+ mokonzi ya Bashane, bakonzi mibale ya Baamore oyo bazalaki na etúká ya ɛsti ya Yordani, 48 banda na Aroere,+ oyo ezali pembenipembeni ya Lobwaku* ya Arnone tii na Ngomba Sione, elingi koloba, Heremone,+ 49 mpe na Araba mobimba na etúká ya ɛsti ya Yordani, tii na Mbu ya Araba,* na esika mopanzi ya Pisga ekiti, na nse.+

5 Na nsima, Moize abengisaki Yisraele mobimba mpe alobaki na bango ete: “Yoká, Ee Yisraele, malako mpe bikateli oyo nazali koyebisa bino lelo oyo, mpe bosengeli koyekola yango mpe kotosa yango malamumalamu. 2 Yehova Nzambe na biso asalaki kondimana na biso na Horebe.+ 3 Yehova asalaki kondimana oyo ná bankɔkɔ na biso te, kasi ná biso, biso nyonso oyo tozali na bomoi awa lelo. 4 Yehova alobaki na bino mpenza boye na miso, likoló ya ngomba, na katikati ya mɔtɔ.+ 5 Natɛlɛmaki kati na Yehova mpe bino na ntango yango+ mpo na koyebisa bino liloba ya Yehova, mpo bobangaki mɔtɔ mpe bomataki te na ngomba.+ Alobaki boye:

6 “‘Nazali Yehova Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito, esika oyo ozalaki moombo.*+ 7 Osengeli ata moke te kozala na banzambe mosusu, longola kaka ngai.*+

8 “‘Osengeli te komisalela ekeko*+ to elilingi oyo ekokani na eloko nyonso oyo ezali kuna na likoló to oyo ezali awa na mabele to oyo ezali na mai na nse ya mabele. 9 Osengeli te kogumbamela yango to kobendama mpo na kosalela yango,+ mpo ngai Yehova Nzambe na yo, nazali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.+ Mpo na libunga ya batata, napesaka etumbu na bana, na libota ya misato mpe na libota ya minei ya baoyo bayinaka ngai;+ 10 kasi namonisaka bolingo ya sembo* epai ya libota ya nkóto ya baoyo balingaka ngai mpe babatelaka mibeko na ngai.

11 “‘Osengeli te kozwa nkombo ya Yehova Nzambe na yo na lisɛki,+ mpo Yehova akotika te moto oyo azali kozwa nkombo na ye na lisɛki azanga kozwa etumbu.+

12 “‘Okotosa mokolo ya sabata mpo na kosantisa yango, kaka ndenge Yehova Nzambe na yo apesaki yo mitindo.+ 13 Mikolo motoba, osengeli kosala mosala mpe okosala misala na yo nyonso,+ 14 kasi mokolo ya nsambo ezali sabata mpo na Yehova Nzambe na yo.+ Osengeli kosala ata mosala moko te,+ ezala yo, ezala mwana na yo ya mobali to ya mwasi, ezala moombo na yo ya mobali to ya mwasi, ezala ngɔmbɛ na yo to mpunda na yo, ezala nyama na yo nyonso ya mboka, ezala mopaya oyo azali na kati ya bingumba* na yo,+ mpo ete moombo na yo ya mobali mpe ya mwasi apema lokola yo.+ 15 Kobosana te ete okómaki moombo na mokili ya Ezipito mpe Yehova Nzambe na yo abimisaki yo kuna na nguya ya lobɔkɔ na ye mpe na lobɔkɔ oyo esembolami.+ Yango wana Yehova Nzambe na yo apesaki yo mitindo otosaka mokolo ya sabata.

16 “‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo,+ kaka ndenge Yehova Nzambe na yo apesi yo mitindo; mpo bomoi na yo ezala molai mpe makambo na yo etambola malamu na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.+

17 “‘Osengeli koboma moto te.+

18 “‘Osengeli kosala ekobo te.+

19 “‘Osengeli koyiba te.+

20 “‘Osengeli kopesa litatoli ya lokuta te mpo na moto mosusu.+

21 “‘Osengeli te kolula mwasi ya moto mosusu.+ Osengeli te kotala na liso ya lokoso ndako ya moto mosusu, elanga na ye to moombo na ye ya mobali to ya mwasi, ngɔmbɛ na ye to mpunda na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moto mosusu.’+

22 “Mitindo* oyo Yehova ayebisaki yango lisangá na bino mobimba na ngomba na mongongo makasi, na katikati ya mɔtɔ, ya lipata mpe molili makasi,+ mpe abakisaki likambo mosusu te; mpe akomaki yango na bitanda mibale ya mabanga mpe apesaki ngai yango.+

23 “Kasi ntango kaka boyokaki mongongo na katikati ya molili, wana ngomba ezalaki kopela mɔtɔ,+ bankumu nyonso ya mabota na bino mpe bankulutu na bino bapusanaki epai na ngai. 24 Na nsima bolobaki ete: ‘Talá Yehova Nzambe na biso amonisi biso nkembo na ye mpe bonene na ye, mpe toyoki mongongo na ye uta na katikati ya mɔtɔ.+ Lelo tomoni ete Nzambe akoki koloba na moto mpe moto akoki kotikala na bomoi.+ 25 Bongo tókufa mpo na nini? Mpo mɔtɔ monene oyo ekoki kozikisa biso. Soki tokobi koyoka mongongo ya Yehova Nzambe na biso, tokokufa mpenza. 26 Mpo nani kati na bato nyonso* ayoká lokola biso mongongo ya Nzambe ya bomoi ezali koloba na katikati ya mɔtɔ, bongo atikali na bomoi? 27 Yo moko osengeli kokende pene mpo na koyoka nyonso oyo Yehova Nzambe na biso akoloba, mpe yo nde moto okoyebisa biso nyonso oyo Yehova Nzambe na biso alobi na yo, mpe tokoyoka mpe tokosala yango.’+

28 “Bongo Yehova ayokaki maloba oyo boyebisaki ngai, mpe Yehova alobaki na ngai ete: ‘Nayoki maloba oyo bato bayebisi yo. Nyonso oyo balobi ezali malamu.+ 29 Soki kaka babongisi motema na bango mpo bábanga ngai+ mpe bábatela ntango nyonso mibeko+ na ngai nyonso, makambo na bango mpe ya bana na bango ekotambola malamu mpo na libela!+ 30 Kende koloba na bango ete: “Bózonga na bahema na bino.” 31 Kasi yo okotikala awa elongo na ngai. Nakoyebisa yo mibeko nyonso, malako mpe bikateli oyo okoteya bango mpe oyo basengeli kotosa na mokili oyo nazali kopesa bango mpo ezala ya bango.’ 32 Sikoyo bókeba ete bósala kaka ndenge Yehova Nzambe na bino apesi bino mitindo.+ Bosengeli kobaluka te na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi.+ 33 Bokotambola na nzela nyonso oyo Yehova Nzambe na bino apesi bino mitindo,+ mpo bótikala na bomoi mpe makambo na bino etambola malamu mpe mikolo na bino ezala mingi na mokili oyo bokozwa.+

6 “Sikoyo talá mitindo, malako mpe bikateli oyo Yehova Nzambe na bino apesi mpo na koteya bino, mpo bótosa yango ntango bokokatisa ebale Yordani mpo na kokɔta na mokili oyo bokozwa mpo ezala ya bino, 2 mpo bino, bana na bino mpe bana ya bana na bino bóbanga Yehova Nzambe na bino, mpe mikolo nyonso ya bomoi na bino bokotosa mibeko na ye nyonso mpe mitindo na ye oyo napesi bino,+ mpo bomoi na bino ezala molai.+ 3 Mpe Bosengeli koyoka, Ee Yisraele, mpe kokeba ete bótosa yango mpenza, mpo makambo na bino etambola malamu mpe bókóma mingi mpenza na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi, kaka ndenge Yehova, Nzambe ya bankɔkɔ na bino apesi bino elaka.

4 “Yoká, Ee Yisraele: Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.+ 5 Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo* na yo mobimba+ mpe na makasi na yo nyonso.*+ 6 Maloba oyo nazali kopesa yo mitindo lelo esengeli kozala na motema na yo, 7 mpe osengeli kokɔtisa yango malamumalamu na kati* ya bana na yo+ mpe kolobela yango ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala mpe ntango okolala mpe ntango okolamuka.+ 8 Esengeli kozala lokola ekaniseli oyo ekangami na lobɔkɔ na yo, mpe kozala na elongi na yo lokola mwa eteni ya elamba oyo bakangaka na motó.*+ 9 Komá yango likoló ya makonzí ya porte ya ndako na yo mpe na baporte na yo.

10 “Ntango Yehova Nzambe na bino akokɔtisa bino na mokili oyo alapaki ndai epai ya bankɔkɔ na bino Abrahama, Yisaka mpe Yakobo ete akopesa bino,+ bingumba minene mpe kitoko oyo botongaki te,+ 11 bandako oyo etondi na biloko nyonso ya kitoko, oyo bosalaki mpo na yango te, mabulu mpo na kobomba mai, oyo botimolaki te, bilanga ya vinyo mpe nzete ya olive oyo bolonaki te—, mpe ntango bokolya mpe bokotonda,+ 12 bókeba ete bóbosana te Yehova+ oyo abimisaki bino na mokili ya Ezipito, epai bozalaki baombo. 13 Bokobanga Yehova Nzambe na bino,+ mpe ye nde bokosalela,+ mpe na nkombo na ye nde bokolapa ndai.+ 14 Bosengeli kolanda banzambe mosusu te, banzambe nyonso ya bato ya bikólo oyo bazali zingazinga na bino,+ 15 mpo Yehova Nzambe na bino oyo azali na kati na bino azali Nzambe oyo asɛngaka bákangama kaka na ye.+ Noki nkanda ya Yehova Nzambe na bino engalela bino+ mpe alongola bino na mabele.+

16 “Bosengeli te komeka Yehova Nzambe na bino,+ ndenge bomekaki ye na Masa.+ 17 Bosengeli mpenza kotosa mitindo ya Yehova Nzambe na bino mpe makundoli na ye mpe malako na ye oyo ayebisi bino bótosa. 18 Bosengeli kosala oyo ezali sembo mpe malamu na miso ya Yehova, mpo makambo na bino etambola malamu mpe bókɔta mpe bózwa mokili malamu oyo Yehova alapelaki bankɔkɔ na bino ndai,+ 19 na ndenge bokobengana banguna na bino nyonso liboso na bino, kaka ndenge Yehova apesi elaka.+

20 “Soki mokolo moko, bana na bino batuni bino ete: ‘Mpo na nini Yehova Nzambe na biso apesaki bino makundoli, malako mpe bikateli?’ 21 bokoloba na bango: ‘Tokómaki baombo ya Farao na Ezipito, kasi Yehova abimisaki biso na Ezipito na nzela ya lobɔkɔ na ye ya nguya. 22 Bongo tomonaki na miso na biso ndenge Yehova azalaki kokweisela Ezipito, Farao mpe bato ya ndako na ye nyonso bilembo mpe makamwisi ya minene mpe ya kobebisa.+ 23 Mpe abimisaki biso kuna mpo amema biso awa mpo na kopesa biso mokili oyo alapelaki bankɔkɔ na biso ndai.+ 24 Na yango, Yehova apesaki biso mitindo tókokisa malako oyo nyonso mpe tóbanga Yehova Nzambe na biso mpo na bolamu na biso ntango nyonso,+ mpo tótikala na bomoi+ lokola na mokolo ya lelo. 25 Mpe yango ekomonisa bosembo na biso, soki tokebi mpe tosaleli mibeko oyo nyonso mpo na kotosa* Yehova Nzambe na biso, kaka ndenge apesi biso mitindo.’+

7 “Ntango Yehova Nzambe na yo akokɔtisa yo na mokili oyo etikali moke okɔta mpo na kozwa yango,+ akolongola mpe liboso na yo bikólo oyo etondi na bato:+ Bahiti, Bagirigashe, Baamore,+ Bakanana, Baperizi, Bahivi ná Bayebusi,+ bikólo nsambo oyo ezali na bato mingi mpe na nguya mingi koleka yo.+ 2 Yehova Nzambe na yo akopesa yo bango, mpe okolonga bango.+ Okosilisa bango nyonso.+ Osengeli kosala kondimana ata moko te ná bango mpe komonisela bango boboto ata moke te.+ 3 Osengeli kosala kondimana ata moko te ya libala ná bango. Kopesa te bana na yo ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe kozwa te bana na bango ya basi mpo na bana na yo ya mibali.+ 4 Mpo bakopɛngwisa bana na yo ya mibali mpo bátika kolanda ngai mpe básalela banzambe mosusu;+ bongo nkanda ya Yehova ekongalela bino, mpe akoboma bino nokinoki.+

5 “Lisusu, okosala bango boye: Okokweisa bitumbelo na bango, okobuka makonzí na bango ya losambo,+ okokata banzete na bango ya losambo,*+ mpe okotumba bikeko na bango.*+ 6 Mpo yo ozali ekólo moko mosantu na miso ya Yehova Nzambe na yo, mpe Yehova Nzambe na yo aponi yo mpo okóma ekólo na ye, eloko na ye moko,* kati na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na mabele.+

7 “Ezali te mpo ozalaki ekólo ya bato mingi koleka bikólo nyonso nde Yehova amoniselaki yo bolingo mingi na ndenge aponaki yo,+ kutu ozalaki nde ekólo ya bato moke koleka bikólo nyonso.+ 8 Kasi ezali mpo Yehova alingaka yo, mpe mpo azali kobatela maloba ya ndai oyo alapelaki bankɔkɔ na yo,+ yango wana Yehova abimisaki bino na nguya ya lobɔkɔ na ye, mpo asikola yo na mokili ya boombo,+ alongola yo na nse ya nguya* ya Farao mokonzi ya Ezipito. 9 Oyebi malamu ete Yehova Nzambe na yo azali Nzambe ya solo, Nzambe ya sembo, oyo abatelaka kondimana mpe bolingo ya sembo tii na mabota ya nkóto ya baoyo balingaka ye mpe babatelaka mitindo na ye.+ 10 Kasi akofuta baoyo bayinaka ye, ntango akoboma bango+ na mbala moko.* Akoumela te kopesa etumbu na baoyo bayinaka ye; akofuta bango mbala moko. 11 Na yango, salá nyonso ete otosa mitindo, malako mpe bikateli oyo nazali kopesa yo lelo; salelá yango.

12 “Soki okobi koyoka bikateli oyo mpe ozali kosalela yango mpe kotosa yango, Yehova Nzambe na yo akobatela kondimana mpe bolingo ya sembo oyo alapelaki bankɔkɔ na yo ndai. 13 Akolinga yo, akopambola yo, mpe akokómisa yo ekólo ya bato ebele. Ya solo, na mokili oyo alapelaki bankɔkɔ na yo ndai ete akopesa yo, okozala na bana ebele,*+ akopambola mpe mbuma ya mabele na yo, blé na yo, vinyo na yo ya sika, mafuta+ na yo, bana ya bangɔmbɛ na yo mpe bana ya bampate na yo. 14 Okokóma ekólo ya bato oyo bapambwami mingi koleka bikólo nyonso;+ epai na yo mobali moko te mpe mwasi moko te akozanga mwana, bibwɛlɛ na yo mpe ekozanga bana te.+ 15 Yehova akolongola yo maladi nyonso, mpe maladi mabe nyonso oyo oyebaki na Ezipito,+ akotindela yo yango te. Kutu akotindela nde baoyo nyonso bayinaka yo. 16 Okosilisa* bato ya bikólo nyonso oyo Yehova Nzambe na yo akopesa yo.+ Osengeli koyokela* bango mawa te,+ mpe osengeli kosalela banzambe na bango te,+ mpo yango ekozala motambo mpo na yo.+

17 “Soki olobi na motema na yo ete: ‘Bikólo oyo eleki ngai na bato. Nakobengana yango ndenge nini?’+ 18 osengeli te kobanga yango.+ Okokanisa oyo Yehova Nzambe na yo asalaki Farao mpe Ezipito mobimba:+ 19 bitumbu* minene oyo miso na yo emonaki, bilembo, makamwisi,+ nguya ya lobɔkɔ na ye mpe makasi na ye nyonso* oyo Yehova Nzambe na yo asalelaki mpo na kobimisa yo.+ Ndenge wana nde Yehova Nzambe na yo akosala bato ya bikólo nyonso oyo ozali kobanga.+ 20 Yehova Nzambe na yo akotindela bango likanisi ya kolɛmba nzoto,* tii baoyo batikalaki+ mpe oyo bamibombaki liboso na yo bakokufa. 21 Kozala na nsɔmɔ na bango te, mpo Yehova Nzambe na yo, Nzambe moko monene mpe ya nsɔmɔ+ azali na yo.+

22 “Yehova Nzambe na yo akobengana mokemoke mpenza bikólo oyo liboso na yo.+ Okopesama nzela te ya kosilisa yango na mbala moko, mpo banyama ya zamba ekóma ebele te, noki ekotya bomoi na yo na likama. 23 Yehova Nzambe na yo akopesa yo bango mpe akolonga bango mpenza, tii bakosila mpenza kosila.+ 24 Akopesa bakonzi na bango na lobɔkɔ na yo,+ mpe okolongola nkombo na bango na nse ya lola.+ Moto moko te akotɛlɛma liboso na yo,+ tii okosilisa bango mpenza.+ 25 Bokozikisa na mɔtɔ bikeko* ya banzambe na bango.+ Okolula te palata mpe wolo oyo ezali likoló na yango,+ mpe okozwa yango te mpo na yo, mpo ekanga yo na motambo te; mpamba te bikeko ezali eloko moko oyo Yehova Nzambe na yo ayinaka.+ 26 Osengeli te komema na ndako na yo eloko oyo eyinamá noki okóma eloko oyo esengeli kobebisama lokola yango. Okoyoka yango mabe mpenza* mpe okoyina yango, mpo ezali eloko oyo esengeli kobebisama.

8 “Okosala nyonso ete otosa mitindo nyonso nazali kopesa yo lelo, mpo okoba kozala na bomoi+ mpe okóma ekólo ya bato ebele, okɔta mpe ozwa mokili oyo Yehova alapaki ndai ete akopesa yango na bankɔkɔ na yo.+ 2 Okokanisa nzela molai oyo Yehova Nzambe na yo atambwisaki yo mbula 40 oyo na esobe,+ mpo na koteya yo okóma na komikitisa mpe kotya yo na komekama+ mpo na koyeba oyo ezalaki na motema na yo,+ soki okobatela mitindo na ye to te. 3 Bongo ateyaki yo komikitisa mpe atikaki yo oyoka nzala+ mpe aleisaki yo mana,+ oyo yo oyebaki te mpe oyo batata na yo bayebaki te, mpo oyeba ete moto abikaka kaka na mampa te, kasi abikaka na liloba nyonso oyo euti na monɔkɔ ya Yehova.+ 4 Elamba oyo ozalaki kolata ekufaki te, mpe lokolo na yo evimbaki te mbula 40 oyo.+ 5 Oyebi malamu na motema na yo ete kaka ndenge moto asembolaka mwana na ye, Yehova Nzambe na yo azalaki mpe kosembola yo.+

6 “Sikoyo osengeli kobatela mitindo ya Yehova Nzambe na yo na kotambola na banzela na ye mpe na kobanga ye. 7 Mpo Yehova Nzambe na yo azali kokɔtisa yo na mokili moko malamu,+ mokili moko ya mikɛli ya mai,* ya maziba mpe ya mai mozindo oyo ezali kobima na lobwaku ya patatalu mpe na etúká ya ngombangomba, 8 mokili moko ya blé mpe ya ɔrje, ya nzete ya vinyo, nzete ya figi mpe nzete ya grenade,+ mokili moko ya mafuta ya olive mpe ya mafuta ya nzoi,+ 9 mokili moko oyo okoluka bilei te mpe okozanga eloko te, mokili moko oyo mabanga na yango ezali na bibende mpe oyo okotimola kwivre na bangomba na yango.

