Mpo na nini bazali kopesa motuya mingi na likambo litali mposo?
UTA kala, kozanga koyokana kati na “bango” mpe “biso” ezali koyangela makanisi ya bato. Mingi bandimisami ete bobele bango nde bazali bato malamu, bobele bango nde bakoki kosala makambo manso mabongi. Ezali yango bato na sianse bazali kobenga ete ethnocentrisme, elingi koloba likanisi oyo ya komona ete bobele etuluku ya bato oyo kati na yango yo ozali mpe mimeseno na yango nde ezali ndakisa oyo bato nyonso basengeli komekola.
Na ndakisa, Bagreke ya ntango na kala bazalaki kotyola bapaya nyonso, oyo bazalaki kobenga bango ete “barbares” mpamba te nkóta na bango [bapaya] ezalaki koyokana na matoyi ya Bagreke lokola “bar-bar,” makambo makoki kolimbolama te. Baezipito liboso mpe Baloma na nsima bazalaki bango mpe komimona ete baleki bato mosusu.
Na boumeli ya bikeke, ba Chinois babengaki mboka na bango Zhong Guo, to Bokonzi ya Kati; mpamba te bandimisamaki ete Chine ezalaki ntéi to centre ya mokili, soki te ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. Na nsima, ntango bamisionere ya Mpótó, oyo bazalaki na nsuki mwa motane, miso na langi ya mai na mpondu mpe nzoto motane makasi, bakómaki na Chine, ba Chinois bapesaki bango nkombo ete “démons étrangers.” Bobele bongo, ntango bato ya Azia ya liboso bakómaki na mikili ya Mpótó mpe na Amérique du Nord, miso na bango oyo etɛ́kɛ́ ya likoló ezali molai, emonanaki lokola likambo ya kokamwa oyo ebimisaki koseka mpe kozanga kotyela motema.
Nzokande, lokola mokanda Mabota ya bato elobi yango: “Kondima ete [race] boye eleki [race] mosusu ezali likambo mosusu, kasi kopesa bilembeteli ya sianse mpo na kondimisa likanisi yango, ezali mpe likambo mosusu.” Milende mpo na kondimisa ete race boye eleki race mosusu, ezali likambo ya kala mingi mpenza te. Moyekoli ya mimeseno ya bato, Ashley Montagu, akomaki ete “likanisi oyo ete bato bakabolami na ba races na kotalela lolenge nzoto na bango esalemá, oyo ekeseni kati na yango ezala na mayele na motó to na nzoto ebandaki bobele na eteni ya mibale ya ekeke ya zomi na mwambe.”
Mpo na nini likambo ya koloba ete race boye eleki race mosusu elobamaki mingi na ekeke ya zomi na mwambe mpe na ekeke ya zomi na libwa?
Mombongo ya baombo mpe likambo litali mposo
Moko na bantina ya liboso ezali litomba oyo ezalaki kozwama na mombongo ya baombo oyo, na eleko wana ezalaki kosalema mingi. Bankóto na bato ya Afrika bazalaki kokamatama na makasi mpe bazalaki kotindama na boombo na mikili ya Mpótó mpe na Amerika. Mbala mingi mabota mazalaki kokabwana, mobali, mwasi mpe bana bazalaki kotindama na bisika bikeseni kati na mokili, kozanga elikya ya kokutana mokolo mosusu. Lolenge nini bato oyo bazalaki koteka baombo mpe basombi na baombo, oyo mingi bazalaki koloba ete bazali baklisto, bakokaki kolóngisa mosala wana ya mabe mingi?
Na kopalanganisáká likanisi oyo ete Baindo ya Afrika, na kotalela lolenge basalemá bazali bikelamu oyo bizangi ntina. David Hume, filozofe moko ya mokili ya Écosse akomaki na ekeke ya zomi na mwambe ete: “Nazali na likoki ya kondima ete Baindo nyonso, mpe bituluku nyonso mosusu ya bato, na lolenge basalemá, bazali na nse ya Mindele.” Azalaki koloba ete “ezali na eloko moko te ya kokamwa oyo Baindo basalá, ezala na makambo ya ntɔ́ki to ya sianse.”
Makanisi motindo wana mazalaki ya lokuta. Mokanda The World Book Encyclopedia (1973) emonisi ete: “Bikonzi ya Baindo ya lokumu mingi bizalaki kati na bisika bikeseni ya Afrika esili koleka bikeke mingi. . . . Kati na mibu 1200 mpe 1600, ezalaki na université moko négro-arabe ya lokumu na Tombouctou, na Afrique occidentale, oyo lokumu na yango ekómaki kino na Espagne, na Afrique du Nord mpe na Moyen-Orient.” Yango epekisaki te batekisi na baombo na kolanda nokinoki makanisi ya bafilozofe lokola Hume, makanisi oyo mazalaki koloba ete Baindo bazali na nse ya Mindele, ete bazalaki bato mpenza te.
