Makambo mazali koleka na mokili
Na Australie, bato mingi bakómi baombo ya masano ya mbongo
Zulunalo The Australian elobi ete: “Na Australie, masano ya mbongo ekómi sikawa likama monene mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato, likambo yango etaleli bato soko 330 000 oyo bazali baombo ya masano ya mbongo.” Zulunalo yango emonisi lisusu ete kati na masini nyonso ya masano ya mbongo oyo ezali na mokili, koleka masini 1 likoló ya masini 5 ezali na Australie, epai bakóló 82 likoló na mokama babɛtaka masano ya mbongo. Ekipɛ moko ya bato oyo bazalaki kosala ankɛtɛ na bakompanyi ya masano ya mbongo na Australie, bamonaki ete mikóló mwa mingi (2,3%) bazali na mikakatano minene oyo euti na masano ya mbongo. Kati na bango, bato 37 likoló ya 100 bakanaki komiboma, bato koleka 11 likoló ya 100 bamekaki komiboma, mpe bato 90 likoló ya 100 balobaki ete banyokwamaki na makanisi mpo na masano ya mbongo. Ekipɛ yango ya ankɛtɛ esɛngaki ete bátalela lisusu mitindo ya masano ya mbongo mpe epesaki likanisi ete esengeli kotya makebisi na bisika ya masano ya mbongo.
Kompanyi moko ya makaya endimi ete likaya epesaka kanser
Nsima ya kotya ntembe bambula mingi na bolukiluki ya ndenge na ndenge oyo minganga basalaki, Philip Morris, kompanyi ya makaya oyo eleki monene na États-Unis, endimi sikawa ete likaya epesaka kanser ya mimpululu mpe maladi mosusu oyo ebomaka. Kompanyi yango elobi ete: “Minganga mingi mpe balukiluki mingi bandimi mpenza ete likaya epesaka kanser ya mimpululu, maladi ya motema, maladi babengi emphysème mpe maladi mosusu ya mabe.” Zulunalo The New York Times elobi ete “liboso, kompanyi yango ezalaki koloba . . . ete likaya ezali kaka ‘eloko oyo ekoki kopesa’ nzela na maladi lokola kanser ya mimpululu, kasi yango te nde ebandisaka maladi yango.” Atako bongo, bakonzi ya kompanyi yango balobi ete: “Tozali na esengo mpo na makaya oyo tozali kosala mpe bapiblisite oyo esalemi mpo na yango na boumeli ya bambula mingi.”
Ntango ezali te
Zulunalo Gießener Allgemeine elobi ete bipai nyonso na Mpoto, bato bazali komona ete basengeli kowela ntango. Ezali mpe ndenge moko ntango bazali na esika ya mosala, bazali kosala misala ya ndako, to bazali kominanola. Manfred Garhammer, moto ya sosioloji na Inivɛrsitɛ ya Bamberg alobi ete: “Bato balalaka lisusu mingi te, balyaka mbangumbangu, mpe batungisamaka na esika ya mosala mingi koleka ndenge ezalaki esili koleka mbula 40. Amoni ete bomoi ya mokolo na mokolo ekómi koleka mbangu na mikili nyonso ya Mpoto epai asalaki bolukiluki na ye. Atako misala ya ndako ekómi kosalema na masini mpe bakómi kokitisa ngonga ya mosala na bakompanyi, yango epesi nzela te ete bato bázwa ntango mingi mpo na “kominanola” to bákóma na “ntango mingi.” Kutu, ntango ya kolya ekiti na miniti 20 mpe ntango ya kolala na butu ekiti na miniti 40.