10 “Ntango okolya mpe okotonda, osengeli kosanzola Yehova Nzambe na yo mpo na mokili malamu oyo apesi yo.+ 11 Kasi kebá ete obosana Yehova Nzambe na yo te. Koboya te kotosa mitindo na ye, bikateli na ye mpe mibeko na ye oyo nazali kopesa yo lelo. 12 Ntango okolya mpe okotonda, ntango okotonga bandako ya kitoko mpe okofanda na kati na yango,+ 13 ntango etonga na yo ya bangɔmbɛ mpe etonga na yo ya bampate ekokóma mingi, mpe okozala na palata ná wolo mingi, mpe eloko na yo nyonso ekokóma mingi, 14 kotika te ete motema na yo ekóma na lolendo+ mpe obosana Yehova Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito, epai ozalaki moombo,*+ 15 oyo atambwisaki yo na esobe wana ya monene mpe ya nsɔmɔ,+ na mabele ekauká oyo ezali na mai te, oyo ezali na banyoka ya ngɛngɛ ná bankotó.* Abimisaki mai na libanga ya silekisi+ 16 mpe na esobe, aleisaki yo mana+ oyo batata na yo bayebaki te, mpo na koteya yo komikitisa+ mpe mpo na kotya yo na komekama mpo ozwela yango matomba na mikolo oyo ezali koya.+ 17 Soki olobi na motema na yo ete: ‘Nguya na ngai moko mpe makasi ya lobɔkɔ na ngai moko nde esali ete nazwa bomɛngo oyo,’+ 18 kobosana te ete ezali Yehova Nzambe na yo, nde apesi yo nguya ya kozwa bomɛngo,+ mpo na kokokisa kondimana na ye oyo alapelaki bankɔkɔ na yo ndai, lokola na mokolo ya lelo.+

19 “Soki bobosani Yehova Nzambe na bino ata moke mpe bolandi banzambe mosusu mpe bosaleli bango mpe bogumbameli bango, nazali kokebisa bino lelo oyo ete bokokufa.+ 20 Bokokufa lokola bikólo oyo Yehova azali kobebisa liboso na bino, mpo bokoyoka te mongongo ya Yehova Nzambe na bino.+

9 “Yoká, Ee Yisraele, lelo ozali kokatisa Yordani+ mpo na kozwa mokili oyo ezali na bikólo minene mpe ya makasi koleka yo,+ oyo ezali na bingumba minene mpe oyo ebatelami makasi tii na likoló,*+ 2 oyo ezali na bingambe ya bato, bana ya Baanakime,+ oyo oyebi mpe oyo oyokaki bazali koloba mpo na bango ete: ‘Nani akoki kotɛmɛla bana ya Anake?’ 3 Bongo, osengeli koyeba lelo ete Yehova Nzambe na yo akokatisa liboso na yo.+ Azali mɔtɔ oyo ezikisaka+ mpe akosilisa bango nyonso. Na miso na yo akotya bango na nse mpo obengana bango nokinoki mpe osilisa bango, kaka ndenge Yehova apesi yo elaka.+

4 “Ntango Yehova Nzambe na yo akobengana bango liboso na yo, koloba na motema na yo te ete: ‘Ezali mpo na bosembo* na ngai moko nde Yehova akɔtisi ngai na mokili oyo mpo nazwa yango.’+ Nzokande, ezali mpo na mabe ya bikólo+ yango nde Yehova azali kobengana yango liboso na yo. 5 Ezali te mpo na boyengebene na yo to mpo na bosembo ya motema na yo nde ozali kokɔta kozwa mokili na bango. Kasi, ezali mpo na mabe ya bikólo yango nde Yehova Nzambe na yo azali kobengana yango liboso na yo,+ mpe mpo na kokokisa liloba oyo Yehova alapaki ndai epai ya bankɔkɔ na yo, Abrahama,+ Yisaka+ mpe Yakobo.+ 6 Na yango, yebá ete ezali te mpo na bosembo na yo nde Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo mokili malamu oyo mpo ozwa yango, mpamba te ozali ekólo ya bato moko ya motó makasi.*+

7 “Bóbosana ata moke te ndenge bosilikisaki Yehova Nzambe na bino na esobe.+ Banda na mokolo oyo bobimaki na mokili ya Ezipito tii kokóma na bino na esika oyo, bozali kaka kotombokela Yehova.+ 8 Ata na Horebe botumolaki Yehova, mpe Yehova asilikelaki bino tii akómaki pene ya kosilisa bino mpenza.+ 9 Ntango namataki na ngomba mpo na kozwa bitanda ya mabanga,+ bitanda ya kondimana oyo Yehova asalaki ná bino,+ natikalaki na ngomba mikolo 40 butu moi,+ nalyaki eloko te mpe namɛlaki mai te. 10 Bongo Yehova apesaki ngai bitanda mibale ya mabanga oyo ekomami na mosapi ya Nzambe, mpe likoló na yango ezalaki na maloba nyonso oyo Yehova alobelaki bino na ngomba longwa na katikati ya mɔtɔ na mokolo ya liyangani.*+ 11 Na nsuka ya mikolo 40 butu moi, Yehova apesaki ngai bitanda mibale ya mabanga, bitanda ya kondimana, 12 mpe Yehova alobaki na ngai ete: ‘Tɛlɛmá, longwá awa, kitá nokinoki, mpo bato na yo oyo obimisaki na Ezipito basali makambo ya kozanga bosembo.+ Balongwe nokinoki na nzela oyo napesaki bango mitindo ete bálanda. Bamisaleli ekeko ya ebende.’*+ 13 Yehova alobaki na ngai lisusu boye: ‘Namoni bato oyo, mpe talá! bazali mpenza motó makasi.*+ 14 Tiká ngai nasilisa bango nyonso mpe nalongola nkombo na bango na nse ya lola, mpe nakómisa yo ekólo moko ya makasi mpe ya bato mingi koleka bango.’+

15 “Nsima na yango, nabalukaki mpe nakitaki na ngomba, wana ngomba ezalaki kopela mɔtɔ,+ mpe nasimbaki bitanda mibale ya kondimana na mabɔkɔ na ngai nyonso mibale.+ 16 Bongo natalaki, mpe namonaki ete bosalelaki Yehova Nzambe na bino lisumu! Bomisalelaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ ya ebende.* Bolongwaki nokinoki na nzela oyo Yehova apesaki bino mitindo ete bólanda.+ 17 Na yango, na mabɔkɔ na ngai nyonso mibale, nazwaki bitanda yango nyonso mibale, nabwakaki yango na nse mpe nabukaki yango na miso na bino.+ 18 Mpe nafukamaki elongi na nse liboso ya Yehova, ndenge nasalaki liboso, mikolo 40 butu moi. Nalyaki eloko te mpe namɛlaki mai te,+ mpo na masumu na bino nyonso na ndenge bosalaki mabe na miso ya Yehova mpe bosilikisaki ye. 19 Mpo nabangaki mpenza komona nkanda makasi oyo Yehova asilikelaki bino,+ tii akómaki pene ya kosilisa bino nyonso. Kasi na ntango yango mpe, Yehova ayokelaki ngai.+

20 “Yehova asilikelaki Arona makasi tii akómaki pene ya koboma ye,+ kasi na ntango yango mpe nabondelaki mpo na Arona. 21 Bongo nazwaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ+ oyo bosalaki, eloko oyo lisumu na bino ebotaki mpe nazikisaki yango na mɔtɔ; natutaki yango, nanikaki yango nyonso tii ekómaki mikemike lokola putulu, mpe nabwakaki putulu yango na mokɛli oyo ezalaki kokita uta na ngomba.+

22 “Lisusu, na Tabera,+ na Masa,+ mpe na Kibrote-hataava,+ botumolaki nkanda ya Yehova. 23 Ntango Yehova atindaki bino longwa na Kadeshe-barnea,+ alobaki ete: ‘Bómata mpe bózwa mokili oyo nakopesa mpenza bino!’ botombokelaki lisusu etinda ya Yehova Nzambe na bino,+ mpe bondimelaki ye te+ mpe botosaki ye te. 24 Banda nayebá bino, bozali kaka kotombokela Yehova.

25 “Nakobaki kofukama elongi na nse liboso ya Yehova mikolo 40 butu moi.+ Nafukamaki bongo mpo Yehova alobaki ete akosilisa bino nyonso. 26 Nabandaki kobondela Yehova mpe koloba ete: ‘Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, kosilisa bato na yo te. Bazali eloko na yo moko,*+ oyo osikolaki na bonene na yo, mpe obimisaki na Ezipito na nguya ya lobɔkɔ na yo.+ 27 Kanisá basaleli na yo Abrahama, Yisaka mpe Yakobo.+ Kolanda te motó makasi ya bato oyo, mabe na bango mpe lisumu na bango.+ 28 Noki bato ya mokili epai obimisaki biso báloba ete: “Yehova akokaki te kokɔtisa bango na mokili oyo alakaki bango, mpe ayinaki bango, yango wana abimisaki bango mpo na koboma bango na esobe.”+ 29 Mpo bazali bato na yo mpe eloko na yo moko*+ oyo obimisaki na nguya monene mpe na makasi na yo nyonso.’*+

10 “Na ntango yango, Yehova alobaki na ngai ete: ‘Katá bitanda mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso,+ mpe matá epai na ngai na ngomba; osengeli mpe kosala sanduku ya mabaya. 2 Mpe nakokoma na bitanda yango maloba oyo ezalaki na bitanda ya liboso, oyo obukaki, mpe okotya yango na kati ya sanduku.’ 3 Bongo nasalaki sanduku na nzete ya akasia mpe nasalaki bitanda mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso mpe namataki na ngomba ná bitanda yango mibale na lobɔkɔ na ngai.+ 4 Na nsima, akomaki na bitanda yango maloba oyo akomaki liboso,+ Mibeko Zomi,*+ oyo Yehova alobaki na bino na ngomba, na katikati ya mɔtɔ,+ na mokolo ya liyangani;*+ mpe Yehova apesaki ngai yango. 5 Bongo nabalukaki mpe nakitaki na ngomba+ mpe natyaki bitanda yango na kati ya sanduku oyo nasalaki, esika yango ezalaka, kaka ndenge Yehova apesaki ngai mitindo.

6 “Mpe Bayisraele balongwaki na Beerote Bene-yaakane bakei na Mosera. Kuna Arona akufaki mpe bakundaki ye,+ mpe mwana na ye, Eleazare abandaki kosala mosala ya nganga-nzambe na esika na ye.+ 7 Balongwaki wana bakei na Gudegoda, mpe balongwaki na Gudegoda bakei na Yotebata,+ mokili moko ya mikɛli oyo ezali na mai mingi.*

8 “Na ntango yango, Yehova atyaki libota ya Levi+ pembeni mpo na komema sanduku ya kondimana ya Yehova,+ mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova, mpo na kosalela ye mpe kopambola bato na nkombo+ na ye, ndenge basalaka na mokolo ya lelo. 9 Yango wana, bapesaki Levi likabo te to libula te esika moko na bandeko na ye. Yehova azali libula na ye, kaka ndenge Yehova Nzambe na yo alobaki na ye.+ 10 Mpe ngai natikalaki na ngomba kaka ndenge nasalaki liboso, mikolo 40 butu moi,+ mpe Yehova ayokelaki ngai lisusu na libaku yango.+ Yehova alingaki te koboma yo. 11 Na nsima, Yehova alobaki na ngai ete: ‘Kende mpe kambá bato, mpo bákɔta mpe bázwa mokili oyo nalapelaki bankɔkɔ na bango ndai ete nakopesa bango.’+

12 “Sikoyo, Ee Yisraele, eloko nini Yehova Nzambe na yo azali kosɛnga yo?+ Kaka oyo: kobanga Yehova Nzambe na yo,+ kotambola na banzela na ye nyonso,+ kolinga ye, kosalela Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo* na yo mobimba,+ 13 mpe kobatela mitindo ná mibeko ya Yehova oyo nazali kopesa yo lelo, mpo na bolamu na yo moko.+ 14 Talá: Likoló, ɛɛ esika eleki mpenza likoló, mpe mabele ná nyonso oyo ezali na kati ezali ya Yehova Nzambe na yo.+ 15 Kasi, Yehova akangamaki kaka na bankɔkɔ na yo mpe amoniselaki bango bolingo; mpe na kati ya bato ya bikólo nyonso aponaki bino, libota na bango,+ mpe lelo bozali bato na ye. 16 Bosengeli sikoyo kopɛtola* mitema na bino+ mpe bótika kozala motó makasi.*+ 17 Mpo Yehova Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe+ mpe Nkolo ya bankolo, Nzambe monene, ya nguya mpe ya nsɔmɔ, oyo aponaka bilongi te+ mpe andimaka kanyaka te. 18 Akataka na bosembo likambo ya mwana oyo tata akufá ná ya mwasi oyo mobali akufá+ mpe alingaka moto oyo afandi mopaya,+ mpe apesaka ye bilei ná elamba. 19 Bosengeli kolinga moto oyo afandi mopaya, mpo bino mpe bofandaki bapaya na mokili ya Ezipito.+

20 “Okobanga Yehova Nzambe na yo, okosalela ye,+ okokangama na ye, mpe okolapa ndai na nkombo na ye. 21 Ye nde osengeli kosanzola.+ Azali Nzambe na yo, oyo asaleli yo makambo oyo nyonso ya minene mpe ya nsɔmɔ, oyo omoni na miso na yo moko.+ 22 Bankɔkɔ na yo bakitaki na Ezipito bato* 70,+ mpe sikoyo Yehova Nzambe na yo akómisi yo ebele lokola minzoto ya likoló.+

11 “Osengeli kolinga Yehova Nzambe+ na yo mpe kokokisa ntango nyonso mokumba na yo epai na ye, mibeko na ye, bikateli na ye mpe mitindo na ye. 2 Boyebi ete lelo nazali koloba nde na bino, kasi na bana na bino te, baoyo bayebaki te mpe bamonaki te disiplini ya Yehova Nzambe+ na bino, bonene+ na ye, nguya ya lobɔkɔ+ na ye mpe makasi na ye nyonso.* 3 Bamonaki te bilembo na ye mpe misala na ye oyo asalaki na Ezipito, epai ya Farao mokonzi ya Ezipito mpe na mokili na ye mobimba;+ 4 to oyo asalaki na mampinga ya basoda ya Ezipito, bampunda mpe makalo ya bitumba ya Farao, oyo bazindisamaki na mai ya Mbu Motane ntango bazalaki kolanda bino. Yehova abebisaki bango nyonso mbala moko mpo na libela.*+ 5 Bamonaki te oyo asalaki mpo na* bino na esobe tii kokóma na bino na esika oyo, 6 to oyo asalaki Datane ná Abirame bana ya Eliabe mwana ya Rubene, na miso ya Yisraele mobimba, ntango mabele efungwamaki mpe emɛlaki bango, bato ya bandako na bango, bahema na bango mpe ekelamu nyonso ya bomoi oyo ezalaki kolanda bango.+ 7 Miso na bino moko nde emonaki misala nyonso ya minene oyo Yehova asalaki.

8 “Bosengeli kobatela mitindo nyonso oyo nazali kopesa bino lelo, mpo bókóma makasi mpe bókatisa mpo bózwa mokili yango, 9 mpo bózala na bomoi molai+ na mokili oyo Yehova alapaki ndai ete akopesa yango na bankɔkɔ na bino mpe libota*+ na bango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+

10 “Mokili oyo ozali kokende kozwa ezali te lokola mokili ya Ezipito, epai boutaki, esika bozalaki kolona mboto na bino mpe bozalaki kolekisa mai na bilanga na lokolo,* ndenge basalaka na elanga ya ndunda. 11 Kasi mokili oyo bozali pene ya kozwa ezali mokili ya bangomba mpe ya mabwaku ya patatalu.+ Emɛlaka mai ya mbula oyo eutaka na likoló;+ 12 ezali mokili moko oyo Yehova Nzambe na yo azali kobatela. Miso ya Yehova Nzambe na yo ezali ntango nyonso likoló na yango, kobanda na ebandeli ya mobu tii na nsuka ya mobu.

13 “Mpe soki bokotosa mpenza mitindo na ngai oyo nazali kopesa bino lelo, soki bokolinga Yehova Nzambe na bino mpe bokosalela ye na motema na bino mobimba mpe na molimo* na bino mobimba,+ 14 nakopesa mpe bino mbula na mokili na bino na ntango oyo etyamá, mbula ya eleko ya otɔnɛ* ná mbula ya eleko ya prɛnta,* bongo okobuka mbuma na yo, okozwa vinyo na yo ya sika ná mafuta na yo.+ 15 Mpe nakobimisa matiti na elanga na bino mpo na bibwɛlɛ na bino; bokolya mpe bokotonda.+ 16 Bókeba, bótika te motema na bino ekosama tii bópɛngwa, noki bósambela banzambe mosusu mpe bógumbamela bango.+ 17 Bongo nkanda ya Yehova ekongalela bino, mpe akokanga likoló mpo mbula enɔka te+ mpe mabele epesa mbuma na yango te mpe bokokufa nokinoki na mokili malamu oyo Yehova azali kopesa bino.+

18 “Bosengeli kokɔtisa maloba na ngai oyo na motema na bino mpe na molimo* na bino mpe kokanga yango lokola ekaniseli na lobɔkɔ na bino, mpe ekozala na elongi na bino lokola mwa eteni ya elamba oyo bakangaka na elongi.*+ 19 Bóteya yango bana na bino: bólobela yango na ntango bofandi na ndako na bino, na ntango bozali kotambola na nzela, na ntango ya kolala mpe na ntango ya kolamuka.+ 20 Bókoma yango likoló ya makonzí ya porte ya ndako na bino mpe na baporte* na bino, 21 mpo bomoi na bino mpe ya bana na bino ezala molai+ na mokili oyo Yehova alapelaki bankɔkɔ na bino ndai ete akopesa bango yango,+ ntango nyonso oyo lola ekozala likoló ya mabele.

22 “Soki botosi mpenza mitindo oyo nazali kopesa bino mpe bobateli yango, elingi koloba, kolinga Yehova Nzambe+ na bino, kotambola na banzela na ye nyonso mpe kokangama na ye,+ 23 Yehova akobengana bikólo oyo nyonso liboso na bino,+ mpe bokobengana bikólo ya minene mpe ya bato ebele koleka bino.+ 24 Esika nyonso bokotya lokolo ekokóma ya bino.+ Ndelo na bino ekozala banda na esobe tii na Liban, banda na Ebale, ebale Efrate, tii na mbu ya wɛsti.*+ 25 Moto moko te akotɛlɛma liboso na bino.+ Yehova Nzambe na bino akosala ete mokili mobimba epai bokotambola ezala na nsɔmɔ mpe ebanga bino,+ kaka ndenge apesaki bino elaka.

26 “Talá, lelo nazali kotya liboso na bino lipamboli mpe elakeli mabe:+ 27 lipamboli, soki botosi mitindo ya Yehova Nzambe na bino oyo nazali kopesa bino lelo;+ 28 mpe elakeli mabe, soki botosi te mitindo ya Yehova Nzambe+ na bino, bolongwe na nzela oyo nazali kopesa bino mitindo lelo ete bólanda mpe bolandi banzambe mosusu oyo boyebaki te.

29 “Ntango Yehova Nzambe na yo akokɔtisa yo na mokili oyo okozwa, osengeli kosakola maloba ya lipamboli likoló ya Ngomba Gerizime mpe ya elakeli mabe likoló ya Ngomba Ebala.+ 30 Bangomba yango ezali te na ngámbo mosusu ya Yordani na wɛsti,* na mokili ya Bakanana oyo bafandi na Araba, oyo etalani na Gilgale, pembeni ya banzete minene ya More?+ 31 Mpo bozali kokatisa Yordani mpo na kokɔta mpe kozwa mokili oyo Yehova Nzambe na bino azali kopesa bino.+ Ntango bokozwa yango mpe bokofanda kuna, 32 bosengeli kokeba ete bókokisa malako nyonso mpe bikateli oyo nazali kotya liboso na bino lelo.+

12 “Talá malako mpe bikateli oyo bokokeba ete bóbatela mikolo nyonso oyo bokozala na bomoi na mokili oyo Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino akopesa bino mpo bózwa yango. 2 Bokobebisa mpenza bisika nyonso epai bato ya bikólo oyo bozali kobengana basaleli banzambe na bango,+ ezala na bangomba milai to na bangomba mike to na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa. 3 Bokokweisa bitumbelo na bango, bokobuka makonzí na bango ya losambo,+ bokozikisa na mɔtɔ banzete na bango ya losambo,* mpe bokokweisa bikeko* ya banzambe na bango,+ mpe bokolongola nkombo ya banzambe na bango na esika wana.+

4 “Bosengeli te kosambela Yehova Nzambe na bino na lolenge wana.+ 5 Kasi, bosengeli kokende kosambela Yehova Nzambe na bino na esika oyo akopona na kati ya mabota na bino nyonso mpo na kotya wana nkombo na ye mpe esika na ye ya kofanda.+ 6 Kuna nde bosengeli komema makabo na bino ya kotumba,+ bambeka na bino, moko ya bandambo zomi+ na bino, likabo ya lobɔkɔ+ na bino, makabo na bino ya elako, makabo na bino ya bolingo,+ mpe bana ya liboso ya etonga na bino ya bangɔmbɛ mpe ya etonga na bino ya bampate.+ 7 Bino ná bato ya ndako na bino bosengeli kolya kuna liboso ya Yehova Nzambe+ na bino mpe kosepela na misala na bino nyonso,+ mpo Yehova Nzambe na bino apamboli bino.

8 “Bosengeli te kosala ndenge tozali kosala awa lelo, moto na moto azali kosala oyo ezali sembo na miso na ye moko,* 9 mpo bokɔti naino te na esika ya kopema+ mpe na libula oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo. 10 Ntango bokokatisa Yordani+ mpe bokofanda na mokili oyo Yehova Nzambe na bino azali kopesa bino mpo ezala ya bino, akopemisa bino mpenza liboso ya banguna nyonso zingazinga na bino, mpe bokofanda na kimya.+ 11 Esika oyo Yehova Nzambe na bino akopona mpo na kofandisa nkombo na ye, esika yango nde bokomema nyonso oyo nazali kopesa bino mitindo:+ makabo na bino ya kotumba, bambeka na bino, moko ya bandambo zomi+ na bino, likabo ya lobɔkɔ na bino mpe likabo na bino nyonso ya elako oyo bosali ya kopesa Yehova. 12 Bokosepela liboso ya Yehova Nzambe+ na bino, bino ná bana na bino ya mibali, bana na bino ya basi, baombo na bino ya mibali ná ya basi mpe Balevi oyo bazali na kati ya bingumba* na bino, mpo bapesaki bango likabo te to libula te elongo na bino.+ 13 Bókeba, bópesa te makabo na bino ya kotumba na esika mosusu nyonso oyo bokomona.+ 14 Bosengeli kopesa makabo na bino ya kotumba kaka na esika oyo Yehova akopona na teritware ya moko ya mabota na bino, mpe kuna nde bokosalela mitindo nyonso oyo nazali kopesa bino.+

15 “Kasi ntango nyonso oyo bokozala na mposa na yango,* bokoki koboma nyama mpe kolya mosuni,+ na kolanda ndenge Yehova Nzambe na bino apamboli bino na bingumba na bino nyonso.* Moto ya mbindo mpe moto ya pɛto bakoki kolya yango, kaka ndenge balyaka mboloko to nyama ebengami serfe. 16 Kasi bosengeli te kolya makila;+ bokosopa yango na mabele lokola mai.+ 17 Bakopesa bino nzela te ya kolya na kati ya bingumba* na bino moko ya bandambo zomi ya mbuma* na bino, ya vinyo na bino ya sika, ya mafuta na bino, bana ya liboso ya bangɔmbɛ na bino mpe bana ya liboso ya bampate+ na bino, likabo na bino nyonso ya elako oyo bolakaki kopesa, makabo na bino ya bolingo, to likabo ya lobɔkɔ na bino. 18 Bokolya yango liboso ya Yehova Nzambe na bino, na esika oyo Yehova Nzambe na bino akopona:+ bino ná bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi, ná baombo na bino ya mibali mpe ya basi mpe Balevi oyo bazali na kati ya bingumba* na bino; mpe bokosepela liboso ya Yehova Nzambe na bino mpo na misala na bino nyonso. 19 Ntango nyonso bokofanda na mabele na bino, bókeba ete bósundola Balevi te.+

20 “Ntango Yehova Nzambe na yo akokómisa teritware na yo monene,+ kaka ndenge apesi yo elaka,+ mpe okoloba ete: ‘Nazali na mposa ya kolya mosuni,’ mpo lokola okoyoka mposa ya kolya mosuni, okolya mosuni ntango nyonso oyo olingi.+ 21 Soki esika oyo Yehova Nzambe na yo aponi mpo na kotya nkombo na ye+ ezali mosika na yo, osengeli koboma nyama oyo euti na etonga na yo ya bangɔmbɛ to oyo ya bampate oyo Yehova apesi yo, kaka ndenge napesaki yo mitindo, mpe osengeli kolya yango na kati ya bingumba* na yo ntango nyonso oyo okozala na mposa na yango.* 22 Okoki kolya yango kaka ndenge balyaka mboloko mpe nyama ebengami serfe:+ moto ya mbindo mpe moto ya pɛto bango nyonso bakoki kolya yango. 23 Zwá kaka ekateli makasi ya kolya makila te,+ mpo makila ezali bomoi*+ mpe osengeli te kolya bomoi* elongo na mosuni. 24 Osengeli kolya yango te. Okosopa yango na mabele lokola mai.+ 25 Osengeli kolya yango te, mpo makambo na yo mpe ya bana oyo bakoya nsima na yo etambola malamu, mpo ozali kosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova. 26 Ntango okoya na esika oyo Yehova aponi, okomema kaka biloko mosantu na yo mpe makabo na yo ya elako. 27 Okopesa makabo na yo ya kotumba, mosuni ná makila,+ likoló ya etumbelo ya Yehova Nzambe na yo, mpe makila ya bambeka na yo ekosopama na nse ya etumbelo+ ya Yehova Nzambe na yo, kasi okoki kolya mosuni.