Mangomba mpe likambo litali mposo
Bakonzi na mangomba bapesaki lisungi na makanisi ya batekisi na Baindo na ntina na kokabola mposo. Uta bambula 1450, mibeko mibimisamaki na bapápa mindimaki kotosisa mpe konyokola “bapakano” mpe “bato bazangi kondima,” mpo na kobikisa “milimo” na bango mpo na “Bokonzi na Nzambe.” Lokola bazwaki lipamboli ya Lingomba, batekisi ya liboso ya baombo mpe banɔngi bautaki na mikili ya Mpótó bamonaki mabe moko te na konyokola bankólómboka.
Engebene mokanda Boombo mpe bokóli ya bato (na Lingelesi), “kati na bambula 1760 mpe na boumeli na bikeke, koteka Baindo endimamaki na bakonzi na mangomba mpe na bato na mayele ya mangomba oyo ebengami Églises catholique, anglicane, luthérienne, presbytérienne mpe réformée. Ezali na lingomba moko te ya monene to ya moke ya ntango wana oyo emekaki kopekisa basangani na yango na kozala na baombo Baindo to ata koteka bango.”
Atako mangomba mosusu mazalaki kolobela bondeko ya baklisto kati na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, bazalaki lisusu kopalanganisa mateya oyo mazalaki kobimisa bokabwani kati na bato na mposo ekeseni. Na ndakisa, Encyclopaedia Judaica elobi ete “ezali bobele nsima na ntembe molai mpe matáta na makambo ya théologie nde ba Espagnols bayaki kotalela bankólómboka oyo bakutaki na Amerika ete bazalaki bato oyo bazali na molimo.”
Emonanaki na miso na bango lokola ete kobanda ntango oyo “milimo” ya bankólómboka wana “mibikisamaki” na kobongwana na bango na losambo ya boklisto, konyokola bango na nzoto ezalaki likambo mabe mpenza te. Mpo na Baindo, bakonzi mingi ya mangomba bazalaki koloba ete basilá kolakelama mabe na Nzambe mpo na libela. Bazalaki kobongola Makomami mpo na kondimisa makanisi na bango wana. Bakonzi na mangomba Robert Jamieson, A. R. Fausset, mpe David Brown, na lolenge na bango ya kolimbola Biblia bakomaki ete: “Kanana alakama mabe [Genese 9:25]: etumbu wana ekokisamaki na kobomama ya Bakanana, kokitisama ya Ezipito mpe boómbo ya ba Africains, bakitani ya Kama.”—Commentaire critique et explicatif de la Bible (na Lingelesi).
Liteya oyo ete nkɔ́kɔ ya moto moindo alakelamaki mabe, eteyami soko moke te kati na Biblia. Mpamba te, moto moindo auti na Kusi, kasi na Kanana te. Na ekeke ya zomi na mwambe, John Woolman alobaki ete kosalela elakeli mabe wana ya Biblia mpo na kolóngisa kotekama ya Baindo mpe kopimela bango lotómo na bango, “ezali kosalela likanisi ya lokuta oyo ekoki kondimama te na moto oyo azali mpenza na mposa ya komitika kotambwisama na mitinda ya solosolo.”
Sianse ya lokuta mpe likambo litali mposo
Sianse ya lokuta elendisaki likanisi oyo ezali kondima ete moto moindo azali na ntina te. Na France, na ekeke ya zomi na libwa, Joseph de Gobineau akomaki mokanda Essai sur l’inégalité des races humaines, oyo ezalaki mokanda ya liboso kati na molongo ya mikanda oyo milobelaki likambo yango. Kati na mokanda yango, Gobineau akabolaki bato na mposo misato ekeseni, oyo ezalaki na kolandana malamu ya kokita, mpembe, mosaka mpe moindo. Andimaki ete bizaleli ya kati ya mposo moko na moko ezalaki kati na makila mpe ete bosangani nyonso na ntina na libala kati na mposo ekeseni ezalaki kobebisa mposo oyo eleki malamu.
Gobineau akanisaki ete kala ezalaki na race moko ya peto ya Mindele oyo esalemaki na mibali mpe na basi ya milai, nsuki sɛ́lisɛ́li, miso bulé oyo abengaki bango ete ba Aryens. Andimaki ete ezalaki ba Aryens nde bakotisaki civilisation mpe lokóta ya Sanskrit na Inde, mpe ezali bango nde basalaki ba civilisations ya Grèce mpe ya Loma. Mabala elongo na basenzi ebebisaki ba civilisations wana ya lokumu mpe yango ebungaki elongo na makambo malamu mpe bizaleli malamu ya race aryenne. Gobineau azalaki koloba ete bato oyo bakokanaki mpenza makasi na race aryenne ya peto ya kala, ezali bato oyo bafandi lelo na nord ya Europe, elingi koloba kati na bikóló bizali kuna epai na likoló, mingi mpenza ba germaniques.
Makambo ya moboko ya liteya ya Gobineau—kokabolama ya mposo misato, kolekisama ya biloko bitali mposo na nzela na makila, race aryenne—ezalaki na moboko ata moko te oyo ekoki kotelema, mpe yango nyonso eboyami lelo na bato na sianse. Kasi, na ntango wana, bato mingi bandimaki liteya yango nokinoki. Moko kati na bango, moto ya Angleterre, Houston Stewart Chamberlain, asepelaki mingi na makanisi ya Gobineau na boye ete akendaki kofanda na Allemagne mpo na kopalanganisa nsango oyo ete ba Allemands nde bazali elikya ya nsuka mpo na kobatela bopeto ya race aryenne. Mikanda ya Chamberlain mitangamaki mingi na Allemagne, mpe makambo mabimaki nsima mazalaki ya nsomo mpenza.
