Nkoma ya batángi
Maladi oyo eumelaka Tozali na bana misato—moko abɛlaka maladi ya trisomie mpe mosusu azali mwana ya ss. Na mikolo euti koleka, mwana oyo ya s.s. makila na ye ekitaki mingi mpe esɛngelaki tókɔta na ye na lopitalo; esalaki biso nyonso mpasi mpenza. Kasi namonaki ya solo ete Yehova ayokaki mabondeli na ngai ntango nazwaki Lamuká! ya 22 Mai 2000 (ebimeli ya Lifalanse) oyo ezalaki na masolo “Ndenge oyo libota mobimba ekoki kosalisa moko na bango oyo azali na maladi oyo eumelaka.” Masolo wana elendisaki ngai na mwasi na ngai mpo tókende ntango nyonso liboso. Ekómisaki makasi lisusu elikya oyo tozali na yango ete etikali moke moto moko te akoloba: “Nazali na maladi.”—Yisaya 33:24, NW .
E.J.M., Brésil
Tozali na mwana moko ya mobali oyo abɛlaka maladi ya schizophrénie. Tótángá mikanda ndenge na ndenge oyo elobelaka maladi yango, kasi naino tomoná te mokanda oyo elobeli maladi yango na komityáká na esika ya mabota oyo ezali na moto oyo azali kobɛla maladi yango; nzokande masolo wana esalaki yango. Makambo oyo balobi kuna ekokani mpenza na etumba mpe mpasi oyo nazali na yango na kati ya motema, ezali lokola nde bakomi mpenza na papye kolela oyo ngai nalelaka na kati ya motema.
H. T., Japon
Eleki sikoyo mbula zomi banda nakómá kobɛla maladi moko oyo eumelaka mpe oyo mokemoke ezali kokóma kaka makasi koleka. Ndenge bolobelaki mpasi oyo moto oyo abɛlaka yango ayokaka esimbaki mpenza motema na ngai. Na bantango mosusu okoki kobulungana na makanisi mpe na elimo, kasi bandeko ya lisangá balakisaki mpenza ete balingi komitya na esika na ngai na likambo etali maladi na ngai. Na maloba ya mayele, bazali kopesa ngai makasi mpo nákoba kozala na bomoi.
M. M., Italie
Totángaki masolo yango na kati ya libota. Mwana na ngai ya mwasi abɛlaka maladi ya ba rein mpe eleki sikoyo mbula mitano bazali kosalisa ye na nzela ya dialyse. Esalaka biso mpasi makasi. Mbala mingi asi akómá pene ya liwa, yango esalaka ete tózalaka ntango nyonso na ekɛngɛ; tomitunaka soki likambo mosusu nini ekobima na nsima. Kasi toli na bino ezalaki kitoko mingi. Mokolo na mokolo oyo tozali kolekisa tosengeli kosepelaka na yango. Libondeli mpe ezali na ntina mingi. Lokola nayebi ete Yehova ayebi ndenge nini nazali koyoka, esalisaka ngai.
S. J., États-Unis
Motema na ngai etondaki na esengo ntango nayaki koyeba ete ezali na moto oyo azali koyeba mpasi oyo nazali na yango ya kozala na maladi oyo eumelaka! Namonaki bana na ngai nyonso misato ya basi ndenge bakómaki kobɛla, moko nsima ya mosusu, maladi ya ndeke oyo ngai moko mpe nabɛlaka. Masolo lokola wana ezali kosalisa biso tókóma na bososoli mpe tózala na makanisi ya Klisto.
G. L., États-Unis
Anakonda (Nyoka monene ya Amerika ya Sudi) Nafandaka na mboka oyo banyoka na nkombo anakonda ezali. Bato babɛtaka mingi masolo ya banyoka wana, kasi ezalaka mpasi mpo na koyeba soki makambo oyo balobaka ezalaka ya solo to ya lokuta. Lisolo “Baanakonda babimisi sɛkɛle na bango?” (22 Mai 2000, ebimeli ya Lifalanse) esalisaki ngai nayeba makambo nini ezali ya solo mpe nini ezali ya lokuta. Masolo yango esalisaki ngai mpe nazwa biyano na mituna na ngai nyonso na oyo etali bikelamu wana ya kokamwa.
J.S.P., Brésil
Batata oyo bakimaka bana na bango Eleki sikoyo mbula 25 banda nakómá kotánga Lamuká!, mpe nakanisi ete naino bolobelá lisolo oyo te. (“Mituna oyo bilenge batunaka . . . Batata oyo bakimaka bana na bango—Bakoki mpe kokima mikumba na bango?” na Lamuká! ya Yanuali-Marsi 2001) Bolobelá bilenge basi oyo bamemaka bazemi ya balabala, kasi naino bolobelá te mokumba ya bilenge mibali oyo batyaka bazemi yango. Nazalaki koyeba te mpo na nini soki bato mibale basali pite, kaka mwasi na mwana nde bafutaka masumu nyonso. Nazwaki zemi ntango nazalaki na mbula 19. Mwana mobali oyo apesaki ngai zemi asundolaki ngai. Nasɛngi bino ete bókoba koyebisa bilenge ete “bákima pite.”—1 Bakolinti 6:18.
C. C., Espagne
Teatre ya Bagreki Nazangi maloba mpo na koyebisa bino ndenge nini nasepelaki na lisolo “Esika ya kosala teatre ya mboka Épidaure—Ezali kaka kitoko kino lelo.” (8 Yuni 2000, ebimeli ya Lifalanse) Nayebaki ete lisolo yango ekofungola ngai makanisi, mpe ezalaki bongo. Kasi nayebaki te ete ezalaki mpe na makambo mingi ya elimo na kati na yango!
K. S., États-Unis