28 “Kebá ete otosa maloba nyonso oyo nazali kopesa yo mitindo, mpo makambo na yo mpe ya bana oyo bakoya nsima na yo etambola ntango nyonso malamu, mpo ozali kosala oyo ezali malamu mpe sembo na miso ya Yehova Nzambe na yo.

29 “Ntango Yehova Nzambe na yo akosilisa bikólo oyo olingi kobɔtɔla bango mokili,+ mpe ntango okofanda na mokili na bango, 30 kebá ete ozwama te na motambo na bango nsima ya kosilisa bango liboso na yo. Kotuna te mpo na banzambe na bango ete: ‘Ndenge nini bikólo oyo bazalaki kosalela banzambe na bango? Ngai mpe nakosala kaka bongo.’+ 31 Osengeli kosala bongo te mpo na Yehova Nzambe na yo, mpo bango basalelaka banzambe na bango eloko nyonso oyo Yehova ayini, batumbaka ata bana na bango ya mibali mpe ya basi na mɔtɔ mpo na banzambe na bango.+ 32 Okokeba ete osalela liloba nyonso oyo nazali kopesa yo mitindo.+ Okobakisa eloko te likoló na yango mpe okolongola eloko te na yango.+

13 “Soki mosakoli moko to moto oyo ayebisaka makambo oyo ekoya na nzela ya bandɔtɔ abimi kati na bino mpe apesi bino elembo to likamwisi, 2 mpe elembo to likamwisi yango ekokisami wana azali koloba ete: ‘Tólanda banzambe mosusu,’ banzambe oyo boyebi te, ‘mpe tósalela bango,’ 3 bosengeli te koyoka maloba ya mosakoli to ya moto yango oyo alɔtaka bandɔtɔ,+ mpo Yehova Nzambe na bino azali komeka bino+ mpo na koyeba soki bolingaka Yehova Nzambe na bino na motema na bino mobimba mpe na molimo* na bino mobimba.+ 4 Yehova Nzambe na bino nde bokolanda, ye nde bokobanga, mitindo na ye nde bokotosa, mongongo na ye nde bokoyoka, ye nde bokosalela, mpe bokokangama kaka na ye.+ 5 Kasi mosakoli to moto yango oyo alɔtaka bandɔtɔ asengeli kobomama,+ mpo alobeli likambo ya kotombokela Yehova Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na mokili ya Ezipito mpe asikoli bino na mokili epai bozalaki baombo.* Moto yango alingi kolongola bino na nzela oyo Yehova Nzambe na bino apesi bino mitindo bótambola na yango. Mpe bosengeli kolongola oyo ezali mabe kati na bino.+

6 “Soki ndeko na yo, mwana ya mama na yo, to mwana na yo ya mobali to ya mwasi to mwasi na yo oyo olingaka mingi to moninga na yo ya motema* aluki kobenda yo na nkuku, na maloba oyo: ‘Tókende mpe tósalela banzambe mosusu,’+ banzambe oyo yo to bankɔkɔ na yo boyebi te, 7 banzambe ya bato ya bikólo oyo bazali zingazinga na bino, ezala bazali penepene to mosika na bino, banda na nsuka moko ya mokili tii na nsuka mosusu ya mokili, 8 osengeli te kosala ndenge alingi to koyoka ye,+ okomonisela ye motema mawa te, okoyokela ye mawa te, okobatela ye mpe te; 9 kasi, osengeli mpenza koboma ye.+ Lobɔkɔ na yo esengeli kozala lobɔkɔ ya liboso oyo ekokitela ye mpo na koboma ye, mpe na nsima lobɔkɔ ya bato nyonso.+ 10 Mpe osengeli kobamba ye mabanga tii akokufa,+ mpo alukaki kosala ete otika Yehova Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito, epai bozalaki baombo. 11 Boye Yisraele mobimba ekoyoka mpe ekobanga, mpe kati na bino moto moko te akosala lisusu likambo ya mabe lokola wana.+

12 “Soki na moko ya bingumba na yo oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo mpo na kofanda kuna oyoki balobi ete: 13 ‘Bato ya mpambampamba babimi epai na yo mpo na koluka kobungisa bato oyo bafandi na engumba na bango nzela, na maloba oyo: “Tókende mpe tósalela banzambe mosusu,” banzambe oyo boyebi te,’ 14 bosengeli koluka koyeba mpe kotalela likambo yango mpe kotunatuna malamumalamu+ mpe soki likambo yango ezali solo, ete likambo yango oyo eyinamá esalemi kati na bino, 15 bokoboma mpenza bato oyo bafandi na engumba yango na mopanga.+ Na mopanga, bokoboma eloko nyonso oyo ezali kuna, ná banyama na yango ya mboka.+ 16 Na nsima bokosangisa biloko na yango nyonso oyo bopunzi na katikati ya esika na yango monene ya bato nyonso, bokozikisa engumba yango na mɔtɔ ná biloko na yango oyo epunzami mpo ezala likabo mobimba oyo epesami na Yehova Nzambe na bino. Yango ekokóma engumba oyo babebisi mpo na libela. Ekotongama lisusu ata moke te. 17 Lobɔkɔ na bino ekozwa ata eloko te na biloko oyo etyamaki pembeni mpo ebebisama,*+ mpo Yehova atika nkanda na ye ya kongala mpe ayokela bino mawa mpe amonisela bino motema mawa mpe akómisa bino mingi, kaka ndenge alapelaki bankɔkɔ na bino ndai.+ 18 Mpo bosengeli kotosa Yehova Nzambe na bino,* mpe kobatela mitindo na ye nyonso oyo nazali kopesa bino lelo. Na bongo bokosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova Nzambe+ na bino.

14 “Bino bozali bana ya Yehova Nzambe na bino. Bókatakata nzoto na bino te+ mpe bókokola mankiki na bino te* mpo na moto oyo akufi.+ 2 Mpo bozali ekólo moko mosantu+ na miso ya Yehova Nzambe na bino, mpe Yehova aponi bino mpo bókóma ekólo na ye, eloko na ye moko,* kati na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na mabele.+

3 “Bosengeli te kolya ata eloko moko oyo eyinamá.+ 4 Talá lolenge ya nyama oyo bokoki kolya:+ ngɔmbɛ, mpate, ntaba, 5 serfe, mboloko ná shevreye, ntaba ya zamba ná mbuli ya esobe, mpate ya zamba ná ntaba ya ngomba;* 6 bokoki kolya nyama nyonso oyo sabo na yango ekabwaná na mibale, oyo enyamutaka lisusu biloko oyo euti na libumu na yango. 7 Kasi bosengeli kolya te lolenge ya banyama oyo elandi, oyo enyamutaka lisusu biloko oyo ebimi na libumu to oyo sabo na yango ekabwaná na mibale: kamela, simbiliki ná simbiliki ya mabanga, mpo enyamutaka lisusu biloko oyo ebimi na libumu, kasi sabo na yango ekabwaná te. Ezali mbindo mpo na bino.+ 8 Ná ngulu, mpo sabo na yango ekabwaná kasi enyamutaka lisusu te biloko oyo ebimi na libumu na yango. Ezali mbindo mpo na bino. Bosengeli te kolya mosuni na yango to kosimba bibembe na yango.

9 “Na biloko nyonso oyo ezali na kati ya mai, talá oyo bokoki kolya: eloko nyonso oyo ezali na binyanyeli mpe na ekayi.*+ 10 Kasi bosengeli kolya te eloko nyonso oyo ezangi binyanyeli mpe ekayi.* Ezali mbindo mpo na bino.

11 “Bokoki kolya ndɛkɛ nyonso ya pɛto. 12 Kasi bosengeli kolya oyo te: mpongo, kombekombe oyo ekangaka mbisi, engondo ya moindo,+ 13 kombekombe ya motane, kombekombe ya moindo, lolenge nyonso ya kombekombe, 14 lolenge nyonso ya yanganga,* 15 maligbanga,* esulungutu, libata ya mbu, lolenge nyonso ya kombekombe ya matɔnɔmatɔnɔ, 16 esulungutu ya moke, esulungutu ya matoi milai, libata ya mai, 17 libeki, engondo, lingongo, 18 nkɔngi, lolenge nyonso ya ndɛkɛ babengi punzebale, hupu ná ngembo. 19 Ekelamu nyonso oyo ezali na mapapu,* oyo etondanaka, ezali mpe mbindo mpo na bino. Esengeli kolyama te. 20 Bokoki kolya ekelamu nyonso ya pɛto oyo epumbwaka.

21 “Bosengeli te kolya nyama oyo ekufi yango moko.+ Bokoki kopesa yango moto oyo afandi mopaya, oyo azali na kati ya bingumba* na bino, mpe ye akoki kolya yango, to bokoki mpe kotɛkɛla yango mopaya. Mpo bozali ekólo moko mosantu mpo na Yehova Nzambe na bino.

“Bosengeli te kotɔkisa mwana-ntaba na kati ya miliki ya mabɛlɛ ya mama na yango.+

22 “Osengeli mpenza kopesa moko ya bandambo zomi* ya eloko nyonso ya milona na yo, oyo ebotaka na elanga na yo mbula na mbula.+ 23 Okolya moko ya bandambo zomi ya mbuma* na yo, ya vinyo na yo ya sika, ya mafuta na yo, ná bana ya liboso ya etonga na yo ya bangɔmbɛ mpe oyo ya bampate liboso ya Yehova Nzambe na yo, na esika oyo ye akopona mpo na kofandisa nkombo+ na ye kuna, mpo oyekola kobanga Yehova Nzambe na yo ntango nyonso.+

24 “Kasi, soki mobembo eleki molai mpo na yo, mpe okokoka te komema moko ya bandambo zomi yango na esika oyo Yehova Nzambe na yo akopona mpo na kotya nkombo+ na ye kuna, mpo eleki mosika na esika ofandi, (mpo Yehova Nzambe na yo akopambola yo), 25 okozwa mbongo na esika na yango, mpe ná mbongo na yo na mabɔkɔ, okosala mobembo tii na esika oyo Yehova Nzambe na yo akopona. 26 Na mbongo yango okoki mpe kosomba eloko nyonso oyo olingi:* bangɔmbɛ, bampate, bantaba, vinyo ná masanga oyo elangwisaka, mpe eloko nyonso oyo osepeli na yango;* mpe okolya kuna liboso ya Yehova Nzambe na yo mpe okosepela, yo ná bato ya ndako na yo.+ 27 Mpe kosundola te Molevi oyo azali na kati ya bingumba+ na yo, mpo bapesaki ye likabo te mpe libula te elongo na yo.+

28 “Na nsuka ya mbula misato nyonso, okobimisa moko ya bandambo zomi nyonso ya mbuma na yo na mbula yango, mpe okotya yango na kati ya bingumba+ na yo. 29 Bongo Molevi, oyo bapesaki ye likabo te mpe libula te elongo na yo, moto oyo afandi mopaya, mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá, oyo bazali na kati ya bingumba na yo, bakoya, bakolya mpe bakotonda,+ mpo Yehova Nzambe na yo apambola yo na nyonso oyo ozali kosala.+

15 “Na nsuka ya mbula nsambo nyonso, okolongola nyongo ya mozalani na yo.+ 2 Talá ndenge okolongola nyongo yango: Modefisi nyonso akolongola nyongo oyo apesaki moninga na ye. Akosɛnga te mozalani na ye to ndeko na ye afuta nyongo yango, mpo ekosakolama ete bálongola nyongo mpo na Yehova.+ 3 Okoki kosɛnga mopaya afuta nyongo,+ kasi okolongola nyongo nyonso ya ndeko na yo. 4 Nzokande, moto moko te kati na yo asengeli kokóma mobola, mpo Yehova akopambola yo mpenza+ na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo lokola libula mpo na kozwa yango, 5 kaka soki oyoki mpenza mongongo ya Yehova Nzambe na yo mpe otosi malamumalamu mitindo nyonso oyo nazali kopesa yo lelo.+ 6 Mpo Yehova Nzambe na yo akopambola yo kaka ndenge apesi yo elaka, mpe okodefisa* bikólo mingi, kasi okozala na ntina ya kodefa te;+ mpe okoyangela bikólo mingi, kasi yango ekoyangela yo te.+

7 “Soki na kati na bino ndeko na yo moko akómi mobola na moko ya bingumba na yo, na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, kokómisa motema na yo makasi te to kokangela ndeko na yo oyo azali mobola lobɔkɔ te.+ 8 Osengeli kofungolela ye lobɔkɔ, kokabela ye+ mpe kodefisa ye nyonso* oyo azali na yango mposa to eloko oyo azangi. 9 Kebá ete liloba moko te ya mabe ezala na kati ya motema na yo mpe oloba ete: ‘Mbula ya nsambo, mbula ya kolongola nyongo, ezali kopusana,’+ mpe ozanga kokabela ndeko na yo oyo azali mobola mpe opesa ye eloko te. Soki aleleli Yehova, yango ekokómela yo lisumu.+ 10 Osengeli kopesa ye na esengo,+ mpe okopesa ye na mitema mibale te, bongo nde Yehova Nzambe na yo akopambola yo na makambo na yo nyonso mpe na misala na yo nyonso.+ 11 Mpo babola bakozala ntango nyonso na mokili.+ Yango wana nazali kopesa yo mitindo ete: ‘Osengeli kofungola lobɔkɔ na yo mpo na kokabela ndeko na yo oyo azali moto ya mpasi mpe mobola na mokili na yo.’+

12 “Soki osombi ndeko na yo Moebre ya mobali to ya mwasi, mpe asaleli yo mbula motoba, na mbula ya nsambo okotika ye akende.+ 13 Mpe soki otiki ye akende, kotika ye akende mabɔkɔ mpamba te. 14 Okopesa ye na esengo eloko oyo euti na etonga na yo ya bampate, na esika na yo ya kotutatuta mbuma, ekamwelo na yo ya mafuta mpe ya vinyo. Okopesa ye na kotalela ndenge oyo Yehova Nzambe na yo apamboli yo. 15 Kobosana te ete okómaki moombo na mokili ya Ezipito mpe Yehova Nzambe na yo asikolaki yo. Yango wana nazali kopesa yo mitindo osala bongo lelo.

16 “Kasi soki alobi na yo ete: ‘Nakolongwa epai na yo te!’ mpo alingaka yo ná bato ya ndako na yo mpe azalaki na esengo ntango azalaki epai na yo,+ 17 osengeli kozwa etubeli mpe kotya litoi na ye na porte, kotɔbɔla ye na yango, mpe akokóma moombo na yo mpo na libela. Okosala mpe bongo epai ya moombo na yo ya mwasi. 18 Komona te ete ezali likambo ya mpasi ntango okotika ye akende, mpo mbula motoba oyo asalelaki yo mosala ezali mbala mibale lifuti ya moto oyo bazwi na mosala, mpe Yehova Nzambe na yo apamboli yo na likambo nyonso osalaki.

19 “Okosantisa mwana mobali nyonso ya liboso ya nyama ya etonga na yo ya bangɔmbɛ mpe oyo ya bampate mpo na Yehova Nzambe na yo.+ Osengeli te kosala mosala na mwana ya liboso ya etonga na yo ya bangɔmbɛ to kokata nsuki ya mwana ya liboso ya etonga na yo ya bampate. 20 Okolya yango, yo ná bato ya ndako na yo, mbula na mbula liboso ya Yehova Nzambe na yo na esika oyo Yehova akopona.+ 21 Kasi soki ezali na mbeba: etɛngumaka, ekufá miso to ezali na mbeba mosusu ya makasi, osengeli te kopesa yango mbeka epai ya Yehova Nzambe na yo.+ 22 Okolya yango na kati ya bingumba* na yo, moto ya pɛto ná moto ya mbindo bango nyonso bakolya yango, lokola nde ezalaki mboloko to nyama ebengami serfe.+ 23 Kasi osengeli te kolya makila na yango;+ okosopa yango na mabele lokola mai.+

16 “Kanisá sanza ya Abibe,* mpe salá Elekeli mpo na Yehova Nzambe na yo,+ mpo na sanza ya Abibe, Yehova Nzambe na yo abimisaki yo na Ezipito na butu.+ 2 Mpe okopesa Yehova Nzambe na yo mbeka ya likabo ya Elekeli,+ oyo euti na etonga ya bampate mpe ya bangɔmbɛ,+ na esika oyo Yehova aponi mpo na kofandisa nkombo+ na ye. 3 Osengeli te kolya eloko moko oyo etyami levire elongo na mbeka yango;+ mikolo nsambo okolya mampa ezangá levire, mampa ya ntango ya mpasi, mpo obimaki mbangumbangu na mokili ya Ezipito.+ Salá yango, mpo ntango nyonso oyo okozala na bomoi, okanisa mokolo oyo obimaki na mokili ya Ezipito.+ 4 Levire ekomonana te epai na yo na teritware na yo mobimba mikolo nsambo;+ ata eteni moko te ya mosuni, oyo okopesa mbeka na mpokwa na mokolo ya liboso, ekotikala butu mobimba tii na ntɔngɔ.+ 5 Bakopesa yo nzela te ya kopesa mbeka ya likabo ya Elekeli na moko ya bingumba oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo. 6 Kasi ekosalema na esika oyo Yehova Nzambe na yo aponi mpo na kofandisa nkombo na ye. Okopesa mbeka ya likabo ya Elekeli na mpokwa na ntango moi ekolala,+ na mokolo* oyo obimaki na Ezipito. 7 Osengeli kolamba yango mpe kolya yango+ na esika oyo Yehova Nzambe na yo akopona.+ Na ntɔngɔ okoki kozonga na bahema na yo. 8 Mikolo motoba, okolya limpa ezangá levire, mpe na mokolo ya nsambo, ekozala liyangani moko monene mpo na Yehova Nzambe na yo. Osengeli kosala mosala moko te.+

9 “Okotánga pɔsɔ nsambo. Okobanda kotánga pɔsɔ nsambo yango banda ntango oyo olekisi likwangola mpo na mbala ya liboso na ɔrjɛ oyo ezali naino ya kotɛlɛma.+ 10 Na nsima, okosala fɛti ya Bapɔsɔ mpo na Yehova Nzambe na yo,+ ná likabo ya bolingo oyo euti na lobɔkɔ na yo. Oyo okopesa eyokana na ndenge oyo Yehova Nzambe na yo apamboli yo.+ 11 Mpe osengeli kosepela liboso ya Yehova Nzambe na yo, yo ná mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, moombo na yo ya mobali ná ya mwasi, Molevi oyo azali na kati ya bingumba* na yo, moto oyo afandi mopaya, mwana oyo tata akufá, mpe mwasi oyo mobali akufá, baoyo bazali epai na yo, na esika oyo Yehova Nzambe na yo aponi mpo na kofandisa nkombo+ na ye. 12 Kobosana te ete okómaki moombo na Ezipito;+ na yango tosá mpe kokisá malako oyo.

13 “Ntango okosilisa koyanganisa biloko oyo euti na esika na yo ya kotutatuta mbuma mpe ya ekamwelo na yo ya mafuta mpe ya vinyo, okosala fɛti ya Bandako ya matiti*+ mikolo nsambo. 14 Sepelá na boumeli ya fɛti na yo,+ yo ná mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, moombo na yo ya mobali ná ya mwasi, Molevi, moto oyo afandi mopaya, mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá, baoyo bazali na kati ya bingumba na yo. 15 Mikolo nsambo, okosala fɛti+ mpo na Yehova Nzambe na yo na esika oyo Yehova aponi, mpo Yehova Nzambe na yo akopambola biloko na yo nyonso mpe nyonso oyo ozali kosala,+ mpe okotonda mpenza na esengo.+

16 “Mbala misato na mbula, mobali nyonso akokende liboso ya Yehova Nzambe na yo na esika oyo ye aponi: na fɛti ya Limpa ezangá levire,+ fɛti ya Bapɔsɔ,+ mpe na fɛti ya Bandako ya matiti,*+ mpe moto moko te akomonana liboso ya Yehova mabɔkɔ mpamba. 17 Likabo oyo moto na moto akomema ekoyokana na ndenge oyo Yehova Nzambe na yo apamboli ye.+

18 “Okotya basambisi+ mpe bakapita na libota mokomoko na bingumba* na yo nyonso oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, mpe bango basengeli kosambisa bato na bosembo. 19 Osengeli te kobongola lisambisi,+ kopona bilongi+ to kondima kanyaka, mpo kanyaka ebomaka miso ya bato ya bwanya+ mpe ebulunganisaka maloba ya bato ya sembo. 20 Okolanda nzela ya bosembo,+ mpo okoba kozala na bomoi mpe ozwa mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.

21 “Okolona te ata nzete ya lolenge nini mpo ezala nzete ya losambo*+ pembeni ya etumbelo ya Yehova Nzambe na yo.

22 “Okotɛlɛmisa mpe te likonzí moko ya losambo mpo na yo moko,+ eloko oyo Yehova Nzambe na yo ayinaka.