Makambo ya nsomo oyo mabimaki likoló na kokabola mposo
Kati na mokanda na ye Mein Kampf (Etumba na ngai), Adolf Hitler azalaki koloba ete ba Allemands nde bazali race aryenne, race oyo eleki nyonso, oyo esengeli koyangela mokili. Hitler afundaki Bayuda ete bazalaki kobebisa nkita ya Allemagne mpe bazalaki likámá mpo ete mokano ya ba Allemands ya koyangela mokili ekoka kosalema te. Kobanda wana, babandaki koboma Bayuda mpe bato mosusu ya bikóló mikemike ya Mpótó; na ntembe te, yango ezalaki moko na makambo maleki nsomo kati na lisoló mobimba ya bato. Yango ezali makambo mabimaki na ntina na mateya ya koponapona bikóló, lokola Gobineau mpe Chamberlain bateyaki yango.
Kowelana kati na mposo esukaki bobele na Mpótó te. Na ngámbo mosusu ya Atlantique, kati na oyo bazalaki kobenga Mokili ya Sika, makanisi motindo wana mazangi moboko mabimisaki minyoko mingi mpo na bibele na bato basalaki eloko moko te. Na États-Unis, atako bapesaki bonsomi na baombo Baindo nsima na Etumba kati na banamboka, bikólo mingi babimisaki mibeko oyo mipekisaki Baindo makambo mingi oyo mapesamaki nzela na ba citoyens mosusu. Mpo na nini? Mindele bazalaki kokanisa ete Baindo bazali na mayele te mpo na kokoka kosangana na misala ya ba citoyens to mpe kosala kati na misala ya Leta.
Likambo moko na ntina na mobeko oyo epekisaki mabala kati na Baindo mpe Mindele ezali komonisa na meko nini makanisi mabe na ntina na bato mosusu ekotelaki bango mpenza. Wana ezalaki ye kokweisa babalani oyo babukaki mobeko wana, mosambisi moko alobaki ete: “Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso azalisaki Mindele, Baindo, ba Malais mpe bato ya Motane, mpe Ye atyaki bango bato na bato na mokili na bango; soki eloko moko ebebisaki mokano na Ye te, mbele mabala motindo oyo makokaki kosalema te.”
Maloba wana malobamaki na ekeke ya zomi na libwa te mpe malobamaki na mboka kuna mosika na zamba te. Malobamaki nde na 1958, bobele penepene na esika oyo ba députés ya États-Unis bakoyanganaka na ntaka ya bakilometele soko nkama. Ya solo, ezalaki bobele na 1967 nde Esambiselo monene ya États-Unis elongolaki mibeko nyonso oyo mizalaki kopekisa mabala kati na bato ya mposo ekeseni.
Mibeko wana ya koponapona—bakisa mpe likambo ya kokabola mposo kati na biteyelo, na mangomba mpe na bisika minene, mpe koponapona na esika ya mosala mpe na kofutela ndako—esukaki na kobimisa mobulu kati na banamboka, kotomboka mpe matáta oyo ezali kino lelo komonana mokolo na mokolo na États-Unis mpe na mikili misusu. Kozanga kotanga bato oyo basili kobomama mpe biloko oyo bisili kobebisama, motema likoló, koyinana, koyokisana nsoni mpe minyoko oyo esangani na yango, nyonso oyo ekoki kotalelama bobele lokola likambo ya nsoni kati na mokili oyo ezali koloba ete ezali civilisé.
Ezali motindo wana nde kowelana kati na mposo ekómaki moko na makambo mazali kokabola libota ya bato. Moko na moko kati na biso asengeli komitalela na kolongobana nyonso mpe komituna ete: nazali mpenza kobwaka makanisi oyo mazali kotombola mposo moko likoló na mposo mosusu? Nasili komeka kolongola kati na motema na ngai makanisi nyonso ya kotombola mposo moko likoló na mosusu?
Ebongi mpe komituna: tokoki kolikya ete kozanga koyokana mpe makanisi mabe na ntina na mposo mosusu, oyo tozali komona lelo oyo, ekoki kolimwa mokolo mosusu? Bato ya bikoló bikeseni, nkóta ekeseni mpe mimeseno mikeseni bakoki kofanda esika moko kati na kimya?
[Elilingi na lokasa 7]
Mindele mingi bazalaki kotalela Baindo lokola bato mpenza te
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Ebimisami engebene mokanda DESPOTISME—Lisoló ya banyokoli emonisami na bililingi (na Lingelesi)
[Elilingi na lokasa 8]
Ba camps ya ba nazis mpo na koboma bato ezalaki moko na makambo ya nsomo mabimisamaki na mateya mabe ya kokabola mposo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Foto: U.S. National Archives