Ezali lisusu komonana te
Bibombelo ya mbuma na bisika baleisaka nyama na Canada ezali lisusu komonana te na wɛsti ya Canada. Na 1933, bibombelo yango ezalaki 5 758, motángo oyo emonisi ete bibombelo yango ezalaki mingi. Lelo oyo etikali kaka 1 052. Mpo na nini? Moto moko oyo amonaki ntango bazalaki kobuka ebombelo moko alobaki ete: “Makambo mingi ebongwani. Mosala ya bilanga ekómi kosalema na masini kasi na mabɔkɔ lisusu te. Bisika oyo mabota bazalaki kosala bilanga ezali lisusu te, yango wana bibombelo ekomi kolimwa.” Zulunalo Harrowsmith Country Life elobi ete: “Soki na Canada, bisika oyo baleisaka nyama ezali lisusu na bibombelo te, Canada ekokóma mpenza lokola engumba Venise ezangi babalabala na yango ya mai to New York ezangi bandako na yango ya milaimilai to Grande-Bretagne ezangi banganda ya komela masanga. Masangá mosusu ezali komeka kobatela bibombelo yango oyo etongama kala kasi kitoko na bisika ya koleisa nyama na Canada. Bakómisaki ebombelo moko mizɛ mpe mosusu esika ya kosala tɛatrɛ.
Misala ya makama
Misala zomi nini oyo eleki kobimisa makama? Mitángo oyo lisangá moko na États-Unis (Bureau américain des statistiques du travail) epesaki emonisi ete mosala ya bato oyo bakataka nzete ezali na esika ya liboso, ezali koboma bato 129 kati na bato nkoto nkama moko, na nsima elandi mosala ya babomi-mbisi mpe basali na masuwa, yango ezali koboma bato 123 mpe bato 94 kati na bato nkoto nkama moko. Na nsima elandi mosala ya batambwisi-mpɛpɔ, basali ya bibende, baluki ya mabanga ya ntalo, batongi ya bandako, basɔfɛlɛ ya taksi, batambwisi ya mituka ya minene mpe basali-bilanga. Kasi, zulunalo Scientific American elobi ete “motángo ya bato nyonso oyo bazali kokufa na makama—bato 4,7 likoló na 100 000—ekiti mwa moke (10 %)” na boumeli ya mbula mitano oyo euti koleka.
Nkisi ya monzɛlɛ
Zulunalo The Toronto Star elobi ete nkisi moko ya sika oyo ebimi mpo na kolongola masusa na elongi, bakotuba moto ngɛngɛ makasi oyo ebomaka oyo ebengami toxine botulique. Ngɛngɛ yango elɛmbisaka misisa mosusu ya elongi oyo baponi, mpe nsima ya mwa mikolo ebungisaka makasi ya misisa yango, mpe na bongo masusa ya elongi ekolimwa. Kosalela nkisi yango eumelaka soko sanza minei, mpe na nsuka elongi ya moto oyo azali kosalela nkisi yango ekomonana lokola ya elenge. Nzokande, mokakatano ezangi te. Zulunalo yango elobi ete “bato oyo bazali kosalela nkisi yango bazalaka lisusu na masusa ya elongi te, kasi bakokaka lisusu kokanga nkiki te, bakokaka lisusu koseka makasi te.” Talá likambo, esɛngeli “kobebisa elongi ndambo mpo na kozongela kitoko ya bolenge.”
Kobanga
Ozali komiyoka ete ozali kobanga? Zulunalo El Universal elobi ete lisangá moko na Mexique (Institut mexicain de la sécurité sociale) epesi makanisi oyo elandi mpo na kosalisa yo na likambo ya kobanga. Lalaká mingi ndenge nzoto ezali kosɛnga—ngonga motoba kino ngonga zomi na mokolo. Melaká ti malamu na ntɔngɔ mpe oyo ezali na mwa biloko mingi, lyaká bilei ya malamu na midi, mpe lyaká bilei ya pɛpɛlɛ na mpokwa. Lisusu, minganga basɛngaka mbala mingi kolya mungwa mingi te, kolya biloko ya mafuta mingi te, mpe soki okokisi mbula 40, komɛlaka miliki mingi te mpe kolya sukali mingi te. Omibombela ntango mpo na kofanda kimya mpe komanyola. Kobosana te kotalaka zamba, bafololo, bangomba mpe mai.