17 “Osengeli te kopesa Yehova Nzambe na yo mbeka ya ngɔmbɛ to ya mpate oyo ezali na mbeba, to oyo ezali na eloko nyonso ya mabe, mpo ekozala likambo oyo Yehova Nzambe na yo ayinaka.+

2 “Kanisá ete na kati na bino, na moko ya bingumba oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, bakuti mobali moko to mwasi moko azali kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova Nzambe na yo mpe azali kobuka kondimana na ye,+ 3 mpe moto yango abungi nzela mpe asambeli banzambe mosusu, agumbameli bango to agumbameli moi to sanza to limpinga nyonso ya likoló,+ eloko oyo napesi mitindo te.+ 4 Ntango bayebisi yo likambo yango to oyoki yango, okoluka koyeba likambo yango malamumalamu. Soki emonani ete ezali solo+ ete likambo yango oyo eyinamá esalemi na Yisraele, 5 osengeli komema mobali yango to mwasi yango oyo asali likambo yango ya mabe na baporte ya engumba, mpe basengeli kobamba mobali yango to mwasi yango mabanga tii akokufa.+ 6 Moto yango oyo asengeli kokufa, akobomama na litatoli* ya bato mibale to misato.+ Asengeli te kobomama mpo na litatoli ya moto moko.+ 7 Mabɔkɔ ya batatoli yango ekozala mabɔkɔ ya liboso oyo ekokitela ye mpo na koboma ye, mpe na nsima lobɔkɔ ya bato nyonso. Osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.+

8 “Soki likambo moko ebimi na moko ya bingumba na yo mpe ezali mpasi mpenza mpo na kosambisa yango, ezala likambo oyo etali kosopa makila+ to mpo na kolongisa lotomo ya moto, to likambo moko ya mabe oyo esalemi, to makambo mosusu ya kowelana, osengeli kotɛlɛma mpe kokende na esika oyo Yehova Nzambe na yo aponi.+ 9 Kende epai ya banganga-nzambe Balevi mpe mosambisi+ oyo azali na mosala na mikolo yango, yebisá bango likambo na yo, mpe bakoyebisa yo ekateli mpo na likambo yango.+ 10 Na nsima, osengeli kosala na kolanda ekateli oyo bakoyebisa yo na esika oyo Yehova aponi. Landá malako nyonso oyo bakopesa yo. 11 Osengeli kosala na kolanda mobeko oyo bakolakisa yo mpe na kolanda ekateli oyo bakoyebisa yo.+ Osengeli kolanda malamumalamu ekateli oyo bakoyebisa yo.+ 12 Moto oyo akosala makambo na lofundo mpe akoboya koyokela nganga-nzambe oyo azali kosalela Yehova Nzambe na yo to mosambisi, asengeli kokufa.+ Osengeli kolongola oyo ezali mabe na Yisraele.+ 13 Bato nyonso bakoyoka mpe bakobanga, bongo bakosala lisusu makambo na lofundo te.+

14 “Ntango okokɔta na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, ntango okozwa yango mpe ntango okofanda kuna, mpe soki olobi ete: ‘Natya mokonzi moko likoló na ngai, lokola bikólo nyonso oyo ezali zingazinga na ngai,’+ 15 boye, okotya mpenza mokonzi oyo Yehova Nzambe na yo akopona.+ Okotya mokonzi oyo akouta na kati ya bandeko na yo. Opesami nzela te ya kotya likoló na yo mopaya oyo azali ndeko na yo te. 16 Kasi mokonzi yango asengeli te kobakisa bampunda mingi mpo na ye+ to kozongisa bato na Ezipito mpo na kobakisa bampunda mingi,+ mpamba te Yehova alobaki na bino ete: ‘Bosengeli ata moke te kozonga lisusu na nzela oyo.’ 17 Asengeli mpe te kokóma na basi ebele, noki motema na ye epɛngwa;+ asengeli mpe te kobakisa palata mpe wolo mingi mpenza mpo na ye.+ 18 Ntango akofanda na kiti ya bokonzi na ye, asengeli kokoma mpo na ye moko na buku* mosusu kopi ya Mobeko oyo, oyo ezali epai ya banganga-nzambe Balevi.+

19 “Akobatela yango epai na ye, mpe asengeli kotánga yango mikolo nyonso ya bomoi na ye,+ mpo ayekola kobanga Yehova Nzambe na ye, atosa mpe asalela maloba nyonso ya Mobeko oyo mpe malako oyo.+ 20 Na ndenge yango, motema na ye ekomitombola te likoló ya bandeko na ye, mpe akopɛngwa na mitindo te, akotosa mobeko yango, mpo aumela mingi na bokonzi na ye na kati ya Yisraele, ye ná bana na ye.

18 “Banganga-nzambe Balevi, mpe na nsima libota mobimba ya Levi, bakopesa bango likabo te mpe libula te elongo na Yisraele. Bakolya makabo oyo batumbeli Yehova na mɔtɔ, makabo oyo ezali eteni na ye.+ 2 Bongo bakozala na libula ata moko te na kati ya bandeko na bango. Yehova azali libula na bango, kaka ndenge alobi na bango.

3 “Oyo nde ekozala lotomo ya banganga-nzambe epai ya bato: Moto nyonso oyo apesi mbeka, ezala ya ngɔmbɛ to ya mpate, asengeli kopesa nganga-nzambe lipeka, mbanga mpe likundu. 4 Okopesa ye mbuma ya liboso ya milona na yo, ya vinyo na yo ya sika, ya mafuta na yo mpe nsuki ya liboso oyo bakati bampate na yo.+ 5 Yehova Nzambe na yo aponi ye ná bana na ye, kati na mabota na yo nyonso mpo na kosala mosala na nkombo ya Yehova ntango nyonso.+

6 “Kasi soki Molevi alongwe na moko ya bingumba na yo na Yisraele, epai azalaki kofanda+ mpe asepeli* kokende na esika oyo Yehova aponi,*+ 7 akoki kosala mosala kuna na nkombo ya Yehova Nzambe na ye lokola bandeko na ye nyonso, Balevi, oyo batɛlɛmi kuna liboso ya Yehova.+ 8 Akozwa bilei ndenge moko na bango,+ longola oyo azwaka na biloko oyo atɛki, oyo euti na bankɔkɔ na ye.

9 “Ntango okokɔta na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, osengeli te koyekola kosala makambo oyo eyinamá ya bikólo yango.+ 10 Epai na yo moto ya lolenge oyo asengeli kozala te: moto oyo alekisi mwana na ye ya mobali to ya mwasi mbeka na mɔtɔ,+ moto oyo azali kosakola makambo oyo ebombaná,+ moto ya misala ya maji,+ moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya+ to moto oyo azali nganga-nkisi,+ 11 moto oyo azali kolɔka bato mosusu, moto oyo azali kotuna makambo epai ya moto oyo asololaka na bilimo+ to moto oyo asakolaka makambo ekoya,+ to moto oyo azali kotuna bakufi.+ 12 Mpo Yehova ayinaka moto nyonso oyo asalaka makambo yango, mpe Yehova Nzambe na yo azali kobengana bikólo yango liboso na yo mpo ezali kosala makambo oyo eyinamá. 13 Osengeli kozala na mbeba te na miso ya Yehova Nzambe na yo.+

14 “Mpo bikólo yango oyo ozali kobengana ezalaki koyokela bato oyo basalaka misala ya maji+ mpe baoyo basakolaka makambo oyo ebombaná,+ kasi Yehova Nzambe na yo apesi yo nzela te ya kosala eloko ya ndenge wana. 15 Yehova Nzambe na yo akobimisela yo na kati ya bandeko na yo, mosakoli moko lokola ngai. Osengeli koyoka ye.+ 16 Yango nde osɛngaki Yehova Nzambe na yo na Horebe na mokolo ya liyangani*+ ntango olobaki ete: ‘Kotika te nayoka mongongo ya Yehova Nzambe na ngai to namona lisusu mɔtɔ monene oyo, mpo nakufa te.’+ 17 Mpe Yehova alobaki na ngai ete: ‘Makambo oyo balobi ezali malamu. 18 Nakobimisela bango mosakoli moko lokola yo,+ oyo akouta na kati ya bandeko na bango, mpe nakotya maloba na ngai na monɔkɔ na ye,+ mpe akoyebisa bango mitindo nyonso oyo nakopesa ye.+ 19 Kasi moto oyo akoyoka te maloba na ngai oyo mosakoli yango akoloba na nkombo na ngai, nakosɛnga ye azongisa monɔkɔ.+

20 “‘Soki na lofundo nyonso mosakoli moko alobi na nkombo na ngai liloba oyo napesi ye mitindo te ya koloba to alobi na nkombo ya banzambe mosusu, mosakoli yango asengeli kokufa.+ 21 Kasi, soki olobi na motema na yo ete: “Ndenge nini tokoyeba ete Yehova alobi liloba oyo te?” 22 Soki mosakoli alobi na nkombo ya Yehova mpe liloba yango ekokisami te to esalemi te, wana ezali liloba oyo Yehova alobi te. Mosakoli alobaki yango na lofundo. Osengeli kobanga ye te.’

19 “Ntango Yehova Nzambe na yo akobebisa bikólo ya mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, mpe okobengana bango, okofanda na bingumba na bango mpe na bandako na bango,+ 2 okopona bingumba misato na kati ya mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo mpo ozwa yango.+ 3 Okokabola na biteni misato teritware ya mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo akopesa yo mpo ezala ya yo, mpe okobongisa banzela mpo moto nyonso oyo abomi moto akima na moko ya bingumba yango.

4 “Talá oyo moto oyo abomi moto akoki kosala mpo atikala na bomoi: Soki abɛti mozalani na ye na nko te, mpe azalaki koyina ye te liboso;+ 5 to soki akei ná mozalani na ye na zamba mpo na kolɔkɔta nkoni, mpe atomboli lobɔkɔ na ye mpo na kokata nzete na epasola* mpe ebende elongwe na esimbeli na yango, ebɛti mozalani na ye mpe akufi, moto oyo abomi moto yango akokima na moko ya bingumba yango mpo atikala na bomoi.+ 6 Soki asali bongo te, lokola mozongisi mabe mpo na makila+ azali na nkanda,* akoki kolanda mobomi-moto yango, kozwa ye mpe koboma ye, mpo nzela ezalaki molai mpenza tii kokóma na engumba. Nzokande, asengelaki kokufa te, mpo azalaki koyina mozalani na ye te liboso.+ 7 Yango wana nazali kopesa yo mitindo oyo: ‘Poná bingumba misato.’

8 “Soki Yehova Nzambe na yo akómisi teritware na yo monene ndenge alapelaki bankɔkɔ na yo ndai,+ mpe apesi yo mokili mobimba oyo alakaki ete akopesa bankɔkɔ na yo+ 9 —soki otosi malamumalamu mitindo oyo nyonso, oyo nazali kopesa yo lelo, elingi koloba, kolinga Yehova Nzambe na yo mpe kotambola na banzela na ye ntango nyonso+—, bongo osengeli kobakisa bingumba misato mosusu na misato ya liboso.+ 10 Na ndenge yango makila ya moto oyo azali na likambo te ekosopama te+ na mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo libula, mpe okomema ngambo ya makila ata moko te.+

11 “Kasi soki moto moko ayinaki mozalani na ye,+ mpe azeli ye mpo na kobundisa ye mpe abɛti ye* mabe mpenza tii akufi, mpe moto yango akimi na moko ya bingumba yango, 12 bankulutu ya engumba na ye bakotinda moto aluka ye kuna, mpe bakopesa ye na lobɔkɔ ya mozongisi mabe mpo na makila, mpe asengeli kokufa.+ 13 Osengeli te* koyokela ye mawa, mpe osengeli kolongola ngambo ya makila ya moto oyo azali na likambo te na Yisraele,+ mpo ozala malamu.

14 “Ntango okozwa libula na yo na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo mpo ozwa yango, osengeli te kopusa bilembo ya ndelo ya mabele ya mozalani na yo,+ bilembo oyo bankɔkɔ basilá kotya.

15 “Motatoli moko mpamba akoki te kokweisa* moto mpo na libunga to lisumu nyonso oyo akoki kosala.+ Na maloba* ya batatoli mibale to misato nde likambo ekondimama.+ 16 Soki motatoli azali na likanisi ya kosala moto mabe mpe afundi moto yango ete asali likambo moko ya mabe,+ 17 bato yango mibale oyo bazali kowelana bakotɛlɛma liboso ya Yehova, liboso ya banganga-nzambe mpe ya basambisi oyo bakozala na mosala na mikolo yango.+ 18 Basambisi yango bakoluka koyeba likambo yango malamumalamu,+ mpe soki moto yango oyo apesi litatoli azali motatoli ya lokuta mpe likambo oyo afundi ndeko na ye ezali ya lokuta, 19 osengeli kosala ye kaka ndenge akanaki kosala ndeko na ye,+ mpe osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.+ 20 Baoyo batikali bakoyoka mpe bakobanga, mpe moto moko te kati na bino akosala lisusu likambo ya mabe bongo.+ 21 Osengeli* te koyoka mawa:+ bomoi* mpo na bomoi,* liso mpo na liso, lino mpo na lino, lobɔkɔ mpo na lobɔkɔ, lokolo mpo na lokolo.+

20 “Soki okei kobunda na banguna na yo mpe omoni bampunda na bango, makalo ya bitumba na bango, mpe basoda na bango bazali ebele koleka yo, kobanga bango te, mpo Yehova Nzambe na yo oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito azali elongo na yo.+ 2 Ntango bokokóma pene ya kokende etumba, nganga-nzambe akopusana mpe akoloba na bato.+ 3 Akoloba na bango ete: ‘Yoká, Ee Yisraele, bozali kokende kobunda na banguna na bino. Bózala bibangabanga te. Bóbanga bango te mpe bózala na nsɔmɔ te mpe bólɛnga liboso na bango te, 4 mpo Yehova Nzambe na bino azali kotambola elongo na bino mpo na kobundela bino mpe kobikisa bino+ liboso ya banguna na bino.’

5 “Na nsima bakapita bakoloba na bato ete: ‘Nani atongi ndako ya sika mpe asaleli yango naino te? Azonga na ndako na ye. Noki akufa na etumba mpe moto mosusu asalela yango. 6 Mpe nani aloni elanga ya vinyo mpe abandi naino kolya mbuma na yango te? Akende mpe azonga epai na ye. Noki akufa na etumba mpe moto mosusu alya mbuma na yango. 7 Mpe nani alaki mwasi libala mpe abali ye naino te? Akende mpe azonga epai na ye,+ noki akufa na etumba mpe mobali mosusu abala ye.’ 8 Bakapita bakotuna lisusu bato ete: ‘Nani azali kobanga mpe azangi mpiko?+ Azonga epai na ye, mpo alongola mpiko ya bandeko na ye te, ndenge ye azangi yango.’*+ 9 Ntango bakapita bakosilisa koloba na bato, bakotya bakonzi ya mampinga mpo bátambwisa bato.

10 “Soki okómi pene ya kobundisa engumba moko, okoyebisa mpe bato na yango makambo ya kosala mpo kimya ezala.+ 11 Soki bazongiseli yo eyano ya kimya mpe bafungoleli yo baporte, bato nyonso oyo okokuta kuna bakokóma bato na yo ya kosalisa misala ya makasi, mpe bakosalela yo.+ 12 Kasi soki baboyi kozala na kimya elongo na yo mpe babundisi yo, okozinga yango, 13 mpe Yehova Nzambe na yo akopesa engumba yango mpenza na lobɔkɔ na yo, mpe osengeli koboma na mopanga mobali nyonso oyo okokuta kuna. 14 Kasi basi, bana, bibwɛlɛ, mpe eloko nyonso oyo ezali na engumba yango, biloko na yango nyonso oyo epunzami, okoki kozwa yango mpo na yo+ mpe okolya biloko oyo opunzi epai ya banguna na yo, oyo Yehova Nzambe na yo apesi yo.+

15 “Yango nde okosala bingumba nyonso oyo ezali mpenza mosika na yo, oyo ezali pene na bingumba ya bikólo oyo te. 16 Kasi na bingumba ya bato ya bikólo oyo, oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo libula, osengeli kotika ata moto moko te na bomoi.*+ 17 Okosilisa mpenza kosilisa Bahiti, Baamore, Bakanana, Baperizi, Bahivi ná Bayebusi,+ kaka ndenge Yehova Nzambe na yo apesaki yo mitindo; 18 mpo báteya bino te kolanda misala na bango nyonso oyo eyinamá, oyo basaleli banzambe na bango, noki bósalela Yehova Nzambe na bino+ lisumu.

19 “Soki ozingi engumba moko mpo ozwa yango mpe obundisi yango mikolo mingi, okobebisa banzete na yango te mpe okosalela epasola* te mpo na kokata yango. Okoki kolya mbuma na yango, kasi okokata yango te.+ Mpo nzete ya elanga ezali nde moto mpo ozinga yango? 20 Okobebisa kaka nzete oyo oyebi ete esalelamaka te mpo na kolya. Okokata yango mpo na kotonga biloko ya kozinga na yango engumba oyo ozali kobundisa, tii ekokwea.

21 “Soki bakuti moto moko akufi na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo mpo ozwa yango, mpe moto oyo abomi ye ayebani te, 2 bankulutu mpe basambisi+ na yo basengeli kobima mpe komeka molai ya nzela banda esika ebembe ezali tii na bingumba oyo ezali zingazinga. 3 Bongo bankulutu ya engumba oyo ezali penepene mpenza na esika ebembe ezali, bakozwa na etonga mwana-ngɔmbɛ moko ya mwasi, oyo basalá na yango naino mosala te, oyo batyá naino ekanganeli te, 4 mpe bankulutu ya engumba yango basengeli komema mwana-ngɔmbɛ yango na lobwaku* oyo ezali na mai mingi, oyo kati na yango batimolá mabele te mpe baloná mboto te, mpe kuna basengeli kobuka nkingo ya mwana-ngɔmbɛ yango na lobwaku.+

5 “Mpe banganga-nzambe, Balevi, basengeli kozala wana mpo bango nde bato Yehova Nzambe na yo aponá mpo na kosalela ye,+ mpe mpo na kopambola na nkombo ya Yehova.+ Bakoloba ndenge ya kosilisa kowelana nyonso oyo etali kobɛta to koboma moto.+ 6 Bongo bankulutu nyonso ya engumba yango, oyo bazali penepene mpenza na ebembe, bakosukola mabɔkɔ na bango+ likoló ya mwana-ngɔmbɛ yango ya mwasi, oyo babukaki nkingo na yango na lobwaku, 7 mpe bakoloba ete: ‘Mabɔkɔ na biso esopaki makila oyo te, mpe miso na biso emonaki te ntango basopaki yango. 8 Kotya yango te na motó ya bato na yo Yisraele, oyo osikolaki,+ Ee Yehova, mpe kotya te ngambo ya makila ya moto oyo azali na likambo te epai ya bato na yo Yisraele.’+ Mpe ngambo ya makila ekotyama na motó na bango te. 9 Na ndenge yango okolongola epai na yo ngambo ya makila ya moto oyo azali na likambo te, mpo osali oyo ezali sembo na miso ya Yehova.

10 “Soki okei kobunda na banguna na yo mpe Yehova Nzambe na yo apesi bango na lobɔkɔ na yo mpe omemi bango bakangami,+ 11 mpe na kati ya bakangami yango omoni mwasi moko kitoko mingi, osepeli na ye mpe olingi kozwa ye azala mwasi na yo, 12 okoki komema ye na ndako na yo. Akokokola motó na ye, akokata manzaka na ye, 13 mpe akolongola elamba na ye ya mokangami, mpe akofanda na ndako na yo. Akolela tata na ye ná mama na ye sanza mobimba,+ mpe na nsima, okoki kosangisa na ye nzoto; okokóma mobali na ye mpe ye akokóma mwasi na yo. 14 Nzokande soki osepeli na ye te, wana okotika ye akende+ esika nyonso alingi.* Kasi okoki kotɛka ye te na mbongo to kosalela ye makambo na makasi, mpo osili kosambwisa ye.

15 “Soki mobali moko azali na basi mibale mpe alingi moko koleka mosusu,* mpe bango mibale baboteli ye bana mibali, mpe mwana ya mobali ya liboso azali mwana ya mwasi oyo alingami mingi te,+ 16 na mokolo oyo akopesa bana na ye ya mibali libula, akozala na lotomo te ya kokómisa mwana mobali ya mwasi oyo alingami koleka lokola mwana na ye ya liboso na esika ya mwana mobali oyo azali mwana ya liboso ya mwasi oyo alingami mingi te. 17 Akondima mwana mobali ya mwasi oyo alingami mingi te ete azali mwana ya liboso mpenza, mpe akopesa ye biteni mibale ya biloko nyonso oyo azali na yango, mpo mwana yango azali ebandeli ya nguya na ye ya kobota. Lotomo ya mwana ya liboso ezali ya ye.+

18 “Soki moto moko azali na mwana ya motó makasi mpe motomboki, oyo atosaka tata na ye te mpe mama na ye te,+ mpe baluki kosembola ye kasi aboyi koyokela bango,+ 19 tata na ye ná mama na ye bakozwa ye mpe bakomema ye epai ya bankulutu na porte ya engumba na ye 20 mpe bakoloba na bankulutu ya engumba na ye ete: ‘Mwana na biso oyo azali motó makasi mpe motomboki, mpe atosaka biso te. Alyaka na lokoso+ mpe azali molangwi-masanga.’+ 21 Bongo mibali nyonso ya engumba na ye basengeli kobamba ye mabanga tii akokufa. Boye osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo, mpe Yisraele mobimba ekoyoka mpe ekobanga.+

22 “Soki moto moko asali lisumu oyo ebongi na etumbu ya liwa,+ abomami mpe obaki ye na nzete,+ 23 ebembe na ye ekotikala te butu mobimba likoló ya nzete.+ Nzokande, okosala nyonso okunda ye kaka na mokolo yango, mpo ebembe oyo ebakami, ezali eloko oyo Nzambe alakeli mabe,+ mpe okokómisa te mokili na yo mbindo, mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo libula.+

22 “Soki omoni ngɔmbɛ to mpate ya ndeko na yo ebungi nzela, kosala te lokola omoni yango te.+ Osengeli mpenza kozongisa yango epai ya ndeko na yo. 2 Kasi soki ndeko na yo afandaka pene na yo te to oyebi ye te, okomema nyama yango epai na yo, ekotikala wana tii ndeko na yo akoluka yango. Mpe okozongisela ye yango.+ 3 Okosala mpe bongo mpo na mpunda na ye, elamba na ye, eloko nyonso ya ndeko na yo oyo ebungi mpe oyo yo omoni. Osengeli te kosala lokola nde omoni yango te.

4 “Soki omoni mpunda to ngɔmbɛ ya ndeko na yo ekwei na nzela, osengeli kosala te lokola nde omoni yango te. Okosalisa mpenza ndeko na yo mpo na kotɛlɛmisa nyama yango.+

5 “Mwasi asengeli te kolata elamba ya mobali, mpe mobali asengeli te kolata elamba ya mwasi. Mpo moto nyonso oyo asali bongo Yehova Nzambe na yo akoyina ye.

6 “Soki omoni zumbu* ya ndɛkɛ moko na nzela ezali na bana to na maki, ezala na nzete to na mabele, mpe mama afandeli bana to maki, osengeli te kozwa mama ná bana.+ 7 Okotika mpenza mama akende, kasi okoki kozwa bana. Salá bongo mpo makambo na yo etambola malamu mpe ozala na bomoi molai.

