Kozala na boyokani na mokili ya bilimu
NA NTÉI ya engumba moko ya Afrika ya Wɛ́sti ezali na ndako moko oyo ezali kobenda likebi mpenza, etongami na etazɛ moko, epakolami mokobo ya mpɛmbɛ mpe ya mai ya mpondu. Na eteni oyo bayambaka bato, bakomeli mibale bazali kosala wana lokola babɛti-mikanda. Ebele ya bato bamilalisi na bakiti mpo na kozela ete bákutana na babaláwo, mosakoli na makambo mabombami.
Babaláwo ye moko afandi na nsima ya mesa moko kati na biro na ye mpe pembeni wana ezali na masini moko ebéngami fax. Mbinga ya mobali, na nsuki mpɛmbɛ, alati zambala ya molai—ya ntalo mingi, mpe ekembisami malamu. Alobaki ete: “Tata na ngai azalaki moto na solóka. Nabotamaki kati na makambo ya bonkɔ́kɔ. Nakólaki kati na yango. Ntango nakómaki na mbula mitano, wana tata na ngai azalaki kokenda kosakola makambo mabombami, nazalaki kokenda elongo na ye. Nazalaki kotala lolenge azalaki kosala yango, mpe nazalaki komekola ye kino nayaki komesana na yango.”
Babaláwo azalaki kosala bikelákela na ye na libaya moko ya monene oyo ezalaki komonisa motindo moko ya kosakola makambo mabombami oyo ezalaki mpasi mpo na kososola mpe oyo bato na mboka na ye bazalaki kosalela na boumeli ya bileko mingi. Azalaki kobɛta zeké na lisalisi ya mbila 16, ezali motindo ya kosalela oyo mopalangani na Afrika ya Wɛ́sti mobimba mpe na bipai mosusu. Alobaki ete: “Bato bayaka epai na ngai na mikakatano ya lolenge nyonso. Mikakatano na basi, bokomba, kozanga mosala, maladi ya motó, mitungisi ya nzoto, mpe bongo na bongo. Na kotaleláká makambo oyo makomonana na kosakoláká yango, nakoki kobyanga bankɔ́kɔ to bilimu na likoló [banzambe]. Ezala ata oyo wapi, lolenge moko ya kopesa mbeka esengeli kosalema.”
Losambo ya bonkɔ́kɔ mpe misala na yango, lokola kosakola makambo mabombami, etonda mingi kuna, kasi bandakonzambe ya boklisto ya nkombo mpamba itondi mpe mingi. Pene na babiro ya babaláwo ezali na bandako ya mpɛmbɛ oyo ityami bilembo liboso na yango: Lingomba ya Mokonzi Salomo II, Keluba mpe Selafɛ́, Lingomba ya Klisto na likoló, Lingomba ya Bantoma ya Klisto, Lingomba ya babɛti-kelelo ya Klisto. Mangomba yango mayokanaka mpe mbala mosusu masalelaka misala ya losambo ya bonkɔ́kɔ. Babaláwo alobaki ete: “Kala mingi te nasololaki na episkɔ́pɔ. Ayaki awa. Nsima ya kotalela makambo na boumeli ya miniti soko 30, alobaki ete azalaki na mposa ete tósala ebongiseli mpo na kopesana makanisi kati na baklisto mpe bato ya losambo ya bonkɔ́kɔ mpe koluka kosilisa kowelana.”
Bikuke oyo bizali kokamba kino mokili ya bilimu
Kowelana wana mbala mingi etalelaka likambo ya koyeba banani mpenza bafandaka na mokili ya bilimu. Bipai binso na Afrika ya súdi ya Sahara, ezali na likanisi oyo lipalangani ete mitindo mibale ya bato bafandaka na mokili ya bilimu. Etuluku ya liboso esangisi banzambe, oyo bazali bato te. Etuluku ya mibale ezali ya bankɔ́kɔ, to mpe milimo ya bawei, oyo mokumba na bango ezali ya kopesa libiki mpe bolamu na mabota na bango awa na mabelé. Ekanisamaka ete ezala banzambe to bankɔ́kɔ bazali na nguya ya kosunga to ya kosala mabe epai na baoyo bazali awa na mabelé. Na yango, esengeli kopesa na bituluku yango nyonso mibale limemya mpe lokumu.
Makanisi motindo yango mapalangani bipai mingi na mokili. Kosaleláká myango ndenge na ndenge, bipai binso bato basololaka na banguya oyo emonanaka te, kolukáká koyeba makambo mazali koya, lisungi mpe litambwisi kati na mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo. Likoki ezali mpenza ya kozwa lisungi longwa na mokili ya bilimu? Yesu Klisto, oyo afandaki kuna, amonisaki ete likoki ezali. Alobaki ete: “Bólɔmbaka mpe bakopesaka bino; bóluka mpe bokozwaka; bóbɛtaka mpe bakozipwela bino.” (Matai 7:7) Kasi mpo na kozwa lisungi yango, tosengeli kosɛnga epai na moto ya sikisiki, koluka na lolenge ya sikisiki, mpe kobɛta na ekuke ya sikisiki. Soki tobɛti na ekuke ya sikisiki te, ekoki kofungolama na moto mosusu oyo akoki kosala biso bobele mabe, kasi malamu te.
Na yango, ezali likambo ya ntina koyeba banani bafandaka na mokili ya bilimu mpe banani bafandaka kuna te. Tosengeli mpe lisusu koyeba bokeseni kati na baoyo bakoki kosunga biso mpe baoyo bakoki kosala biso mabe. Na nsuka, tosengeli koyeba nini tosengeli kosala mpo na kozwa lisungi longwa na baoyo bazali na makoki ya kopesa yango. Masoló oyo malandi makotalela makambo yango.