“Nzambe akɔtelaka ekipɛ moko ya masano?”
Sam Smith, mopanzi-nsango ya masano alobi ete: “Nalingi kotyola bindimeli ya moto moko te, kasi mimeseno ya kosambela na miso ya bato nyonso na ntango ya masano ezali koleka ndelo te? Mpo na nini babɛti ya ndembo bafukamaka mpo na kosambela ntango batii [mokele]?” Smith alobi lisusu ete kaka babɛti ya ndembo wana oyo bakweaka na mabɔlɔngɔ mpo na kosambela, nsima ya lisano, bakoki mpe komona bango “bazali kofinga bapanzi-nsango” na ndako ya kolata bilamba ya masano to “koluka kozokisa basani mosusu” na ntango lisano ekómaka ndongo. Smith alobi ete kokanisa ete Nzambe akɔtelaka ekipɛ moko oyo ezali kosana “ekitisaka kondimela Nzambe.” Na yango, lisolo na ye esukisi ete: “Tókómisa masano likambo ya losambo te.”
Ndɛkɛ ya mayele!
Zulunalo Terre Sauvage ya France, oyo elobelaka biloko bizalisamá, elobi ete mikɛngɛlɛ-mboka (moineaux) ya engumba Calcutta emibatelaka na malaria. Bato ya mayele bamonaki ete lokola malaria ekómi mingi, mikɛngɛlɛ-mboka ekómi kopumbwa mosika na zamba koluka nkasa ya nzete moko oyo eyebani ete ezalaka na quinine, nkisi ya malaria. Etongaka zumbu na nkasa yango, mpe emonani ete elyaka nkasa yango. Zulunalo yango ebakisi ete ndɛkɛ yango elingaka kofanda na engumba nzokande ebangaka kozwa malaria, kasi ezwi lolenge ya komibatela na malaria.”
Mbongo ya bosɔtɔ
Zulunalo Guardian elobi ete pene na nkasa nyonso (99 %) ya mbongo na Londres ezali na cocaïne. Bato ya mayele batalelaki nkasa 500 ya mbongo mpe bamonaki ete nkasa 496 ezalaki na cocaïne. Ntango bameli ya cocaïne bazali kosimba nkasa ya mbongo, cocaïne ezali kotikala na yango. Na nsima, mbongo mosusu ezwaka cocaïne ntango baponaka yango na masini ya mbongo na banki to ntango basangisaka yango esika moko na mbongo mosusu. Na Grande-Bretagne, cocaïne ezali likaya ya makasi oyo bilenge ya mbula 20 kino 24 bazali komela mingi. Lisangá moko ya Londres oyo elendisaka bilenge, elobi ete bilenge bamelaka cocaïne mpo bamiyokaka lokola bakómi na lokumu mpe na makasi mingi.
“Maladi oyo bato bazwaka mingi koleka na makila”
Lisangá moko (Associated Press) elobi ete: “Bato soki milio 2,7 na États-Unis bazali na hépatite c, yango ezali maladi oyo bato bazali kozwa mingi koleka, mpe epesakamaka na makila.” Bato bazwaka hépatie c mingimingi na kosangisa nzoto to na kozongisama makila. Bato oyo bazali na likama mingi ya kozwa maladi yango ezali bato oyo bamitubaka ntonga ya bilangwiseli ya moto mosusu oyo azali na maladi yango mpe baoyo basangisaka nzoto kozanga kosalela kapɔti na moto oyo azali na maladi yango. Nzokande, moto akoki mpe kozwa maladi yango soki bakati ye nzɔlɔkɔ to soki batoboli ye ntonga ya ba Chinois (acupuncture) oyo basukoli yango malamu te. Bato oyo bazongisamaki makila bazali mpe na likama ya kozwa maladi yango. Mbula na mbula, na États-Unis, bato soki 1 000 batyelaka bango mabale ya bato mosusu na esika ya oyo hépatite c ebebisaki.