8 “Soki otongi ndako ya sika, osengeli mpe kosala efelo ya libateli mpo na nsamba*+ na yo, mpo yo ná bato ya libota na yo bómema ngambo ya makila te soki moto moko akwei uta na nsamba mpe akufi.

9 “Osengeli te kolona mboto ya mitindo mibale na elanga na yo ya vinyo.+ Noki mbuma nyonso oyo mboto yango ekobimisa oyo okolona mpe mbuma ya elanga ya vinyo ebɔtɔlama mpe epesama na esika mosantu.

10 “Osengeli te kokangisa ngɔmbɛ ná mpunda esika moko+ mpo na kosalisa yango mosala ya kobalola mabele ya elanga.

11 “Osengeli te kolata elamba oyo esalemi na lɛnɛ ná lini oyo esangisami esika moko.+

12 “Okosala mbuma ya malenda na nsuka minei ya elamba na yo oyo okolata.+

13 “Soki mobali moko abali mwasi, asangisi na ye nzoto, kasi na nsima akómi koyina ye,* 14 mpe afundi ye ete azalaki na etamboli ya mabe, abebisi lokumu na ye mpe alobi ete: ‘Talá mwasi oyo nabalaki, kasi nsima ya kosangisa na ye nzoto, eloko moko te emonisi ete azalaki ngɔndɔ,’ 15 boye tata ná mama ya mwana mwasi bakomonisa epai ya bankulutu na porte ya engumba likambo oyo endimisi bongɔndɔ ya mwana mwasi yango. 16 Tata ya mwana mwasi yango asengeli koloba na bankulutu ete: ‘Napesaki mwana na ngai ya mwasi epai ya mobali oyo mpo azala mwasi na ye, mpe ye azali koyina ye* 17 mpe azali kofunda ye ete azalaki na etamboli ya mabe, alobi ete: “Nakutaki eloko moko te oyo emonisi ete mwana na yo ya mwasi azalaki ngɔndɔ.” Sikoyo bótala eloko oyo ezali komonisa bongɔndɔ ya mwana na ngai ya mwasi.’ Basengeli kotanda elamba yango liboso ya bankulutu ya engumba. 18 Bankulutu ya engumba+ bakozwa mobali yango mpe bakopesa ye etumbu.+ 19 Bakofutisa ye lomande ya shekele* ya palata 100 mpe bakopesa yango tata ya mwana mwasi, mpo mobali yango asambwisi ngɔndɔ moko ya Yisraele,+ mpe akokoba kozala mwasi na ye. Mobali yango akozala na lotomo te ya koboma libala ná ye ntango nyonso oyo akozala na bomoi.

20 “Kasi, soki efundeli yango ezali solo ete bakuti eloko moko te oyo emonisi ete mwana mwasi yango azalaki ngɔndɔ, 21 bakomema mwana mwasi yango na ekɔtelo ya ndako ya tata na ye, mpe mibali ya engumba na ye bakobamba ye mabanga tii akokufa, mpo asali likambo moko ya nsɔni+ na Yisraele ndenge asalaki pite* na ndako ya tata na ye.+ Osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.+

22 “Soki bakuti mobali moko azali kolala na mwasi ya mobali mosusu, bango mibale basengeli kokufa, mobali oyo alali na mwasi mpe mwasi yango.+ Osengeli kolongola oyo ezali mabe na Yisraele.

23 “Soki ngɔndɔ moko alakami libala na mobali moko, mpe mobali mosusu akutani na ye na engumba mpe alali na ye, 24 bokomema bango mibale na porte ya engumba yango mpe bokobamba bango mabanga tii bakokufa, mwana mwasi mpo agangaki te na kati ya engumba, mpe mobali mpo asambwisi mwasi ya moninga na ye.+ Osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.

25 “Nzokande, soki mobali akuti na zamba mwana mwasi oyo alakami libala, mpe mobali yango akangi ye na makasi mpe alali na ye, mobali yango kaka nde asengeli kokufa, 26 mpe osengeli kosala mwana mwasi eloko te. Asali lisumu te oyo ebongi na liwa. Likambo yango ezali kaka lokola ntango mobali moko abundisi moninga na ye mpe abomi ye.*+ 27 Mpo mobali akutaki ye na zamba, mpe mwana mwasi oyo alakami libala agangaki, kasi moto ya kobikisa ye azalaki te.

28 “Soki mobali moko akutani na mwana mwasi moko, ngɔndɔ oyo alakami libala te, soki akangi ye na makasi mpe alali na ye, mpe bakuti bango,+ 29 mobali oyo alali na ye asengeli kopesa tata ya mwana mwasi yango shekele ya palata 50, mpe akokóma mwasi na ye.+ Lokola asambwisi ye, akozala na lotomo te ya koboma libala na mwasi yango ntango nyonso oyo akozala na bomoi.

30 “Moto moko te akozwa mwasi ya tata na ye, noki asambwisa tata na ye.*+

23 “Mobali nyonso oyo azangi mabinzi mpo epanzaná to oyo bakatá nzoto na ye ya mobali, akoki te kokɔta na lisangá ya Yehova.+

2 “Mwana moko te ya makango akoki kokɔta na lisangá ya Yehova.+ Ata na libota ya zomi, moko te na kati ya bana na ye akoki kokɔta na lisangá ya Yehova.

3 “Moamone ná Momoabe bakoki kokɔta na lisangá ya Yehova te.+ Ata na libota ya zomi, moko te kati na bana na bango akoki kokɔta na lisangá ya Yehova, 4 mpo bayaki te kosalisa bino na bilei mpe na mai na nzela ntango bozalaki kobima na Ezipito,+ mpe mpo bafutaki Balaama mwana ya Beore, oyo azali moto ya Petore na Mezopotamia, mpo alakela bino mabe.+ 5 Kasi Yehova Nzambe na yo aboyaki koyoka Balaama.+ Kutu, Yehova Nzambe na yo abongolaki elakeli mabe ekóma lipamboli mpo na yo,+ mpo Yehova Nzambe na yo alingaki yo.+ 6 Osengeli ata moke te kosala ete bázala na kimya to bázala malamu na mikolo na yo nyonso.+

7 “Osengeli te koyina Moedome, mpo azali ndeko na yo.+

“Osengeli te koyina Moezipito, mpo okómaki kofanda mopaya na mboka na ye.+ 8 Bana na bango ya libota ya misato bakoki kokɔta na lisangá ya Yehova.

9 “Ntango okobunda* na banguna na yo, osengeli koboya eloko nyonso ya mabe.*+ 10 Soki mobali moko akómi mbindo mpo mai na ye ya mibali ebimi na butu,+ akokende na libándá ya kaa mpe akozonga na kaa te. 11 Ntango mpokwa ekokóma, asengeli kosukola na mai, mpe akoki kokɔta na kaa ntango moi ekolala.+ 12 Okobongisa esika moko ya nkuku* na libándá ya kaa, mpe kuna nde okosumba. 13 Na kati ya bisaleli na yo, okozala na piké. Okosalela yango mpo na kotimola libulu liboso ya kosundama. Na nsima, okozipa nyɛi na yo. 14 Mpo Yehova Nzambe na yo azali kotambola epai na epai na kaa na yo+ mpo na kobikisa yo mpe kopesa banguna na yo na lobɔkɔ na yo. Kaa na yo esengeli kozala mosantu,+ mpo amona eloko moko te ya nsɔni epai na yo mpe atika kokende elongo na yo.

15 “Osengeli te kokaba moombo epai ya nkolo na ye ntango akimi nkolo na ye mpe ayei epai na yo. 16 Akoki kofanda epai na yo, na esika nyonso oyo akopona na moko ya bingumba na yo, epai nyonso oyo akosepela. Osengeli te konyokola ye.+

17 “Mwana mwasi moko te ya Yisraele akoki kokóma ndumba ya tempelo,+ mpe mwana mobali moko te ya Yisraele akoki kokóma ndumba ya tempelo.+ 18 Osengeli te komema motuya oyo bafuti mwasi ya ndumba to motuya oyo bafuti mobali ya ndumba* na ndako ya Yehova Nzambe na yo mpo na kokokisa elako, mpo bango nyonso mibale bayinami epai ya Yehova Nzambe na yo.

19 “Osengeli te kofutisa ndeko na yo benefisi,+ ezala benefisi mpo na mbongo, bilei, to mpo na eloko nyonso oyo moto akoki kosɛnga benefisi. 20 Okoki kosɛnga mopaya afuta na benefisi,+ kasi osengeli te kosɛnga ndeko na yo afuta na benefisi,+ mpo Yehova Nzambe na yo apambola yo na misala na yo nyonso na mokili oyo ozali kokende kozwa.+

21 “Soki osali elako epai ya Yehova Nzambe na yo,+ koumela te kokokisa yango.+ Mpo Yehova Nzambe na yo akotuna mpenza yango epai na yo; soki te ekokómela yo lisumu.+ 22 Kasi soki osali elako te, okozala na ngambo ya lisumu te.+ 23 Okokokisa liloba na yo,+ mpe osengeli kosala kaka ndenge osalaki elako epai ya Yehova Nzambe na yo, mpe kopesa likabo ya bolingo oyo olakaki.+

24 “Soki okɔti na elanga ya vinyo ya mozalani na yo, okoki kolya mbuma ya vinyo oyo ekoki na yo mpo na kosilisa nzala na yo, kasi okotya yango te na eloko na yo ya kotya biloko.+

25 “Soki okɔti na elanga ya blé ya mozalani na yo, okoki kobuka na lobɔkɔ na yo mitó oyo eteli, kasi okolekisa likwangola na yo te na blé ya mozalani na yo.+

24 “Soki mobali moko abali mwasi, kasi asepeli na ye lisusu te mpo akuti likambo moko ya mabe epai ya mwasi yango, asengeli kokoma mokanda ya koboma libala,+ kopesa ye yango mpe akobengana ye na ndako na ye.+ 2 Nsima ya kolongwa na ndako na ye, akoki kokende mpe kokóma mwasi ya mobali mosusu.+ 3 Soki mobali ya mibale ayini* ye mpe akomi mokanda ya koboma na ye libala, apesi ye yango, mpe abengani ye na ndako na ye, to soki mobali yango ya mibale, oyo abalaki ye akufi, 4 mobali na ye ya liboso, oyo abenganaki ye, akozala na lotomo te ya kozwa ye lisusu mpo azala mwasi na ye nsima ya kokóma mbindo, mpo ezali likambo moko oyo eyinamá na miso ya Yehova. Osengeli te komema lisumu na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo libula.

5 “Mobali oyo auti kobala sika, akokende etumba te mpe bakopesa ye ata mosala moko te asala. Bakosɛnga ye eloko te na boumeli ya mbula moko, akotikala na ndako mpe akosepelisa mwasi na ye.+

6 “Moto moko te akokanga lokola ndanga+ enikelo ya mabɔkɔ to libanga na yango ya konikela ya likoló, ekozala lokola kozwa ndanga eloko oyo moto abikelaka.*

7 “Soki bakuti moto moko akangi ndeko na ye moyisraele na makasi, akei na ye, anyokoli ye mpe atɛki ye,+ moyibi yango asengeli kokufa.+ Osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.+

8 “Soki maladi ya maba* ebimi, salá makasi mpenza ete osala makambo nyonso oyo banganga-nzambe Balevi, bakoyebisa yo.+ Salá makasi mpo osala kaka ndenge napesaki bango mitindo. 9 Kanisá lisusu oyo Yehova Nzambe na yo asalaki Miriame na nzela nsima ya kobima na bino na Ezipito.+

10 “Soki odefisi mozalani na yo eloko ata ya lolenge nini,+ osengeli te kokɔta na ndako na ye mpo na kokanga eloko oyo apesi ndanga. 11 Okotɛlɛma libándá, mpe moto oyo odefisaki eloko akomemela yo ndanga yango na libándá. 12 Soki moto yango azali kokelela, osengeli te kolala na eloko na ye oyo apesaki ndanga.+ 13 Ntango moi ekolala, osengeli mpenza kozongisela ye eloko oyo ozwaki lokola ndanga, akolala na elamba na ye,+ mpe akopambola yo; mpe yango ekozala likambo ya bosembo* liboso ya Yehova Nzambe na yo.

14 “Osengeli te kobuba mosali oyo azwaka lifuti, oyo azali kokelela mpe azali mobola, ezala ndeko na yo to mopaya oyo afandi na mokili na yo, na kati ya bingumba* na yo.+ 15 Okopesa ye lifuti na ye kaka na mokolo yango+ liboso moi elala, mpo azali na bosɛnga mpe abikaka kaka na lifuti na ye. Soki te, akolelela Yehova mpo na yo, mpe okozala na ngambo ya lisumu.+

16 “Batata bakobomama te mpo na makambo oyo bana basali, mpe bana bakobomama te mpo na makambo oyo batata basali.+ Moto akobomama kaka mpo na lisumu na ye moko.+

17 “Osengeli te kozanga bosembo ntango ozali kosambisa likambo ya moto oyo afandi mopaya to ya mwana oyo tata akufá,+ mpe osengeli te kokanga ndanga elamba ya mwasi oyo mobali akufá.+ 18 Kobosana te ete okómaki moombo na Ezipito, mpe Yehova Nzambe na yo asikolaki yo kuna.+ Yango wana nazali kopesa yo mitindo ete osala bongo.

19 “Ntango okobuka mbuma na elanga na yo, mpe obosani na elanga liboke moko ya matiti ya mbuma ya kosala farini, kozonga te mpo na kozwa yango. Okotika yango mpo na moto oyo afandi mopaya, mpo na mwana oyo tata akufá mpe mpo na mwasi oyo mobali akufá,+ bongo Yehova Nzambe na yo apambola yo na nyonso oyo ozali kosala.+

20 “Ntango okobɛtabɛta nzete na yo ya olive mpo na kobuka mbuma na yango, okozonga te kobɛtabɛta bitape na yango mpo na mbala ya mibale. Oyo ekotikala ekozala mpo na moto oyo afandi mopaya, mpo na mwana oyo tata akufá mpe mpo na mwasi oyo mobali akufá.+

21 “Ntango okobuka mbuma na elanga na yo ya vinyo, osengeli te kozongela lisusu mbuma oyo ekotikala. Okotika yango mpo na moto oyo afandi mopaya, mpo na mwana oyo tata akufá mpe mpo na mwasi oyo mobali akufá. 22 Kobosana te ete okómaki moombo na mokili ya Ezipito. Yango wana nazali kopesa yo mitindo ete osala bongo.

25 “Soki kowelana ebimi na kati ya bato, bakokende liboso ya basambisi.+ Mpe basambisi bakotánga moto ya sembo ete azali na ngambo te mpe moto mabe bakotánga ye ete azali na ngambo.+ 2 Soki esengeli ete moto mabe abɛtama,+ mosambisi akosɛnga ete bálalisa ye na nse mpe bábɛta ye fimbo na miso ya mosambisi yango. Motángo ya fimbo ekoyokana na likambo ya mabe oyo asali. 3 Akoki kobɛta ye fimbo 40,+ kasi koleka te. Soki akobi kobɛta ye fimbo mingi koleka oyo wana, ndeko na yo akosambwa na miso na yo.

4 “Ntango ngɔmbɛ ezali kotutatuta mbuma* osengeli te kokanga monɔkɔ na yango mpo elya te.+

5 “Soki bandeko mibali bafandi esika moko mpe moko na bango akufi, kasi aboti mwana te, mwasi ya mobali oyo akufi asengeli te kobala na libota mosusu. Sɛmɛki na ye akokende epai na ye, mpe akozwa ye azala mwasi na ye mpe bakosala libala ya bosɛmɛki.+ 6 Mwana ya liboso oyo mwasi yango akobota, akozwa nkombo ya ndeko na ye ya mobali oyo akufi,+ mpo nkombo na ye elimwa te na Yisraele.+

7 “Kasi soki mobali yango asepeli te kobala mwasi ya ndeko na ye oyo akufi, mwasi yango asengeli kokende epai ya bankulutu na porte ya engumba mpe akoloba ete: ‘Ndeko ya mobali na ngai aboyi kobatela nkombo ya ndeko na ye na Yisraele. Andimi te kosala ná ngai libala ya bosɛmɛki.’ 8 Bankulutu ya engumba na ye basengeli kobenga ye mpe kosolola na ye. Soki akobi kaka koboya, mpe alobi ete: ‘Nasepeli kobala ye te,’ 9 na yango, mwasi ya ndeko na ye oyo akufaki akopusana epai na ye na miso ya bankulutu, akolongola ye sandale na lokolo,+ akobwakela ye nsoi na elongi mpe akoloba ete: ‘Boye nde basengeli kosala mobali oyo aboyi kobatela molɔngɔ ya libota* ya ndeko na ye ya mobali.’ 10 Nsima na yango, nkombo ya libota na ye* na Yisraele, ekozala: ‘Ndako ya moto oyo balongolá sandale.’

11 “Soki mibali mibale bazali kobunda mpe mwasi ya moko na bango apusani mpo na kobikisa mobali na ye epai ya moto oyo azali kobɛta ye, mpe mwasi yango asemboli lobɔkɔ na ye mpe asimbi mobali yango na biteni ya nzoto na ye ya mobali, 12 osengeli kokata lobɔkɔ ya mwasi yango. Osengeli* koyoka mawa te.

13 “Na libenga na yo, osengeli te kozala na kilo* mibale oyo ekeseni,+ ya monene ná ya moke. 14 Na ndako na yo, osengeli te kozala na biloko mibale ekeseni ya komekela,*+ ya monene ná ya moke. 15 Okozala ntango nyonso na kilo ya solosolo mpe ya sembo mpe emekeli ya solosolo mpe ya sembo, mpo ozala na bomoi molai na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.+ 16 Mpo moto nyonso oyo azali sembo te, oyo azali kosala makambo wana, azali moto oyo Yehova Nzambe na yo ayiná.+

17 “Kanisá makambo oyo Amaleke asalaki yo na nzela nsima ya kobima na Ezipito,+ 18 ndenge akutanaki na yo na nzela mpe abundisaki baoyo nyonso bazalaki kolanda yo na nsima, ntango osilaki makasi mpe olɛmbaki. Abangaki Nzambe te. 19 Ntango Yehova Nzambe na yo akopemisa yo liboso ya banguna na yo nyonso zingazinga, na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo libula mpo ozwa yango,+ okolongola nkombo ya Amaleke na nse ya lola.+ Osengeli kobosana yango te.

26 “Nsukansuka, ntango okokɔta na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo libula, ntango okozwa yango mpe okofanda kuna, 2 okozwa ndambo ya mbuma ya liboso na milona* nyonso oyo mabele ebimisi, oyo okobuka na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, okotya yango na kitunga mpe okokende na esika oyo Yehova Nzambe na yo akopona mpo na kofandisa nkombo na ye kuna.+ 3 Osengeli kokende epai ya nganga-nzambe oyo akozala na mosala na mikolo yango mpe okoloba na ye ete: ‘Lelo, nazali koyebisa Yehova Nzambe na yo ete nakɔti na mokili oyo Yehova alapelaki bankɔkɔ na biso ndai ete akopesa biso.’+

4 “Na nsima, nganga-nzambe akozwa kitunga na lobɔkɔ na yo mpe akotya yango liboso ya etumbelo ya Yehova Nzambe na yo. 5 Osengeli koloba liboso ya Yehova Nzambe na yo ete: ‘Tata na ngai azalaki moto ya Arame+ mpe azalaki koyengayenga.* Akitaki na Ezipito+ elongo na bato moke+ mpe afandaki kuna mopaya. Kasi kuna akómaki ekólo moko monene, ya nguya mpe ya bato ebele.+ 6 Baezipito bamonisaki biso mpasi, banyokolaki biso mpe basalisaki biso misala ya boombo mpe ya makasi.+ 7 Bongo tobandaki kobelela Yehova, Nzambe ya bankɔkɔ na biso, mpe Yehova ayokaki mongongo na biso, atalaki mpasi na biso, motungisi na biso mpe monyoko na biso.+ 8 Nsukansuka, Yehova abimisaki biso na Ezipito na nguya ya lobɔkɔ na ye mpe na makasi na ye nyonso*+ mpe na makambo minene ya nsɔmɔ, na bilembo mpe makamwisi.+ 9 Na nsima, amemaki biso na esika oyo mpe apesaki biso mokili oyo, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ 10 Sikoyo namemi mbuma ya liboso ya milona oyo mabele ebimisi, oyo Yehova apesi ngai.’+

“Osengeli kotya yango liboso ya Yehova Nzambe na yo mpe kogumbama liboso ya Yehova Nzambe na yo. 11 Nsima na yango, okosepela yo ná Molevi mpe moto oyo afandi mopaya epai na yo, mpo na bolamu nyonso oyo Yehova Nzambe na yo apesi yo ná bato ya ndako na yo.+

12 “Ntango okosilisa kolongola moko ya bandambo zomi+ nyonso ya milona na yo, na mbula ya misato, mbula ya kopesa moko ya bandambo zomi, okopesa yango Molevi, moto oyo afandi mopaya, mwana oyo tata akufá, mwasi oyo mobali akufá, mpe bakolya na kati ya bingumba* na yo mpe bakotonda.+ 13 Bongo okoloba liboso ya Yehova Nzambe na yo ete: ‘Nalongoli eteni oyo ezali mosantu na ndako mpe napesi yango Molevi, moto oyo afandi mopaya, mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá,+ kaka ndenge opesi ngai mitindo. Nabuki mitindo na yo te, nabosani yango mpe te. 14 Nalei ndambo na yango te ntango nazalaki kolela ebembe, nalongoli ndambo na yango ata moke te wana nazalaki mbindo mpe napesi ndambo na yango te mpo na bakufi. Natosi mongongo ya Yehova Nzambe na ngai mpe nasali nyonso oyo opesaki ngai mitindo. 15 Sikoyo talá uta na likoló, efandelo na yo mosantu, mpe pambolá bato na yo Yisraele ná mabele oyo opesi biso,+ kaka ndenge olapelaki bankɔkɔ na biso ndai,+ mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.’+

16 “Mokolo ya lelo, Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo mitindo osalela malako mpe bikateli oyo. Osengeli kotosa yango mpe kosalela yango na motema na yo mobimba+ mpe na molimo* na yo mobimba. 17 Lelo, ozwi maloba oyo epai ya Yehova ete akokóma Nzambe na yo, ntango nyonso oyo okotambola na banzela na ye, okotosa malako+ na ye, mitindo+ na ye mpe bikateli+ na ye, mpe ntango nyonso oyo okoyoka mongongo na ye. 18 Mpe lelo, Yehova azwi maloba oyo epai na yo ete okokóma ekólo na ye, eloko na ye moko,*+ kaka ndenge apesi yo elaka, mpe ete okotosa mitindo na ye nyonso. 19 Mpe kaka ndenge apesi yo elaka, akotya yo likoló mpenza ya bikólo mosusu nyonso oyo asalá,+ akopesa yo lisanzoli, lokumu mpe nkembo ntango nyonso oyo okomonisa ete ozali ekólo moko mosantu na miso ya Yehova Nzambe na yo.”+

27 Bongo Moize, elongo na bankulutu ya Yisraele, apesaki bato mitindo boye: “Bótosa mitindo nyonso oyo nazali kopesa bino lelo. 2 Mpe na mokolo oyo bokokatisa Yordani mpo na kokɔta na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, okotɛlɛmisa mabanga minene mpe okopakola yango mpɛmbɛ.+ 3 Na nsima, okokoma maloba nyonso ya mobeko oyo likoló na yango, nsima ya kokatisa, mpo okɔta na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi, kaka ndenge Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na yo apesi yo elaka.+ 4 Ntango okokatisa Yordani, okotɛlɛmisa mabanga yango na Ngomba Ebala+ mpe okopakola yango mpɛmbɛ, kaka ndenge nazali kopesa yo mitindo lelo. 5 Osengeli mpe kotongela Yehova Nzambe na yo etumbelo kuna, etumbelo moko ya mabanga. Okosalela te bisaleli ya ebende mpo na kokata mabanga yango.+ 6 Okotonga etumbelo ya Yehova Nzambe na yo na mabanga ya mibimba, mpe okopesa Yehova Nzambe na yo makabo ya kotumba likoló na yango. 7 Osengeli kopesa bambeka ya kimya+ mpe okolya yango kuna,+ mpe okosepela liboso ya Yehova Nzambe na yo.+ 8 Mpe komá polele mpenza maloba nyonso ya mobeko oyo likoló ya mabanga yango.”+

9 Bongo Moize ná banganga-nzambe Balevi, balobaki na Yisraele mobimba ete: “Fandá nyɛɛ mpe yoká, Ee Yisraele. Mokolo ya lelo, okómi ekólo ya Yehova Nzambe na yo.+ 10 Osengeli koyoka mongongo ya Yehova Nzambe na yo mpe kosalela mitindo+ na ye mpe malako na ye, oyo nazali kopesa yo lelo.”

11 Na mokolo yango, Moize apesaki bato mitindo boye: 12 “Ntango bokokatisa Yordani, mabota oyo elandi ekotɛlɛma na Ngomba Gerizime+ mpo na kopambola bato: Simeone, Levi, Yuda, Isakare, Yozefe mpe Benyamina. 13 Mpe mabota oyo elandi ekotɛlɛma na Ngomba Ebala+ mpo na koloba maloba ya elakeli mabe: Rubene, Gade, Ashere, Zebulone, Dani mpe Nafatali. 14 Mpe Balevi bakoloba na bato nyonso ya Yisraele na mongongo makasi ete:+

15 “‘Alakelama mabe moto oyo asali ekeko*+ to ekeko ya ebende,*+ eloko oyo Yehova ayini,+ eloko oyo esalemi na moto oyo asalaka biloko na mabɔkɔ,* mpe oyo abombi yango.’ (Mpe bato nyonso bakoyanola: ‘Amen!’*)

16 “‘Alakelama mabe moto oyo azali kotyola tata na ye to mama na ye.’+ (Mpe bato nyonso bakoloba: ‘Amen!’)

17 “‘Alakelama mabe moto oyo apusi elembo ya ndelo ya mabele ya mozalani na ye.’+ (Mpe bato nyonso bakoloba: ‘Amen!’)

18 “‘Alakelama mabe moto oyo abungisi moto oyo akufá miso nzela.’+ (Mpe bato nyonso bakoloba: ‘Amen!’)

19 “‘Alakelama mabe moto oyo azangi bosembo ntango azali kosambisa+ moto oyo afandi mopaya, mwana oyo tata akufá to mwasi oyo mobali akufá.’+ (Mpe bato nyonso bakoloba: ‘Amen!’)

20 “‘Alakelama mabe moto oyo alali na mwasi ya tata na ye, mpo asambwisi* tata na ye.’+ (Mpe bato nyonso bakoloba: ‘Amen!’)

21 “‘Alakelama mabe moto oyo alali na nyama, ezala ya lolenge nini.’+ (Mpe bato nyonso bakoloba: ‘Amen!’)

22 “‘Alakelama mabe moto oyo alali na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye to mwana ya mama na ye.’+ (Mpe bato nyonso bakoloba: ‘Amen!’)

23 “‘Alakelama mabe moto oyo alali na bokilo na ye ya mwasi.’+ (Mpe bato nyonso bakoloba: ‘Amen!’)

24 “‘Alakelama mabe moto oyo atyeli mozalani na ye motambo mpe abomi ye.’+ (Mpe bato nyonso bakoloba: ‘Amen!’)

25 “‘Alakelama mabe moto oyo andimi kanyaka mpo na koboma* moto oyo azali na likambo te.’*+ (Mpe bato nyonso bakoloba: ‘Amen!’)

26 “‘Alakelama mabe moto oyo akoboya kotosa maloba ya mobeko oyo, mpe akosalela yango te.’+ (Mpe bato nyonso bakoloba: ‘Amen!’)

28 “Mpe soki okoyoka mpenza mongongo ya Yehova Nzambe na yo mpe okebi ete osalela mitindo na ye nyonso oyo nazali kopesa yo lelo, Yehova Nzambe na yo akotya yo mpenza likoló ya bikólo mosusu nyonso ya mabele.+ 2 Mapamboli oyo nyonso ekokitela yo mpe ekozwa yo,+ mpo ozali kokoba koyoka mongongo ya Yehova Nzambe na yo:

3 “Okopambolama na engumba, mpe okopambolama na esobe.+

4 “Bana* na yo bakopambolama,+ mpe mbuma ya mabele na yo mpe bana ya bibwɛlɛ na yo, bana ya ngɔmbɛ na yo mpe ya mpate na yo ekopambolama.+

5 “Kitunga+ na yo ná esika na yo ya kobɛta pɔtɔpɔtɔ ya farini+ ekopambolama.

6 “Okopambolama esika nyonso okokende mpe misala na yo nyonso ekopambolama.*

7 “Yehova akosala ete olonga banguna na yo oyo bazali kotɛmɛla yo.+ Bakoya kobundisa yo na nzela moko, kasi bakokima liboso na yo na nzela nsambo.+ 8 Mpo na yo, Yehova akopesa etinda ete lipamboli ezala likoló ya bandako na yo ya kobomba biloko+ mpe likoló ya misala na yo nyonso, mpe akopambola yo mpenza na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo. 9 Yehova akokómisa yo ekólo moko mosantu mpo na ye,+ kaka ndenge alapelaki yo ndai,+ mpo ozali kokoba kobatela mitindo ya Yehova Nzambe na yo, mpe otamboli na banzela na ye. 10 Bato ya bikólo nyonso ya mabele basengeli komona ete obengami na nkombo ya Yehova,+ mpe bakobanga yo.+

11 “Na mokili oyo Yehova alapelaki bankɔkɔ na yo ndai ete akopesa yo,+ Yehova akotondisa yo na bana, na bibwɛlɛ mpe na mbuma ya mabele.+ 12 Yehova akofungolela yo likoló, oyo ezali ndako na ye ya malamu ya kobomba biloko, mpo na kopesa mokili na yo mbula na eleko na yango+ mpe mpo na kopambola nyonso oyo ozali kosala. Okodefisa bikólo mingi, kasi yo okozala na ntina ya kodefa te.+ 13 Yehova akosala ete ozala motó, kasi mokila te; mpe okozala na likoló,+ kasi okozala na nse te, soki okobi kotosa mitindo ya Yehova Nzambe na yo, oyo nazali kopesa yo lelo mpo otosa mpe osalela yango. 14 Osengeli kolanda malamumalamu maloba nyonso oyo nazali kopesa yo mitindo lelo,+ mpe osengeli te kolanda banzambe mosusu mpo na kosalela bango.+

15 “Kasi soki okoyoka te mongongo ya Yehova Nzambe na yo, soki okotya likebi te ete otosa mitindo na ye nyonso mpe mibeko na ye oyo nazali kopesa yo lelo, bilakeli mabe oyo nyonso ekokitela yo mpe ekozwa yo:+

16 “Okolakelama mabe na engumba mpe okolakelama mabe na esobe.+

17 “Kitunga+ na yo ná esika na yo ya kobɛta pɔtɔpɔtɔ ya farini+ ekolakelama mabe.

18 “Bana na yo bakolakelama mabe,*+ mpe mbuma ya mabele na yo, bana ya ngɔmbɛ na yo mpe ya mpate na yo ekolakelama mabe.+

19 “Okolakelama mabe ntango okokɔta, mpe okolakelama mabe ntango okobima.

20 “Na nyonso oyo okosala, Yehova akotindela yo elakeli mabe, mobulungano mpe etumbu, tii okosila mpe okobebisama nokinoki, mpo na misala na yo ya mabe mpe na ndenge osundoli ye.*+ 21 Yehova akosala ete maladi mabe ekangama na yo tii akosilisa yo na mokili oyo ozali kokende kozwa.+ 22 Yehova akobɛta yo na tibɛrkiloze, na fiɛvrɛ makasi,+ na kovimba, na mɔtɔ ya fiɛvrɛ, na mopanga,+ na mopɛpɛ makasi oyo ekaukisaka milona mpe na koguga,+ yango ekolanda yo tii okokufa. 23 Likoló oyo ezali likoló ya motó na yo ekokóma kwivre, mpe mabele oyo ezali na nse na yo ekokóma ebende.+ 24 Yehova akokómisa mbula na mokili na yo zɛlo mpe putulu oyo ekokitela yo uta na likoló tii okosila. 25 Yehova akosala ete banguna na yo bálonga yo.+ Okokende kobunda na bango na nzela moko, kasi okokima liboso na bango na nzela nsambo; mpe makonzi nyonso ya mabele ekobanga ntango ekoyoka makambo ya mabe oyo ekómeli yo.+ 26 Mpe bibembe ya bato na yo ekokóma bilei ya ndɛkɛ nyonso ya likoló mpe ya nyama ya mabele, oyo moto ata moko te akobangisa yango.+

27 “Yehova akopesa yo babibɔ ya Ezipito, maladi ya mosomba, mokosa mpe biloko oyo evimbisaka loposo, oyo okokoka kobika na yango te. 28 Yehova akopesa yo maladi ya ligboma, ya kokufa miso+ mpe ya mobulungano.* 29 Okosimbasimba epai na epai na ntango ya midi, kaka ndenge moto oyo akufá miso asimbasimbaka epai na epai na molili,+ mpe okolonga te na oyo nyonso okosala; mpe okokóma ntango nyonso moto oyo babubaka mpe bayibaka, moto ata moko te akozala mpo na kobikisa yo.+ 30 Okolaka mwasi libala, kasi mobali mosusu akosangisa na ye nzoto na makasi. Okotonga ndako, kasi okofanda na kati na yango te.+ Okolona elanga ya vinyo, kasi okolya ata mbuma na yango ya liboso te.+ 31 Ngɔmbɛ na yo ekobomama na miso na yo, kasi okolya ata ndambo na yango te. Bakoyiba mpunda na yo kaka na miso na yo, kasi ekozongela yo te. Bampate na yo ekopesama epai ya banguna na yo, kasi okozala na mobikisi te. 32 Bana na yo ya mibali mpe ya basi bakopesama epai ya bato mosusu+ wana ozali kotala, mpe okozala ntango nyonso na mposa na bango, kasi mabɔkɔ na yo ekozala na makasi te. 33 Bato oyo oyebi te bakolya mbuma ya mabele na yo mpe biloko nyonso oyo ekouta na mosala na yo;+ mpe okozala ntango nyonso moto oyo babubaka mpe banyataka. 34 Makambo oyo okomona ekobɛlisa yo ligboma.

35 “Yehova akopesa yo babibɔ oyo eswaka mpenza, na mabɔlɔngɔ ná makolo na yo, ekobima banda na litambe tii na motó na yo mpe okokoka kobika na yango te. 36 Yehova akomema yo ná mokonzi oyo okotya likoló na yo, mpo na kokende na ekólo oyo yo ná bankɔkɔ na yo boyebaki te.+ Kuna okosalela banzambe mosusu, banzambe ya nzete mpe ya mabanga.+ 37 Ntango okokóma na bisika oyo Yehova akomema yo, makambo oyo ekokómela yo kuna, bato nyonso ya bikólo bakoyoka nsɔmɔ; bakosɛka* mpe bakotyola yo.+

38 “Okolona mboto mingi na elanga, kasi okobuka moke,+ mpo liyoyo ekolya yango. 39 Okolona mpe okobongisa bilanga ya vinyo, kasi okomɛla vinyo te mpe okobuka eloko te,+ mpo misɔpi ekolya yango. 40 Okozala na banzete ya olive na teritware na yo mobimba, kasi yo moko okopakola mafuta te, mpo mbuma na yo ya olive ekokwea. 41 Okobota bana mibali mpe ya basi, kasi bakozala bana na yo lisusu te, mpo bakokende bakangami.+ 42 Banyama mikemike oyo etondanaka mpenza,* ekomatela banzete na yo nyonso mpe mbuma ya mabele na yo. 43 Mopaya oyo azali epai na yo, akomata se komata likoló na yo, kasi yo okokita se kokita na nse na ye. 44 Akodefisa yo, kasi yo okokoka kodefisa ye te.+ Akokóma motó, kasi yo okokóma mokila.+

45 “Bilakeli mabe oyo nyonso+ ekokitela yo mpenza, ekolanda yo mpe ekozwa yo tii okosila,+ mpo oyokaki te mongongo ya Yehova Nzambe na yo, obatelaki te mitindo na ye mpe mibeko na ye oyo apesaki yo.+ 46 Mpe yango ekokoba kozala likoló na yo ná bana na yo lokola elembo mpe likamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya mpo na libela,+ 47 mpamba te osalelaki Yehova Nzambe na yo na nsai te mpe na esengo ya motema te ntango ozalaki na biloko nyonso ebele mpenza.+ 48 Banguna na yo oyo Yehova akotindela yo, okosalela bango+ wana okozala na nzala,+ na mposa ya mai, bolumbu mpe okozanga eloko nyonso. Akotya ekanganeli ya ebende na nkingo na yo tii akosilisa yo.

49 “Yehova akobimisela yo ekólo moko oyo ekouta mosika,+ uta na nsuka ya mabele; ekobundisa yo nokinoki ndenge mpongo ekitelaka nyama,+ ekólo moko oyo okoyeba monɔkɔ na yango te,+ 50 ekólo moko ya bato ya bilongi nkandankanda, oyo bakoyokela mobange mawa te mpe bakomonisela elenge boboto te.+ 51 Bakolya bana ya bibwɛlɛ na yo mpe mbuma ya mabele na yo tii okosila. Bakotikela yo ata blé* moko te, vinyo ya sika te, mafuta te, bana ya ngɔmbɛ te, bana ya mpate te, tii bakosilisa yo mpenza.+ 52 Bakozinga yo, bakokanga yo na kati ya bingumba* nyonso ya mokili na yo tii bifelo na yo ya milai mpe oyo ebatelami makasi, oyo ozali kotyela motema ekokwea. Ɛɛ, bakozinga mpenza yo na kati ya bingumba nyonso ya mokili na yo, oyo Yehova Nzambe na yo apesi yo.+ 53 Lokola ekozala mpenza mpasi ntango monguna akozinga yo mpe akotungisa yo, okolya bana na yo moko,* mosuni ya bana na yo ya mibali mpe ya basi,+ oyo Yehova Nzambe apesi yo.

54 “Ata mobali oyo amesaná na bomoi ya kitoko mpe akokaka makambo ya makasi te, akozala na mawa te mpo na ndeko na ye ya mobali to mwasi na ye oyo alingaka mingi to bana na ye oyo batikali na ye, 55 mpe akokabola te ná bango mosuni ya bana na ye oyo akolya, mpo azali na eloko mosusu te, mpo kozingama ekozala mpasi mpe monguna akotungisa yo mingi na bingumba na yo.+ 56 Mpe mwasi oyo amesaná na bomoi ya kitoko mpe akokaka makambo ya makasi te, oyo akanisá ata mokolo moko te kotya litambe na ye na mabele, mpo amesaná na makambo ya makasi te+ akoyoka mawa te mpo na mobali na ye oyo alingaka mingi, mpo na mwana na ye ya mobali to mpo na mwana na ye ya mwasi, 57 ata mpe kɔku* na ye oyo ezali kobima na kati ya makolo na ye mpe bana na ye ya mibali oyo abotaki, mpamba te akolya bango na kobombana mpo kozingama ekozala mpasi mpe monguna akotungisa yo mingi na bingumba na yo.

58 “Soki okotosa malamumalamu te maloba nyonso ya Mobeko oyo, oyo ekomami na buku+ oyo, mpe soki okobanga te nkombo oyo ya nkembo mpe ya nsɔmɔ,+ ya Yehova+ Nzambe na yo, 59 Yehova akotindela yo mpe libota na yo mpasi makasi* mpenza, mpasi ya monene mpe oyo eumelaka,+ ná bamaladi ya nsɔmɔ mpe oyo eumelaka. 60 Akozongisela yo bamaladi nyonso ya Ezipito oyo ozalaki kobanga liboso mpe ekokangama yo mpenza. 61 Lisusu, Yehova akobimisela yo maladi nyonso mpe mpasi makasi nyonso oyo ekomami te na buku ya Mobeko oyo, tii okosila. 62 Atako bokómi ebele lokola minzoto ya likoló,+ bokotikala mpenza bato moke,+ mpo boyokaki te mongongo ya Yehova Nzambe na bino.

63 “Mpe kaka ndenge Yehova asepelaki liboso kokómisa yo mozwi mpe ebele, Yehova akosepela kobebisa yo mpe kosilisa yo. Mpe okolongolama na mabele oyo ozali kokende kozwa.

64 “Yehova akopalanganisa yo na kati ya bato ya bikólo nyonso, banda na nsuka moko ya mabele tii na nsuka mosusu ya mabele,+ mpe kuna okosalela banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo yo ná bankɔkɔ na yo boyebaki te.+ 65 Okozala na kimya te na kati ya bikólo yango+ mpe esika ya kofanda ekozala te. Kutu, kuna Yehova akopesa yo motema oyo etungisami,+ miso oyo ebebi mpe likanisi ya komiyoka ete ozangi elikya.*+ 66 Bomoi na yo ekozala na likama monene, okozala na nsɔmɔ butu moi; mpe okoyeba te soki okobika. 67 Na ntɔngɔ okoloba: ‘Soki ezalaki ata mpokwa!’ mpe na mpokwa okoloba: ‘Soki ezalaki ata ntɔngɔ!’ mpo na nsɔmɔ oyo okoyoka na motema na yo, mpe mpo na makambo oyo miso na yo ekomona. 68 Mpe Yehova akozongisa mpenza yo na Ezipito na masuwa, na nzela oyo nalobaki na yo ete: ‘Okomona yango lisusu soki moke te,’ mpe kuna yo moko okomitɛka epai ya banguna na yo lokola baombo, kasi mosombi akozala te.”

29 Oyo ezali maloba ya kondimana oyo Yehova apesaki Moize mitindo asala ná bato ya Yisraele na mokili ya Moabe, longola kondimana oyo Nzambe asalaki ná bango na Horebe.+

2 Bongo Moize abengisaki Yisraele mobimba mpe alobaki na bango ete: “Bomonaki na miso na bino moko na Ezipito, nyonso oyo Yehova asalaki Farao mpe basaleli na ye nyonso mpe mokili na ye mobimba,+ 3 bitumbu* minene oyo bomonaki na miso na bino, bilembo wana minene mpe makamwisi.+ 4 Kasi, tii mokolo ya lelo, Yehova apesi bino te motema mpo na kokanga ntina, miso mpo na komona mpe matoi mpo na koyoka.+ 5 ‘Ntango nakambaki bino mbula 40 na esobe,+ bilamba na bino ekufaki te na nzoto na bino, mpe basandale na bino ekufaki te na makolo na bino.+ 6 Bolyaki limpa te, bomɛlaki vinyo te, masanga oyo elangwisaka mpe te, mpo bóyeba ete ngai nazali Yehova Nzambe na bino.’ 7 Nsukansuka, bokómaki na esika oyo, mpe Sihone mokonzi ya Heshibone+ ná Oge mokonzi ya Bashane+ babimaki mpo na kobundisa biso, kasi tolongaki bango.+ 8 Nsima na yango, tozwaki mokili na bango mpe topesaki yango libula na Barubene, Bagade mpe na ndambo ya libota ya Bamanase.+ 9 Bongo, bóbatela maloba ya kondimana oyo mpe bótosa yango, mpo likambo nyonso oyo bokosala etambola malamu.+

10 “Bino nyonso botɛlɛmi lelo liboso ya Yehova Nzambe na bino: bankumu ya mabota na bino, bankulutu na bino, bakapita na bino, mobali nyonso ya Yisraele, 11 bana na bino, basi+ na bino, mpe mopaya oyo afandi na kaa na bino,+ banda na moto oyo alɔkɔtelaka yo nkoni tii na moto oyo atokelaka yo mai. 12 Bozali awa mpo na kokɔta na kondimana ya Yehova Nzambe na bino, oyo Yehova Nzambe na bino azali kosala ná bino lelo na nzela ya ndai+ 13 mpo akómisa bino lelo ekólo na ye+ mpe amonisa ete azali Nzambe na bino,+ kaka ndenge apesi bino elaka mpe kaka ndenge alapaki ndai epai ya bankɔkɔ na bino Abrahama,+ Yisaka+ mpe Yakobo.+

14 “Sikoyo, ezali kaka ná bino te nde nazali kosala kondimana oyo na nzela ya ndai, 15 kasi ná baoyo batɛlɛmi awa lelo elongo na biso liboso ya Yehova Nzambe na biso mpe ná baoyo bazali awa te elongo na biso lelo. 16 (Mpo boyebi malamu ndenge tofandaki na mokili ya Ezipito mpe ndenge tolekaki na mobembo na biso na kati ya bikólo ndenge na ndenge.+ 17 Mpe bozalaki komona makambo na bango oyo eyinami mpe bikeko na bango ya bosɔtɔ,*+ ya nzete, ya mabanga, ya palata mpe ya wolo, oyo ezalaki kati na bango.) 18 Bókeba ete na kati na bino ezala te na mobali to mwasi, libota to etuluka oyo motema etiki Yehova Nzambe na biso lelo mpo na kokende kosalela banzambe ya bikólo wana,+ mpo na kati na bino ezala te na mosisa oyo ekobota mbuma ya pwazo mpe mbondo.+

19 “Kasi soki moto moko ayoki maloba ya ndai oyo, mpe amikumisi na motema na ye ete: ‘Nakozala na kimya, ata soki nakobi kosala nyonso oyo nalingi,’ oyo ekoki kosala ete abebisa nzela na ye nyonso,* 20 Yehova akosepela te kolimbisa ye.+ Kutu, nkanda makasi ya Yehova ekopelela moto yango, mpe elakeli nyonso ya mabe oyo ekomami na buku oyo ekokómela ye mpenza,+ mpe Yehova akolongola mpenza nkombo na ye na nse ya lola. 21 Bongo Yehova akolongola ye na mabota nyonso ya Yisraele, mpo mpasi ekómela ye, na kolanda elakeli nyonso ya mabe ya kondimana oyo ekomami na buku oyo ya mobeko.

22 “Ntango libota ya nsima, ya bana na bino mpe bapaya oyo bakouta na mokili moko ya mosika, bakomona mpasi ya mokili yango, bamaladi na yango, oyo Yehova akobimisela yango— 23 sufulu, mungwa mpe kozika, bongo eloko moko te ekolonama na mokili na yango mobimba, mpe ekobimisa milona te, mpe nzete moko te ekobima kuna, lokola kokwea ya Sodoma ná Gomora,+ ya Adema ná Zeboyime,+ oyo Yehova akweisaki na nkanda na ye mpe na nkanda ya kongala na ye— 24 bango ná bikólo nyonso bakoloba ete: ‘Mpo na nini Yehova asalaki boye na mokili oyo?+ Mpo na nini nkanda makasi mpenza boye?’ 25 Bongo bakoloba boye: ‘Ezali mpo basundolaki kondimana ya Yehova+ Nzambe ya bankɔkɔ na bango, oyo asalaki ná bango ntango abimisaki bango na mokili ya Ezipito.+ 26 Bakendaki kosalela banzambe mosusu mpe bagumbamelaki bango, banzambe oyo bayebaki te mpe oyo Nzambe apesaki bango nzela te básambela.*+ 27 Na yango, nkanda makasi ya Yehova ekitelaki mokili yango mpe amemelaki yango elakeli nyonso ya mabe oyo ekomami na buku oyo.+ 28 Yango wana, na nkanda na ye, na nkanda ya kongala na ye mpe na kosilika na ye ya makasi, Yehova apikolaki bango na mabele+ na bango mpe amemaki bango na mokili mosusu, esika bazali lelo.’+

29 “Makambo oyo ebombami ezali ya Yehova Nzambe na biso,+ kasi makambo oyo emonisami ezali ya biso mpe ya bakitani na biso mpo na libela, mpo tókokisa maloba nyonso ya Mobeko oyo.+

30 “Ntango maloba oyo nyonso ekokokisama epai na yo, lipamboli mpe elakeli mabe, oyo natye liboso na yo,+ mpe ntango okokanisa yango*+ na kati ya bikólo nyonso epai Yehova Nzambe na yo akopalanganisa yo,+ 2 mpe okozongela Yehova Nzambe na yo+ mpe okotosa mongongo na ye na kolanda mitindo nyonso oyo nazali kopesa yo lelo, yo ná bana na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo* na yo mobimba,+ 3 na yango Yehova Nzambe na yo akozongisa bato na yo oyo bakangami+ mpe akoyokela yo mawa+ mpe akoyanganisa yo lisusu uta na bato ya bikólo nyonso epai Yehova Nzambe na yo apalanganisá yo.+ 4 Ata soki bato na yo bapalanganaki tii esika likoló esuki, Yehova Nzambe na yo akoyanganisa yo longwa kuna mpe akozongisa yo.+ 5 Yehova Nzambe na yo akozongisa yo na mokili oyo batata na yo bazwaki, mpe okozwa yango; akokómisa yo mozwi mpe akokómisa yo ebele koleka batata na yo.+ 6 Yehova Nzambe na yo akopɛtola* motema na yo mpe motema ya libota+ na yo, mpo olinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo* na yo mobimba mpo ozala na bomoi.+ 7 Mpe Yehova Nzambe na yo akomema bilakeli nyonso oyo ya mabe likoló ya banguna na yo, oyo bayinaki yo mpe banyokolaki yo.+

8 “Bongo, okozonga mpe okoyoka mpenza mongongo ya Yehova mpe okotosa mitindo na ye nyonso oyo nazali kopesa yo lelo. 9 Yehova Nzambe na yo akokómisa yo mozwi mingi mpenza na mosala nyonso ya mabɔkɔ na yo:+ akokómisa ebele bana na yo, bana ya bibwɛlɛ na yo, mpe milona ya mabele na yo, mpo Yehova akosepela lisusu kokómisa yo mozwi, kaka ndenge asepelaki kosala epai ya bankɔkɔ na yo.+ 10 Mpo okoyoka lisusu mongongo ya Yehova Nzambe na yo mpe okotosa mitindo na ye mpe mibeko na ye oyo ekomami na buku oyo ya mobeko, mpe okozongela Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo* na yo mobimba.+

11 “Mpo mitindo oyo nazali kopesa yo lelo eleki makasi te mpo na yo, mpe ezali mosika mpenza te mpo ozwa yango.+ 12 Ezali na likoló te, mpo oloba ete: ‘Nani akomata na likoló mpo azwela biso yango, mpo tóyoka yango mpe tótosa yango?’+ 13 Ezali mpe te na ngámbo mosusu ya mbu, mpo oloba ete: ‘Nani akokatisa na ngámbo mosusu ya mbu mpo azwela biso yango, mpo ayokisa biso yango mpe tótosa yango?’ 14 Mpo liloba ezali mpenza pene na yo, na monɔkɔ na yo mpe na motema na yo,+ mpo osalela yango.+

15 “Talá, natye mpenza liboso na yo lelo bomoi ná bolamu, liwa ná mpasi.+ 16 Soki oyoki mitindo ya Yehova Nzambe na yo, oyo nazali kopesa yo lelo; soki olingi Yehova Nzambe na yo,+ otamboli na banzela na ye, obateli mitindo na ye, mibeko na ye mpe bikateli na ye, boye okotikala na bomoi+ mpe okokóma ebele, mpe Yehova Nzambe na yo akopambola yo na mokili oyo ozali kokende kozwa.+

17 “Kasi soki motema na yo etiki Nzambe+ mpe oyoki ye te, soki obendami na banzambe mosusu, ogumbameli bango mpe osaleli bango,+ 18 nazali koyebisa yo lelo ete okokufa mpenza.+ Okozala na bomoi molai te na mabele oyo ozali kokatisa Yordani mpo na kozwa yango. 19 Nazwi likoló ná mabele lokola batatoli liboso na yo lelo, ete natye liboso na yo bomoi ná liwa, lipamboli ná elakeli mabe;+ mpe osengeli kopona bomoi mpo ozala na bomoi,+ yo ná bana na yo.+ 20 Na yango, lingáká Yehova Nzambe na yo,+ yokáká mongongo na ye mpe kangamáká na ye;+ mpo azali bomoi mpo na yo mpe na nzela na ye okofanda ntango molai na mabele oyo Yehova alapaki ndai epai ya bankɔkɔ na yo Abrahama, Yisaka mpe Yakobo ete akopesa bango.”+

31 Na nsima, Moize akendaki koyebisa Yisraele mobimba maloba oyo, 2 mpe alobaki na bango ete: “Nazali na mbula 120 lelo.+ Nakoki lisusu te kokamba bino,* mpo Yehova alobi na ngai ete: ‘Okokatisa Yordani oyo te.’+ 3 Yehova Nzambe na bino nde akokatisa liboso na bino mpe ye moko akosilisa bikólo oyo nyonso liboso na bino, mpe bokozwa mokili na bango.+ Yosua nde akokamba bino mpo bókatisa,+ kaka ndenge Yehova alobi. 4 Yehova akosala bango kaka ndenge asalaki Sihone+ ná Oge,+ bakonzi ya Baamore, mpe mokili na bango, ntango asilisaki bango nyɛɛ.+ 5 Yehova akolonga bango mpo na bino, mpe bosengeli kosala bango na kolanda mitindo nyonso oyo napesi bino.+ 6 Bózala na mpiko mpe na makasi.+ Bóbanga te mpe bózala na nsɔmɔ te liboso na bango,+ mpo Yehova Nzambe na yo nde azali kotambola elongo na yo. Akotika yo te mpe akosundola yo te.”+

7 Bongo Moize abengaki Yosua mpe alobaki na ye na miso ya Yisraele mobimba ete: “Zalá na mpiko mpe na makasi,+ mpo yo nde okokɔtisa bato oyo na mokili oyo Yehova alapelaki bankɔkɔ na bango ndai ete akopesa bango, mpe okopesa bango yango libula.+ 8 Yehova nde azali kotambola liboso na yo, mpe akokoba kozala elongo na yo.+ Akotika yo te mpe akosundola yo te. Kobanga te mpe kozala na nsɔmɔ te.”+

9 Na nsima, Moize akomaki Mobeko oyo+ mpe apesaki yango epai ya banganga-nzambe, Balevi, oyo bamemaka sanduku ya kondimana ya Yehova, mpe epai ya bankulutu nyonso ya Yisraele. 10 Moize apesaki bango mitindo ete: “Na nsuka ya mbula nsambo nyonso, na ntango oyo etyamá ya mbula ya kotika kosɛnga nyongo,+ na fɛti ya Bandako ya matiti,*+ 11 ntango Yisraele mobimba ekoya liboso ya Yehova+ Nzambe na yo na esika oyo aponi, okotángela Yisraele mobimba Mobeko oyo mpo báyoka yango.+ 12 Bóyanganisa bato,+ mibali, basi, bana,* mpe mopaya oyo afandi na kati ya bingumba* na bino, mpo báyoka, báyekola, mpe bábanga Yehova Nzambe na bino, mpe bákeba ete bákokisa maloba nyonso ya Mobeko oyo. 13 Na bongo, bana na bango oyo bayebaki Mobeko oyo te bakoyoka,+ mpe bakoyekola kobanga Yehova Nzambe na bino mikolo nyonso oyo bokozala na bomoi na mokili epai bozali kokatisa Yordani mpo na kozwa yango.”+

14 Nsima na yango, Yehova alobaki na Moize ete: “Talá! Mokolo ya liwa na yo ekómi pene.+ Bengá Yosua, mpe bótɛlɛma* na hema ya kokutana, mpo napesa ye mokumba.”+ Na yango, Moize ná Yosua bakendaki mpe batɛlɛmaki na hema ya kokutana. 15 Bongo Yehova amonanaki na hema na kati ya likonzí ya lipata, mpe likonzí ya lipata etɛlɛmaki na ekɔtelo ya hema.+

16 Mpe Yehova alobaki na Moize ete: “Talá! Okómi pene ya kokufa,* mpe bato oyo bakobanda kosala bondumba ya elimo na banzambe ya bapaya oyo bazali zingazinga ya mokili epai bazali kokende.+ Bakotika ngai+ mpe bakobuka kondimana oyo nasalaki ná bango.+ 17 Na ntango yango, nkanda na ngai ekongalela bango,+ nakotika bango+ mpe nakolongola likebi na ngai epai na bango,*+ tii bakobebisama. Mpe soki makama mpe bampasi mingi ekómeli bango,+ bakoloba ete: ‘Makama oyo ekómeli biso mpo Nzambe na biso azali na kati na biso te, boye te?’+ 18 Kasi, na mokolo yango nakobomba elongi na ngai mpo na mabe nyonso oyo bakosala ndenge bakokende epai ya banzambe mosusu.+

19 “Sikoyo, bókoma loyembo oyo mpo na bino moko+ mpe bóteya yango Bayisraele.+ Bólakisa bango yango* mpo loyembo oyo ezala motatoli na ngai liboso ya bato ya Yisraele.+ 20 Ntango nakomema bango na mokili oyo nalapelaki bankɔkɔ na bango ndai,+ mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ mpe bakolya tii bakotonda mpe bakokóma na bomoi ya malamu,*+ bakokende epai ya banzambe mosusu, bakosalela bango mpe bakozanga botosi epai na ngai mpe bakobuka kondimana na ngai.+ 21 Ntango makama mpe bampasi mingi ekokómela bango,+ loyembo oyo ekozala lokola motatoli mpo na bango (mpo bana na bango basengeli kobosana yango te). Mpo nayebi malamu mposa oyo bazali kokolisa+ liboso kutu nakɔtisa bango na mokili oyo nalapaki ndai ete nakopesa bango.”

22 Bongo na mokolo yango Moize akomaki loyembo oyo, mpe ateyaki yango Bayisraele.

23 Mpe Nzambe apesaki Yosua+ mwana ya Nunu mokumba mpe alobaki na ye ete: “Zalá na mpiko mpe na makasi,+ mpo yo nde okokɔtisa Bayisraele na mokili oyo nalapaki ndai ete nakopesa bango,+ mpe nakokoba kozala elongo na yo.”

24 Ntango kaka Moize asilisaki kokoma maloba nyonso ya Mobeko oyo na buku,+ 25 Moize apesaki Balevi, oyo bamemaka sanduku ya kondimana ya Yehova mitindo ete: 26 “Bózwa buku oyo ya Mobeko+ mpe bótya yango pembeni ya sanduku+ ya kondimana ya Yehova Nzambe na bino, mpe ekozala wana lokola motatoli mpo na kofunda bino. 27 Mpo ngai nayebi malamu botomboki na bino+ mpe motó makasi* na bino.+ Soki awa nazali naino na bomoi elongo na bino lelo, bozali kotombokela Yehova, bongo nsima ya liwa na ngai, ekozala ndenge nini! 28 Bóyanganisa bankulutu nyonso ya mabota na bino mpe bakapita na bino epai na ngai, mpo naloba na matoi na bango maloba oyo, mpe tiká nazwa likoló ná mabele lokola batatoli liboso na bango.+ 29 Mpo nayebi malamu ete nsima ya liwa na ngai bokosala makambo ya mabe,+ mpe bokolongwa na nzela oyo napesi bino mitindo. Likama ekozanga te kokómela bino+ na nsuka ya mikolo, mpo bokosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova mpe bokosilikisa ye na misala ya mabɔkɔ na bino.”

30 Bongo, Moize alobaki maloba ya loyembo oyo kobanda na ebandeli tii na nsuka, na matoi ya lisangá mobimba ya Yisraele:+

32 “Tyá litoi, Ee likoló, mpe nakoloba;

Mpe mabele eyoka maloba ya monɔkɔ na ngai.

 2 Liteya na ngai ekokwea lokola mbula;

Maloba na ngai ekotanga lokola mamwɛ,*

Lokola mbula moke likoló ya matiti

Mpe lokola mbula monene likoló ya milona.

 3 Mpo nakosakola nkombo ya Yehova.+

Bólobela bonene ya Nzambe na biso!+

 4 Libanga, mosala na ye ezali ya kokoka,+

Mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo.+

Azali Nzambe moko ya kotyela motema,+ oyo azangaka bosembo te;+

Azali moyengebene mpe sembo.+

 5 Bango moko nde basali makambo na kozanga bosembo.+

Bazali bana na ye te, mbeba ezali ya bango moko.+

Bazali libota moko oyo etɛngamá mpe egumbamá!+

 6 Ee bazoba mpe bato bazangi bwanya,+

Bongo nde bosengeli kosalela Yehova makambo?+

Ezali ye te Tata oyo azalisaki bino?+

Ye te moto asalaki bino mpe apikaki bino makasi?

 7 Kanisá mikolo ya kala;

Talelá bambula ya mabota oyo eleká.

Tuná tata na yo, mpe akoki koyebisa yo;+

Tuná bankulutu na yo, mpe bakoyebisa yo.

 8 Ntango Oyo-Aleki-Likoló apesaki bikólo libula na bango,+

Ntango akabolaki bana ya Adama,*+

Atyá ndelo na kati ya bato ya bikólo+

Na kotalela motángo ya bana ya Yisraele.+

 9 Mpo likabo ya Yehova ezali bato na ye;+

Yakobo azali libula na ye.+

10 Akutaki ye na mokili ya esobe,+

na mokili ekauká oyo ezali mpamba, oyo ezali koganga na kolela.+

Azingaki ye malamu, alɛngɛlaki ye,+

Mpe abatelaki ye lokola mbuma ya liso na ye.+

11 Kaka ndenge mpongo epupolaka zumbu* na yango,

Epumbwapumbwaka likoló ya bana na yango,

Esembolaka mapapu, ezwaka bana na yango,

Ememaka yango na nsala na yango,+

12 Yehova ye moko azalaki kokamba ye;*+

nzambe mopaya ata moko te azalaki elongo na ye.+

13 Atambwisaki ye na bisika etombwaná ya mabele,+

Bongo alyaki mbuma ya elanga.+

Aleisaki ye na mafuta ya nzoi oyo euti na libanga,

Mpe mafuta oyo euti na libanga ya silekisi,

14 Manteka ya etonga ya bangɔmbɛ mpe miliki ya etonga ya bampate,

Ná bampate-mibali oyo eleki malamu,*

Mpe ya bampate-mibali ya Bashane, mpe bantaba-mibali

Ná mbuma ya blé oyo eleki malamu;*+

Mpe omɛlaki vinyo oyo esalemi na mai* ya mbuma ya vinyo.

15 Ntango Yeshurune* akómaki mafutamafuta, akómaki motomboki.

Okómaki mafutamafuta, okómaki monene, otondaki mingi.+

Bongo atikaki Nzambe, oyo asalaki ye,+

Mpe atyolaki Libanga ya lobiko na ye.

16 Bapelisaki nkanda na ye ntango basalelaki banzambe ya bapaya;+

Basilikisaki ye na biloko oyo ayiná.+

17 Bazalaki kopesa bambeka epai ya bademo, kasi epai ya Nzambe te,+

Epai ya banzambe oyo bango bayebaki te,

Banzambe ya sika oyo bayaki kala mingi te,

Epai ya banzambe oyo bankɔkɔ na bino bayebaki te.

18 Obosanaki Libanga+ oyo abotaki yo,

Mpe obosanaki Nzambe oyo apesaki yo bomoi.+

19 Ntango Yehova amonaki bongo, abwakaki bango,+

Mpo bana na ye ya mibali mpe ya basi basilikisaki ye.

20 Yango wana alobaki ete: ‘Nakotyela bango lisusu likebi te;*+

Bongo nakomona ndenge bomoi na bango ekokóma.

Mpo bazali libota moko ya bato babebá,+

Bana oyo bazangi bosembo.+

21 Bapesaki ngai nkanda* na ndenge basambeli banzambe ya lokuta;+

Basilikisaki ngai na bikeko na bango oyo ezangá ntina.+

Nakoyokisa bango zuwa na eloko oyo ezali ekólo te;+

Nakosalela ekólo moko ya bozoba mpo na kosilikisa bango.+

22 Mpo nkanda na ngai epelisi mɔtɔ+

Oyo ekozikisa tii esika mozindo ya Nkunda,*+

Oyo ekotumba mabele ná mbuma na yango

Oyo ekozikisa miboko ya bangomba.

23 Nakobakisela bango ebele ya bampasi;

Nakosilisela bango makula na ngai.

24 Bakolɛmba na nzala+

Fiɛvrɛ moko ya makasi ekolya bango mpe libebi moko ya mabe mpenza ekosilisa bango.+

Nakotindela bango mino ya banyama,+

Ná ngɛngɛ ya banyoka ya putulu.

25 Na libándá, mopanga ekotika bango mabɔkɔ mpamba;+

Na kati ya ndako, kolɛnga na nsɔmɔ,+

Ekozala epai ya elenge mobali mpe epai ya ngɔndɔ,

Epai ya mwana oyo azali komɛla mabɛlɛ mpe epai ya moto oyo azali na nsuki mpɛmbɛ.+

26 Nalingaki koloba ete: “Nakopalanganisa bango;

Nakosala ete bato bátika kokanisa bango,”

27 Kasi nazali kokanisa mingi na oyo monguna akoloba,+

Mpo banguna bakoki kobalola likambo yango na ndenge ya mabe.+

Bakoki koloba: “Tolongi na nguya na biso;+

Ezali Yehova te nde asali nyonso wana.”

28 Mpo bazali ekólo oyo babungisá bizaleli malamu,*

Mpe mayele ezali te na kati na bango.+

29 Soki bázalaka ata bato ya bwanya!+ Balingaki kokanisa yango malamumalamu.+

Balingaki kokanisa likambo oyo ekokómela bango.+

30 Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato 1 000,

Mpe bato mibale bakoki kokimisa bato 10 000?+

Loba kaka soki Libanga na bango atɛki bango+

Mpe Yehova akabi bango.

31 Mpo libanga na bango ezali lokola Libanga na biso te,+

Ata banguna na biso bayebi yango.+

32 Mpo vinyo na bango euti na vinyo ya Sodoma

Mpe na mikala ya bilanga ya Gomora.+

Mbuma na bango ya vinyo ezali mbuma ya vinyo ya pwazɔ,

Bituka na bango ezali bololo.+

33 Vinyo na bango ezali pwazɔ ya banyoka

Pwazɔ ya bakobra, oyo ebomaka.

34 Yango ebombami pene na ngai te,

Ekangisami te na elembo na ndako na ngai ya kobomba biloko?+

35 Kozongisa mabe mpe kofuta ezali likambo na ngai,+

Lokolo na bango ekosɛlimwa na ntango oyo etyami,+

Mpo mokolo ya likama na bango ekómi pene,

Mpe makambo oyo ezali kozela bango ekoya mbangumbangu.’

36 Mpo Yehova akosambisa bato na ye,+

Mpe akoyokela basaleli na ye mawa,+

Ntango akomona ete makasi na bango esili,

Mpe moto oyo azangi libateli mpe azangi makasi nde atikali.

37 Bongo akoloba ete: ‘Wapi banzambe na bango,+

Wapi libanga epai balukaki komibomba,

38 Oyo bazalaki kolya mafuta ya bambeka na bango,*

Komɛla vinyo ya makabo na bango ya masanga?+

Tiká bátɛlɛma mpe básalisa bino.

Bákóma esika na bino ya komibomba.

39 Bótala sikoyo ete, ngai, ngai nde ye,+

Mpe banzambe mosusu bazali te longola ngai.+

Nabomaka, mpe napesaka bomoi.+

Nazokisaka,+ mpe nabikisaka,+

Mpe moto moko te akoki kobikisa na lobɔkɔ na ngai.+

40 Mpo natomboli lobɔkɔ na ngai na likoló,

Mpe nalapi ndai ete: “Lokola nazali mpenza na bomoi libela na libela,”+

41 Soki napelisi mopanga na ngai oyo ezali kongɛnga,

Mpe nabongisi lobɔkɔ na ngai mpo na lisambisi,+

Nakozongisela banguna na ngai mabe+

Mpe nakofuta baoyo bazali koyina ngai.

42 Nakolangwisa makula na ngai na makila,

Mpe mopanga na ngai ekolya mosuni,

Ná makila ya babomami mpe ya bakangami,

Ná mitó ya bakambi ya monguna.’

43 Bósepela, bino bikólo, elongo na bato na ye,+

Mpo akozongisa mabe mpo na makila ya basaleli na ye,+

Mpe akozongisela banguna na ye mabe+

Mpe akozipa masumu mpo na* mokili ya bato na ye.”

44 Na yango, Moize ayaki mpe alobaki maloba nyonso ya loyembo oyo na matoi ya bato,+ ye ná Hoshea*+ mwana ya Nunu. 45 Ntango Moize asilisaki koloba na Yisraele mobimba maloba oyo nyonso, 46 alobaki na bango ete: “Bóbatela malamumalamu maloba nyonso oyo nazali kokebisa bino na yango lelo,+ mpo bópesa bana na bino mitindo mpo bákeba ete básalela maloba nyonso ya Mobeko oyo.+ 47 Mpo ezali maloba ya mpamba te. Ekopesa bino bomoi+ mpe na nzela ya maloba yango nde bokoki kozala na bomoi molai na mabele oyo bokozwa ntango bokokatisa Yordani.”

48 Yehova alobaki na Moize kaka na mokolo yango ete: 49 “Matá na ngomba oyo ya Abarime,+ Ngomba Nebo,+ oyo ezali na mokili ya Moabe, oyo etalani na Yeriko, mpe talá mokili ya Kanana, oyo nazali kopesa Bayisraele libula.+ 50 Na nsima, okokufa na ngomba oyo ozali komata, mpe okoyanganisama esika moko na bato na yo,* kaka ndenge Arona ndeko na yo akufaki na Ngomba Hore+ mpe ayanganisamaki na bato na ye; 51 mpo bino mibale bozangaki bosembo epai na ngai na katikati ya Bayisraele, na mai ya Meriba+ ya Kadeshe na esobe ya Zine, mpo bino bosantisaki ngai te liboso ya bato ya Yisraele.+ 52 Okomona mokili yango na mosika, kasi okokɔta te na mokili oyo nazali kopesa bato ya Yisraele.”+

33 Sikoyo talá lipamboli oyo Moize, moto ya Nzambe ya solo alobaki epai ya Bayisraele liboso akufa.+ 2 Alobaki ete:

“Yehova autaki na Sinai,+

Mpe angɛngisaki pole na ye likoló na bango uta na Seire.

Angɛngaki na nkembo uta na etúká ya ngombangomba ya Parane,+

Mpe bamiriade basantu*+ bazalaki elongo na ye,

Babundi na ye bazalaki na lobɔkɔ na ye ya mobali.+

 3 Alingaki bato na ye mingi;+

Basantu na bango nyonso bazali na lobɔkɔ na yo,+

Ee Nzambe.

Bafandaki na makolo na yo;+

Bazalaki koyoka maloba na yo.+

 4 (Moize apesaki biso etinda, mobeko,+

oyo ezali eloko ya bato* ya Yakobo.)+

 5 Mpe Nzambe akómaki mokonzi na Yeshurune,*+

Ntango bankumu ya bato bayanganaki,+

Ná mabota nyonso ya Yisraele.+

 6 Rubene atikala na bomoi mpe akufa te,+

Mpe bato na ye bákóma moke te.”+

 7 Mpe alobaki lipamboli oyo mpo na Yuda:+

“Ee Yehova, yoká mongongo ya Yuda,+

Mpe zongisá ye epai ya bato na ye.

Mabɔkɔ na ye ebundeli eloko oyo ezali ya ye;

Mpe salisá ye liboso ya banguna na ye.”+

 8 Mpo na Levi alobaki ete:+

“Tumime na yo* mpe Urime*+ na yo ezali ya moto oyo azali sembo epai na yo,+

Oyo otyaki na komekama na Masa.+

Obandaki kobunda na ye na mai ya Meriba,+

 9 Moto oyo alobaki mpo na tata na ye mpe mama na ye ete: ‘Namoniselaki bango limemya te.’

Ayebaki ata bandeko na ye te,+

Mpe atyelaki ata bana na ye moko likebi te.

Mpo babatelaki liloba na yo,

Mpe batosaki kondimana na yo.+

10 Tiká bálakisa Yakobo bikateli na yo+

Mpe Yisraele Mobeko na yo.+

Bápesa mpaka ya malasi lokola nsolo moko mpo na kosepelisa yo*+

Bápesa mpe likabo mobimba na etumbelo na yo.+

11 Ee Yehova, pambolá makasi na ye,

Mpe sepelá na mosala ya mabɔkɔ na ye.

Buká makolo* ya baoyo bazali kotɛmɛla ye,

Mpo baoyo bazali koyina ye bátɛmɛla ye lisusu te.”

12 Mpo na Benyamina alobaki ete:+

“Moto oyo Yehova alingá afanda na kimya pene na ye;

Wana azali kobatela ye mokolo mobimba,

Akofanda na katikati ya mapeka na ye.”

13 Mpo na Yozefe alobaki ete:+

“Yehova apambola mokili na ye+

Azwa biloko kitoko ya likoló,

Mamwɛ* mpe mai oyo ezali kouta na maziba ya nse,+

14 Azwa biloko kitoko oyo euti na moi,

Mpe biloko kitoko oyo ebimaka sanza nyonso,+

15 Azwa biloko oyo eleki kitoko ya bangomba ya kala*+

Mpe biloko kitoko ya bangomba mike oyo eumelaka,

16 Azwa biloko kitoko ya mabele mpe bomɛngo na yango nyonso,+

Mpe kondimama ya Ye oyo azali kofanda na mwa nzete ya nzubɛ.+

Yango ekitela motó ya Yozefe

Na nsɔngɛ ya motó ya moto oyo akabolamaki na bandeko na ye.+

17 Nkembo na ye ezali lokola oyo ya mwana ya liboso ya ngɔmbɛ-mobali,

Mpe maseke na ye ezali maseke ya ngɔmbɛ-mobali ya zamba.

Na maseke yango, akotindika bato ya bikólo

Bango nyonso tii na nsuka ya mabele.

Bazali bankóto zomi ya bato ya Efraime,+

Mpe bazali bankóto ya bato ya Manase.”

18 Mpo na Zebulone alobaki ete:+

“Sepelá, Ee Zebulone, ntango ozali kobima,

Mpe yo, Isakare, na bahema na yo.+

19 Bakobenga bato ya bikólo bákende na ngomba.

Kuna bakopesa bambeka ya bosembo.*

Mpo bakotoka* bomɛngo oyo etondani na mbu

Mpe biloko oyo ebombaná* na zɛlo.”

20 Mpo na Gade alobaki ete:+

“Moto oyo azali kokómisa bandelo ya Gade monene apambwama.+

Alali kuna lokola nkɔsi,

Pene ya kolongola lobɔkɔ, ata mpe nsɔngɛ ya motó.

21 Akopona mpo na ye moko eteni ya liboso,+

Mpo kuna nde eteni ya mosali-mibeko ebatelami.+

Bankumu ya bato bakoyangana esika moko.

Akokokisa bosembo ya Yehova

Mpe bikateli* na ye mpo na Yisraele.”

22 Mpo na Dani alobaki ete:+

“Dani azali mwana-nkɔsi ya mobali.+

Akopumbwa utá na Bashane.”+

23 Mpo na Nafatali alobaki ete:+

“Nafatali atondi mpo andimami na Yehova

Mpe atondi na lipamboli na ye.

Zwá wɛsti ná sudi.”

24 Mpo na Ashere alobaki ete:+

“Nzambe apamboli Ashere na bana ebele.

Bandeko na ye bálinga ye mingi,

Azindisa* makolo na ye na mafuta.

25 Bikangeli na yo ya porte ezali ya ebende ná kwivre,+

Mpe okobatelama malamu mikolo na yo nyonso ya bomoi.*

26 Moto moko te azali lokola Nzambe ya solo+ ya Yeshurune,+

Oyo azali kokatisa likoló mpo na kosalisa yo

Mpe oyo azali koya likoló ya mapata na lokumu na ye.+

27 Nzambe azali esika ya komibomba kobanda ntango ya kala,+

Mabɔkɔ na ye oyo ezali koumela mpo na libela ezali na nse na yo.+

Mpe akobengana monguna liboso na yo,+

Mpe akoloba ete: ‘Silisá bango nyɛɛ!’+

28 Yisraele ekofanda na kimya,

Mpe liziba ya Yakobo ekobatelama,

Na mokili moko ya bilei* mpe ya vinyo ya sika.+

Mokili oyo mamwɛ ekotanga uta na likoló.+

29 Esengo na yo, Ee Yisraele!+

Nani azali lokola yo,+

Ekólo moko oyo Yehova abikisi,+

Ye azali nguba ya libateli+ na yo,

Mpe Ye azali mopanga na yo oyo eleki lokumu?

Banguna na yo bakogumbamela yo na kobanga,+

Mpe okotambola na mokɔngɔ na bango.”*

34 Bongo Moize alongwaki na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe amataki na Ngomba Nebo,+ na nsɔngɛ ya Pisga,+ oyo etalani na Yeriko.+ Mpe Yehova alakisaki ye mokili yango mobimba, kobanda na Gileade tii na Dani,+ 2 Nafatali mobimba ná mokili ya Efraime ná Manase, mokili mobimba ya Yuda tii na mbu ya wɛsti,*+ 3 ná Negebe+ mpe Etúká,+ mpe lobwaku ya patatalu ya Yeriko, engumba ya banzete ya mbila, tii na Zoare.+

4 Yehova alobaki lisusu na ye ete: “Talá mokili oyo nalapaki ndai epai ya Abrahama, Yisaka mpe Yakobo ete: ‘Nakopesa yango libota* na yo.’+ Natiki yo omona yango na miso na yo moko, kasi okokɔta kuna te.”+

5 Nsima na yango, Moize mosaleli ya Yehova akufaki kuna na mokili ya Moabe, kaka ndenge Yehova alobaki.+ 6 Akundaki ye na lobwaku, na mokili ya Moabe oyo etalani na Bete-peore, mpe moto moko te ayebi lilita na ye tii na mokolo ya lelo.+ 7 Moize azalaki na mbula 120 ntango akufaki.+ Miso na ye elɛmbaki te, mpe makasi na ye esilaki te. 8 Bato ya Yisraele balelaki Moize na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe mikolo 30.+ Bongo, mikolo ya kolela oyo balelaki Moize ekómaki na nsuka.

9 Yosua mwana ya Nunu atondaki na elimo ya bwanya, mpo Moize atyelaki ye lobɔkɔ. Bayisraele babandaki koyokela ye,+ mpe basalaki kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+ 10 Kasi mosakoli moko te abimá lisusu na Yisraele lokola Moize,+ oyo Yehova azalaki na boyokani ya makasi mpenza na ye.*+ 11 Asalaki bilembo mpe makamwisi nyonso oyo Yehova atindaki ye asala na mokili ya Ezipito epai ya Farao, basaleli na ye nyonso mpe na mokili na ye mobimba.+ 12 Moize asalaki yango na miso ya Yisraele mobimba, na ndenge asalelaki lobɔkɔ ya nguya mpe nguya ya nsɔmɔ.+

Ebengami mpe “Deteronome.”

Lil., “bana ya Yisraele.”

Ekoki kozala kolandana ya bangomba ya Liban.

Lil., “momboto.”

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “basali ete mitema na biso elɛmba.”

Elingi koloba, bifelo ya milai mpenza.

Lil., “malamumalamu; na makambo nyonso.”

Lil., “oyo atɛlɛmaka liboso na yo.”

To mbala mosusu, “Nzambe akómisi ye makasi.”

To, “Bótumola bango te.”

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Elingi koloba, Krɛtɛ.

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “bakozala na mpasi lokola oyo ya kobota.”

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

To mbala mosusu, libanga ya moindo oyo volcan ebimisaka.

Lipeko moko = 44,5 cm. Talá Ap. B14.

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Elimboli, bamboka ya bahema ya Yaire.

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Elingi koloba, Mbu Ekufá.

To, “mpe bókeba mpenza mpo na milimo na bino.”

Lil., “tii na motema ya likoló.”

Lil., “Maloba Zomi.”

To, “bókeba mpenza mpo na milimo na bino.”

To, “ekeko oyo eyemami.”

To, “bato ya libula na ye.”

To, “ekeko oyo eyemami.”

To, “ekeko oyo eyemami.”

Tála Ndimbola ya maloba.

To, “komekama.”

Lil., “lobɔkɔ oyo esembolami.”

Lil., “momboto.”

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Elingi koloba, Mbu ya Mungwa, to Mbu Ekufá.

Lil., “na ndako ya boombo.”

To, “mpo na kotɛmɛla ngai.” Lil., “liboso ya elongi na ngai.”

To, “ekeko oyo eyemami.”

To, “motema boboto.”

Lil., “baporte.”

Lil., “Maloba.”

Lil., “mosuni nyonso.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “makasi na yo nyonso ya bomoi.”

To, “kozongela yango epai.”

Lil., “na katikati ya miso na yo.”

Lil., “liboso ya.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “bikeko na bango oyo eyemami.”

To, “eloko na ye ya motuya.”

Lil., “lobɔkɔ.”

Lil., “na miso na bango.”

Lil., “akopambola mbuma ya libumu na yo.”

Lil., “Okobebisa.”

Lil., “Liso na yo ekoyokela.”

To, “komekama.”

Lil., “lobɔkɔ oyo esembolami.”

To mbala mosusu, “kolɛnga; kozala na nsɔmɔ.”

To, “bikeko oyo eyemami.”

To, “Okoyoka yango nkɛlɛ.”

To, “bawadi ya mai.”

Lil., “na ndako ya boombo.”

To, “baskorpiɔ.”

Elingi koloba, bifelo ya milai mpenza.

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “nkingo makasi.”

To, “lisangá.”

To, “ekeko oyo enyangwisami.”

Lil., “nkingo makasi.”

To, “ebende oyo enyangwisami.”

To, “libula na yo.”

To, “libula na yo.”

Lil., “na lobɔkɔ oyo esembolami.”

Lil., “Maloba Zomi.”

To, “lisangá.”

To, “bawadi ya mai.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “kokata mosutu ya.”

Lil., “kokómisa nkingo na bino makasi.”

To, “milimo.”

Lil., “lobɔkɔ na ye oyo esembolami.”

To, “tii na mokolo ya lelo.”

To, “oyo asalelaki.”

Lil., “momboto.”

To, “kosopela yango mai na lokolo,” elingi koloba, kosalela nguya ya lokolo, ezala kosalela lokolo mpo na konyata masini ya kobimisa mai, to kotimola mpe kofungola nzela oyo mai ekoki koleka.

Talá Ndimbola ya maloba.

Elingi koloba, “eleko ya mbula.”

Elingi koloba, “eleko oyo eloko nyonso ebotaka.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “na katikati ya miso na bino.”

To, “baporte ya engumba.”

Elingi koloba, Mbu Monene, Mediterane.

To, “epai moi elalaka.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “bikeko oyo eyemami.”

To, “akanisi ete ezali malamu.”

Lil., “baporte.”

To, “na mposa nyonso ya milimo na bino.”

Lil., “na kati ya baporte na bino nyonso.”

Lil., “baporte.”

To, “mbuma ya kosala farini.”

Lil., “baporte.”

Lil., “baporte.”

To, “na mposa nyonso ya molimo na yo.”

To, “molimo.”

To, “molimo.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “ndako ya boombo.”

To, “moninga na yo oyo azali lokola molimo na yo moko.”

To, “ekómisamaki mosantu mpo na ekila.”

To, “koyoka mongongo ya.”

Lil., “bótya (bósala) te libandi na katikati ya miso.”

To, “eloko na ye ya motuya.”

To, “ntaba ebengami shamoa.” Na Ebre, zemer.

To, “bitɛku.”

To, “bitɛku.”

To, “korbo.”

To, “otrishe.”

To, “Nyama mikemike.”

Lil., “baporte.”

To, “dime.”

To, “mbuma ya kosala farini.”

To, “molimo na yo elingi.”

To, “eloko nyonso oyo molimo ekosɛnga yo.”

To, “okodefisa na kosɛnga ndanga.”

To, “okodefisa na kosɛnga ndanga.”

Lil., “baporte.”

Talá Ap. B15.

To, “na ntango oyo etyamaki.”

Lil., “baporte.”

To, “Ndako mpo na mwa ntango.”

To, “Ndako mpo na mwa ntango.”

Lil., “na kati ya baporte.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “monɔkɔ.”

To, “rulo.”

To, “molimo na ye esepeli.”

Elingi koloba, esika oyo Yehova aponi mpo ezala esika ya losambo.

To, “lisangá.”

To, “sóka.”

Lil., “motema na ye ezali mɔtɔmɔtɔ.”

To, “molimo na ye.”

Lil., “Liso na yo esengeli te.”

Lil., “akotɛlɛma te mpo na kokweisa.”

Lil., “monɔkɔ.”

Lil., “Liso na yo esengeli.”

To, “molimo.”

To, “molimo.”

To, “alɛmbisa mitema ya bandeko na ye te lokola oyo ya ye.”

To, “eloko moko te oyo ezali kopema.”

To, “sóka.”

To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “ndenge molimo na ye elingi.”

Lil., “basi mibale, moko alingami mpe mosusu ayinami.”

To, “zála.”

Na ntango wana, bandako mingi ezalaki na nsamba ya patatalu esika bato bazalaki koyamba bapaya, kozwa mopɛpɛ, to mpe kolala.

To, “na nsima aboyi ye.”

To, “aboyi ye.”

Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.

To, “bondumba.”

To, “abomi molimo na ye.”

Lil., “noki alongola elamba ya tata na ye.”

To, “Ntango okotya kaa mpo na kobunda.”

To, “oyo ekómisaka mbindo.”

Elingi koloba, twalɛti.

Lil., “mbwa.”

To, “aboyi.”

To, “kozwa bomoi; kozwa molimo.”

Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “maladi ya maba” ezali na ndimbola mingi. Ekoki kolimbola, maladi ndenge na ndenge ya loposo oyo moto moko akoki kopesa moto mosusu. Ekoki mpe kolimbola, maladi mosusu oyo ezalaka na bilamba mpe na bandako.

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “baporte.”

To, “mbuma ya kosala farini.”

Lil., “kotonga ndako.”

To, “nkombo ya ndako na ye.” Lil., “nkombo na ye.”

Lil., “Liso na yo esengeli.”

To, “kilo ya libanga.”

Lil., “Na ndako na yo osengeli te kozala na efa ná efa.” Talá Ap. B14.

Lil., “mbuma.”

To mbala mosusu, “oyo azalaki kokufa.”

Lil., “na lobɔkɔ oyo esembolami.”

Lil., “baporte.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “eloko na ye ya motuya.”

To, “ekeko oyo eyemami.”

To, “ekeko ya ebende oyo enyangwisami.”

To, “moto oyo asalaka biloko ya mabaya mpe ya bibende.”

To, “Ezala bongo.”

Lil., “alongoli elamba ya.”

To, “kobɛta.”

To, “molimo ya makila ya moto oyo azali na likambo te.”

Lil., “Mbuma ya libumu na yo.”

Lil., “Okopambolama ntango okokɔta mpe okopambolama ntango okobima.”

Lil., “Mbuma ya libumu na yo ekolakelama mabe.”

Lil., “ngai.”

To, “kobulungana ya motema.”

Lil., “okokóma liloba ya lisese.”

To, “Nyamankɛkɛ oyo mapapu na yango esalaka makɛlɛlɛ.”

To, “ɔrjɛ.”

Lil., “baporte.”

Lil., “mbuma ya libumu na yo.”

Elingi koloba, mosuni oyo ebimaka na libumu nsima ya kobotama ya mwana.

To, “malɔzi minene.”

To, “molimo oyo ezangi elikya.”

To, “komekama.”

Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.

Lil., “oyo ezwaka mai mingi elongo na oyo ezangi mai.”

Lil., “apesaki bango te.”

Lil., “okozongisa yango na motema na yo.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “kokatama ngɛnga.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “kobima mpe kokɔta.”

To, “Ndako mpo na mwa ntango.”

Lil., “bana mike.”

Lil., “baporte.”

To, “bózwa bisika.”

Lil., “kolala esika moko na batata na yo.”

Lil., “nakobombela bango elongi na ngai.”

Lil., “Bótya yango na minɔkɔ na bango.”

Lil., “bakokóma mafutamafuta.”

Lil., “nkingo makasi.”

Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.

To mbala mosusu, “bato.”

To, “zála.”

Elingi koloba, Yakobo.

Lil., “ya mafuta.”

Lil., “ya mafuta ya mompíko.”

Lil., “makila.”

Elimboli, “moto ya sembo,” titre ya lokumu oyo bapesaki Yisraele.

Lil., “nakobombela bango elongi na ngai.”

To, “bayokisaki ngai zuwa.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To mbala mosusu, “bayokaka toli te.”

To, “bazalaki kolya bambeka na bango oyo eleki malamu.”

To, “akopɛtola.”

Nkombo ya liboso ya Yosua. Hoshea ezali lolenge ya mokuse ya nkombo Hoshayiya, oyo elimboli, “tobikisami na Yah; Yah abikisaki.”

Oyo ezali maloba ya ntɔki mpo na kolobela liwa.

To, “bankóto zomi ya basantu.”

Lil., “lisangá.”

Elimboli, “moto ya sembo,” titre ya lokumu oyo bapesaki Yisraele.

Na vɛrsɛ oyo, “yo,” “otyaki” mpe “obandaki,” ezali kolobela Nzambe.

Talá Ndimbola ya maloba (Tumime ná Urime).

Lil., “liboso ya zolo na yo.”

To, “loketo.”

Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.

To mbala mosusu, “bangomba ya ɛsti.”

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “bakomɛla.”

To, “biloko ya motuya.”

To, “bikateli ya lisambisi.”

To, “Asukola.”

Lil., “Mpe lokola mikolo na yo ekozala makasi na yo.”

Ekoki kozala, “blé to ɔrjɛ.”

To mbala mosusu, “bisika oyo etombwaná.”

Elingi koloba, Mbu Monene, Mediterane.

Lil., “momboto.”

Lil., “ayebaki ye mpenza boye na elongi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto